Masanga oyo ezali ambasadɛrɛ ya Mexique
● Ntango bato ya Espagne oyo bazwaki bamboka ya Amerika ya ntei mpe ya sudi bakómaki na ekólo Mexique na ebandeli ya siɛklɛ ya 16, bamekaki masanga moko oyo bakutaki na mboka yango, nkombo na yango pulque. Masanga yango esalemi na mai oyo euti na nzete ya agave. Masanga yango ezali lokola bière, kasi ezali na alcool mingi te. Ezalaka mpe na proteini, hydrates de carbone, vitamini, mpe minéraux; yango wana na bisika mingi bamɛlaka yango nsima ya kolya.
Lokola bato ya Espagne bamesaná komɛla masanga makasi ntango bazali kolya, eumelaki te bakómisaki mai ya agave masanga moko ya makasi, oyo babengi mescal. Yango nde bazalaki kosalela liboso ya masanga oyo babengi lelo tequila. Lelo oyo, na Mexique, ezali na baizine ebele oyo esalaka tequila mpe na mbula moko, baizine yango ebimisaka balitre milio 189 ya masanga yango, oyo mingi na yango (40%) etindamaka na bikólo mosusu.
Agave bleu ezali molona moko oyo ezalaka lokola fololo lisi, oyo ekolaka na bisika ya mabele makasi pene na bangomba na wɛsti ya Mexique, mingimingi na etúká ya Jalisco pene na engumba ya Tequila, esika nkombo ya masanga yango eutá.a Milona ya agave ezwaka mbula 12 mpo ekɔmela, mpe ntango ezali kokola, emɛlaka minéraux mingi. Ntango bapikoli molona yango, bakataka nkasa na yango oyo ezalaka nzubɛnzubɛ, mpe batikaka kaka mosuni na yango oyo ezalaka lokola ananasi, oyo ebengami piña. Mingimingi, ezalaka na kilo 50 mpe na kati na yango ezalaka na mai mingi. Esɛngaka kilo 7 ya piñas ya agave mpo na kosala litre moko ya masanga tequila.
Bato mingi ya Mexique balingaka komɛla tequila oyo basangisá na masanga mosusu te; batyaka mwa mungwa mpe lilala ya ngayi oyo bakatá mikemike. Na bikólo mosusu, bato bamesani mingi nde na margarita, masanga oyo esalemi na tequila basangisá na masanga oyo basali na mai ya lilala ya ngayi mpe masanga moko ya makasi oyo esalemi na malala. Bamɛlaka yango na kɔpɔ oyo batye mwa mabanga ya mai (glaces) mpe batyaka mwa mungwab na monɔkɔ ya kɔpɔ yango. Tequila etɛkamaka na bikólo soki 90, yango wana ebongi mpenza ete ebengama ambasadɛrɛ ya Mexique.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mitindo 136 ya agave oyo ezali na Mexique, mingi na yango esalelamaka mpo na kosala pulque mpe masanga mosusu ya makasi. Kasi basalelaka kaka agave bleu mpo na kosala tequila.
b Biblia epekisi te komɛla masanga na bokatikati. (Nzembo 104:15; 1 Timote 5:23) Kasi epekisi nde kolekisa ndelo na komɛla masanga mpe kolangwa.—1 Bakorinti 6:9, 10; Tito 2:3.