Engebene Biblia
Ndenge nini Nzambe atalelaka biloko oyo bato basalelaka na losambo?
Lingomba ya Bayuda, ya Bouddha, ya Hindu, ya Katolike, ya Mizilma mpe ya Ɔrtɔdɔkse ya ɛsti esalelaka biloko ndenge na ndenge mpo na losambo. Na yango, na bikólo mingi, bamilio ya bato bandimaka ete biloko yango esalisaka bango bápusana penepene na Nzambe, bándimama na ye mpe bázwa mapamboli. Biblia elobi nini na likambo yango?
KOSALELA biloko mpo na kosambela Nzambe ebandá kala mpenza. Na ndakisa, na esika oyo ezalaki engumba Ninive, bato ya arkeoloji bakundolaki “[bikeko] mibale ya basi oyo ezalaki na mapapu etɛlɛmi liboso ya nzete mosantu lokola nde ezali kobondela; . . . esimbaki sapɛlɛ na [lobɔkɔ] ya mwasi.”—The Catholic Encyclopedia.
Ntina mpenza ya basapɛlɛ ezali nini? Kaka encyclopédie yango epesi eyano oyo: “Soki ekosɛnga kozongela libondeli moko mbala na mbala, esengeli kosala mwa eloko moko oyo ekoki kosalisa mpo na kotánga yango, na esika ya kotánga na misapi.”
Na esika ya kozongelaka maloba moko mbala na mbala na libondeli, bato mosusu basalelaka eloko moko oyo ezali lokola sɛrklɛ (moulin à prières). Ntango nyonso oyo eloko yango ezali kobaluka, ezala na lobɔkɔ, na mopɛpɛ, na mai to na kura, bato oyo bazali kosalela yango bazwaka yango lokola libondeli mobimba. Mbala mingi basangisaka eloko wana ya sɛrklɛ na mantra, elingi koloba batángaka maloba to bavɛrsɛ ya bilimo. Ndenge nini Nzambe atalelaka biloko wana oyo bato basalelaka mpo na losambo?
“Kolobaka makambo kaka moko wana te mbala na mbala”
Yesu Klisto, oyo ata bamilio ya bato oyo bazali baklisto te balobaka ete azali profeta, amonisaki ndenge Mozalisi atalelaka likambo etali kozongela maloba moko mbala na mbala na libondeli. Alobaki ete: “Ntango yo ozali kobondela, kolobaka makambo kaka moko wana te mbala na mbala, lokola bato ya bikólo mosusu basalaka, mpo bakanisaka ete bakoyokama mpo ete bazali koloba mingi.”a—Matai 6:7.
Na yango, soki Nzambe andimaka te ete ‘tólobaka makambo kaka moko wana mbala na mbala,’ tomoni te ete akondima mpe te biloko oyo bato basalelaka mpo na mabondeli yango? Ndenge moko, Biblia elobeli mosaleli ya Yehova ata moko te oyo asalelaki basapɛlɛ, moulin à prières, mpe biloko mosusu ya ndenge wana mpo na kosambela. Tokosimba likambo yango malamu soki toyebi ndimbola ya libondeli mpe ntina na yango.
Mabondeli oyo Nzambe andimaka
Na libondeli ya ndakisa, Yesu abengaki Nzambe polele ete “Tata na biso.” Ya solo, Mozalisi na biso azali te moto oyo azali mosika, ya mabe to nguya moko oyo esɛngaka ete tókitisa yango motema na nzela ya kolobaloba, milulu, to na kozongela liloba to maloba mbala na mbala. Kasi, azali nde Tata ya bolingo, mpe alingi ete tóyeba yango mpe tólingaka ye. Yesu alobaki ete: “Ngai nalingaka Tata.” (Yoane 14:31) Mosakoli moko ya kala na Yisalaele alobaki boye: “Ee [Yehova], ozali nde tata na biso.”—Yisaya 64:8.
Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Yehova, Tata na biso ya likoló? (Yakobo 4:8) Tokopusana penepene na Nzambe soki tozali koyebisa ye makambo na biso mpe ye azali koyanola biso, ndenge baninga basalaka. Nzambe “alobaka” na biso na nzela ya Biblia, Liloba na ye; kuna, ayebisaka biso misala na ye, bomoto na ye, mpe mokano na ye. (2 Timote 3:16) Nzokande, biso tosololaka na Nzambe nzela ya libondeli, oyo tosalaka na limemya. Yango wana, mabondeli yango esengeli kouta na motema mpenza, kasi te kozongelaka yango mbala na mbala.
Kanisá likambo oyo: Na kati ya libota oyo bolingo ezali, ndenge nini bana ya mayele basololaka na baboti na bango? Bazongelaka kaka maloba ndenge moko, to mbala mosusu batángaka yango na lisalisi ya eloko moko? Te! Kasi, balobaka na baboti makambo oyo ezali na ntina, oyo euti na motema mpe basalaka yango na limemya.
Kobondela Nzambe esengeli mpe kozala bongo. Ya solo, tokoki koyebisa Nzambe mitungisi na biso nyonso. Bafilipi 4:6, 7 elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe . . . ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa.” Ya solo, soki likambo moko ezali kotungisa biso, tokoki kobondela mpo na yango mbala na mbala. Kasi, yango ekeseni na kozongela liloba mokomoko mbala na mbala.—Matai 7:7-11.
Biblia ezali na bandakisa mingi ya mabondeli oyo esepelisaka Nzambe, na ndakisa na banzembo, mpe mabondeli oyo Yesu ye moko asalaki.b (Nzembo 17 mpe 86, maloba oyo ezali na likoló; Luka 10:21, 22; 22:40-44) Libondeli moko ya Yesu ezali na Yoane mokapo 17. Zwá mwa miniti mpo na kotánga yango. Ntango ozali kotánga, tyá likebi na ndenge Yesu afungolaki motema na ye epai ya Nzambe. Okomona mpe ete Yesu asalaki libondeli yango kaka mpo na ye moko te, amonisaki mpe bolingo makasi oyo azalaki na yango mpo na bayekoli na ye. Alobaki boye: “Tata mosantu, . . . okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe,” Satana.—Yoane 17:11, 15.
Ntango otángaki libondeli ya Yesu, omonaki ete azongelaki ata moke maloba moko mbala na mbala? Te! Oyo nde ndakisa kitoko atikelaki biso! Ya solo, bato nyonso oyo balingi kopusana penepene na Nzambe ya solo basengeli koyeba ye malamumalamu. Na nsima, bolingo mpe boyebi wana ekotinda bango báboya milulu ya mangomba ya lokuta mpe mimeseno oyo Nzambe aboyaka. Yehova alobi na bato yango ete: “Nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi.”—2 Bakolinti 6:17, 18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na libondeli na ye ya ndakisa, Yesu alobaki te ete: “Bosengeli kosalaka libondeli oyo,” yango elingaki koyokana te na toli oyo autaki kopesa. Alobaki nde: “Bosengeli kobondela ndenge oyo.” (Matai 6:9-13) Liteya nini alingaki kopesa? Ndenge libondeli ya ndakisa emonisi yango, tosengeli kobondelaka liboso mpo na makambo ya elimo.
b Atako bato bazalaki koyemba banzembo na mabaku ndenge na ndenge, bazalaki te kozongela maloba na yango mbala na mbala; bazalaki mpe kosalela basapɛlɛ to moulin à prières te.
OSILÁ KOMITUNÁ?
◼ Toli oyo Yesu apesaki na likambo etali kozongela maloba mbala na mbala na mabondeli etaleli mpe kosalela basapɛlɛ mpe moulin à prières?—Matai 6:7.
◼ Mabondeli na biso esengeli komonisa ete totalelaka Nzambe lokola nani?—Yisaya 64:8.
◼ Ndenge nini Nzambe akotalela biso soki tobwaki mimeseno mabe ya mangomba ya lokuta?—2 Bakolinti 6:17, 18.