Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/12 nk. 14-18
  • Tozala ntango nyonso pene na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozala ntango nyonso pene na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe andimaka mabondeli na biso mayokani na mokano na ye
  • Baoyo bazalaki ntango nyonso pene na Jéhovah
  • Yesu, ndakisa na biso
  • Tokitisa bozito na biso epai na Jéhovah
  • Libondeli mpe elikya ekoumela seko
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/12 nk. 14-18

Tozala ntango nyonso pene na Jéhovah

“Bolendendela kati na mabondeli.”​—BALOMA 12:12, MN.

1. Jéhovah alingi nini na ntina etali libondeli, mpe ntóma Paulo apesi biso elendiseli nini kati na likambo yango?

JÉHOVAH AZALI “Nzambe oyo akopesaka elikya” epai na basaleli na ye ya sembo. lokola azali Ye oyo’akoyokaka mabondeli,’ azali ntango nyonso koyoka bango wana bakosengaka lisalisi na ye ete bakoka kozwa elikya ya esengo oyo alaki bango. (Baloma 15:13; Nzembo 65:2) Na nzela na Liloba na ye, Biblia, Jéhovah ezali kolendisa basaleli na ye nyonso ete baya epai na ye na ntango nyonso oyo bazali na mposa na ye. Azali wana ntango nyonso, mpamba te alingi ete bayebisa ye makambo mazali mpenza kotungisa bango. Azali kopesa bango toli ete ‘balendendela kati na mabondeli,’ ete ‘batika kobondela te.’a (Baloma 12:12, MN; 1 Batesaloniki 5:17, MN) Jéhovah alingi ete baklisto nyonso babengaka ye ntango nyonso kati na mabondeli, ete bazipola mitema na bango liboso na ye, mpe yango na nkombo na Mwana na ye molingami, Yesu Klisto.​—Yoane 14:6, 13, 14.

2, 3. (a) Mpo na nini Nzambe apesi biso toli ya ‘kolendendela kati na mabondeli’? (b) Nini endimisi biso ete Nzambe alingi ete tobondelaka ye?

2 Mpo na nini Nzambe apesi biso toli oyo? Mpo ete misala na biso mpe mikumba na biso mikoki kozala na kilo mingi kino bokoki kobosana kobondela. Soko mbala mosusu tozwi mitungisi mingi, tokosepela lisusu te kati na elikya mpe tokobondela lisusu te. Na yango, tozali na mposa na toli oyo mpo na kolendisa biso na kobondela mpe na kobɛlɛma mingi epai na Jéhovah, Nzambe na biso, liziba ya lisalisi mpe ya elendiseli.

3 Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bobɛlɛma epai na Nzambe, mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” (Yakobo 4:8) Atako ezaleli na biso ya kozanga kokoka, Nzambe atómbwani mosika mingi te mpe etangwi mosika mingi te ete nzanga koyoka makambo oyo tozali koloba na ye. (Misala 17:27) Azali na bopotu te mpo na kotalela makambo oyo mazali kobimela biso. Mokomi na nzembo alobaki ete: “Miso na Jéhovah makotalaka bato na boyengebene, mpe matoi na ye makoyokaka kongánga na bango.”​—Nzembo 34:15; 1 Petelo 3:12.

4. Ndakisa nini tokoki kopesa mpo na kolobela likebi oyo Jéhovah azali kotya na mabondeli?

4 Jéhovah azali kosɛnga biso ete tobondela ye. Ezali lokola nde mwa ntalo monene ya bato bayangani mpo na kosolola. Ozali kati na bango mpe ozali kolanda wana basusu bazali koloba. Na ntango wana, ozali bobele kotala yango bazali kosala. Kasi na pwasa, omoni moto abongwani epai na yo, atangi nkombo na ye mpe abandi koloba na yo. Yango ekobenda mpenza likebi na yo. Bobele bongo, Nzambe azali ntango nyonso koyoka basaleli na ye ata esika nini bango bazali. (2 Ntango 16:9; Masese 15:3) Akoyokaka maloba na biso, kotaláká biso na likebi nyonso mpe na liso na kobatela. Na ntango tozali kobelela nkombo na ye na libondeli, tobendaka likebi na Nzambe mpe atalelaka biso na bosikisiki. Na nguya na ye, Jéhovah akoki ata komona mpe kososola malɔmbo oyo tosalelaka na nkuku kati na motema na biso mpe na elimo na biso. Nzambe azali kopesa biso endimiseli ete nkobɛlɛmaka na bato nyonso ya motema sembo baoyo babelelaka nkombo na ye mpe bakosalaka makasi mpo na kobɛlɛma epai na ye.​—Nzembo 145:18.

Nzambe andimaka mabondeli na biso mayokani na mokano na ye

5. (a) Likambo oyo ete tosengeli ‘kolendendela kati na mabondeli’ ebakisi nini? (b) Lolenge nini Nzambe andimaka mabondeli?

5 Soki Paulo azali kopesa biso toli kolendendela kati na mabondeli, ezali mpo ete jéhovah azali mbala mosusu kotika biso ete tobondela mwa ntango mingi liboso na kososola ete ayoki biso. Na ntango oyo tozalaka mpenza na mposa makasi na ngolu to na boboto na jehovah tokoki mbala mosusu kolɛmba na kosɛnga ye mpo ete yango emonani lokola nde ezali koumela. Tala tina oyo Jéhovah Nzambe azali kolendisa biso ete totika te mpo na koyebisa ye mitungisi na biso koyebáká ete ye andimaka mabondeli na biso mpe akopesa biso bobele makambo oyo tozali na yango na makanisi te kasi oyo tozali na yango mposa Jéhovah andimaka mabondeli na biso soko yango eyokani na mokano na ye; mpamba te ekoki kozala, na ndakisa, ete mabondeli na biso mazali kotya bato mosusu na likámá. Ezali lokola mwana oyo azali kosɛnga na tata na ye ete asombela ye velo. Tata ayebi ete soki andimi yango, mwana mosusu akolinga ete ye mpe azala na velo. Kasi lokola mwana mosusu abongi na kozwa velo te mpo ete azali moke mingi, tata akozwa ekateli mbala mosusu ete asomba ata velo moko te na ntango wana. Bobele bongo, na kotalela mokano na ye mpe ebongiseli na ye, Tata na biso na likoló akopesaka biloko oyo bizali malamu mpo na biso mpe mpo na bato mosusu.​—Nzembo 84:8, 11; tala Habakuku 2:3.

6. Yesu apesaki lisese nini na ntina etali libondeli, mpe kolendendela kati na mabondeli emonisi likambo nini?

6 Mpo na yango, Yesu apesaki lisese moko kitoko likoló na ntina oyo bayekoli na ye basengelaki “ntango nyonso kobondela kozanga kotika.” Mwasi moko mokufeli mobali, oyo akokaki kolónga na esambiselo te, alendendelaki na lilɔmbɔ na ye epai na mosambisi kino alóngisamaki. Bongo, Yesu alobi ete “Nzambe akolóngisa baponami na ye té?” (Luka 18:1-7) Moto oyo azali kolendendela kati na mabondeli, amonisaka kondima na ye,lolenge oyo azali kotya motema epai na Jéhovah, mposa azali na yango mpo na kobɛlɛma epai na Jéhovah mpe na koyebisa lilɔmbɔ na ye na kotikeláká ete Jéhovah abongisa likambo yango.​—Baebele 11:6.

Baoyo bazalaki ntango nyonso pene na Jéhovah

7. Na komekola kondima ya Abele, lolenge nini tokoki kozala ntango nyonso pene na Jéhovah?

7 Biblia etondi na mabondeli mingi masalemaki na basaleli na Nzambe. Mabondeli yango makomamaki “mpo na kolakisa biso ete tozala na elikya na nzela na koyika mpiko na biso mpe na libɔndisi liuti na Makomami.” (Baloma 15:4) Totalela mwa bandakisa ya bato oyo bazalaki ntango nyonso pene na Jéhovah: elikya na biso ekolendisama. Abele atumbaki mbeka oyo Nzambe andimaki mpe, atako elobami te ete abondelaki, na ntembe te alobaki na Jéhovah mpo na kosɛnga ye ete andima mbeka na ye. Totangi na Baebele 11:4 (MN) ete: “Na kondima, Abele atombwelaki Nzambe mbeka na motuya mingi koleka oyo na Kaina, mpe na yango, azwi litatoli ete azalaki moyengebene.” Abele ayebaki elaká na Nzambe oyo ezwami na Genese 3:15, kasi, na kotalela makambo oyo biso toyebi yango lelo, boyebi na ye ezalaki mingi te. Atako bongo, Abele asalaki engebene boyebi oyo azalaki na yango. Bobele bongo na eleko na biso, bamoko kati na baoyo bauti koyamba solo na bonzambe kala mingi te, naino bazwi boyebi mingi te. Nzokande, lokola Abele, bazali kobondela mpe bazali kozwa matomba ya boyebi oyo bazali na yango. Na ntembe te, bazali kosala yango na kondima.

8. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Abalayama azalaki ntango nyonso pene na Jéhovah, mpe motuna nini tosengeli komituna?

8 Kati na basaleli na sembo na Nzambe, tokoki kotanga Abalayama, “tata na baoyo nyonso bazali na kondima.” (Baloma 4:11) Lelo, tosengeli mpenza kozala na kondima makasi mpe kobondela lokola Abalayama. Genese 12:8 elobi na ntina na tata na mabota ete atongaki etumbelo “mpo na Jéhovah mpe abelelaki nkombo na Jéhovah.” Abalayama ayebaki nkombo na Nzambe mpe azalaki kosalela yango kati na mabondeli na ye. Azalaki mbala mingi kolendendela kati na mabondeli, na kobeleláká “nkombo na Jéhovah, Nzambe na seko.” (Genese 13:4; 21:33) Abalayama azalaki kobelela nkombo na Nzambe na kondima azalaki na yango. (Baebele 11:17-19) Na nzela na libondeli, Abalayama azalaki ntango nyonso kosepela mingi kati na elikya na Bokonzi. Tozali nde kolanda ndakisa ya Abalayama na kolendendela kati mabondeli?

9. (a) Mpo na nini mabondeli na Davidi mazali na motuya mingi mpo na basaleli na Nzambe ya ntango na biso? (b) Matomba nini tokozwa soki tokobondela mpo na kozala ntango nyonso pene na Jéhovah na ndakisa na Davidi?

9 Davidi alendendelaki kati na mabondeli na motindo na kokamwa, mpe banzembo oyo akomaki emonisi motindo oyo tosengeli kosala mabondeli na biso. Na ndakisa, ebongi ete basaleli na Nzambe babondela mpo ete babikisama to basikolama (Nz 3:7, 8; 60:5), mpo na kozwa litambwisi (Nz 25:4, 5), mpo na kobatelama (Nz 17:8), mpo na kolimbisama na masumu na bango (Nz 25:7, 11, 18) mpo na kozala na motema na pɛto (Nz 51:10). Wana azalaki na mpasi, Davidi abondelaki ete: “Sepelisa molimo na mosali na yo.” (Nz 86:4) Biso mpe tokoki kobondela mpo na kozwa esengo na motema, awa eyebi biso ete Jéhovah alingi ete tosepela kati na elikya na biso. Davidi azalaki ntango nyonso pene na Jéhovah mpe abondelaki ete: “Molimo na ngai mokangami na yo; lobɔkɔ na yo na mobali losimbi ngai makasi.” (Nz 63:8) Tokotikala ntango nyonso pene na Jéhovah lokola Davidi asalaki yango? Soki ee, akosunga biso lokola.

10. Likanisi mabe nini Asafa azalaki na yango na eleko moko, kasi asosolaki likambo nini?

10 Mpo na kozala ntango nyonso pene na Jéhovah, tosengeli te kolula motindo na bomoi ezangi lobanzo mpe na mposa na mosolo na bato mabe. Na eleko moko, mokomi na nzembo Asafa akanisaki ete ntina ezali te mpo na kosalela Jéhovah, mpamba te bato mabe “bazali ntango nyonso na kimya.” Kasi ayaki kososola ete likanisi na ye lizalaki malamu te mpe ete bato mabe bazali “na nzela na mosɛlu.” Asosolaki likambo oyo ete: eloko mosusu eleki malamu ezali te, bobele kozala ntango nyonso pene na Jéhovah. Mpe alobaki na ye ete: “Nazali ntango nyonso elongo na yo; yo osimbi lobɔkɔ na ngai na mobali. Mpamba te tala, baoyo bazali na yo mosika bakokufa. . . Kasi mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe. Nasili kotya elikya na ngai epai na Jéhovah, Nkolo moyangeli na molongó, mpo na kosakola misala na yo nyonso.” (Nzembo 73:12, 13, 18, 23, 27, 28) Na esika na kolula bomoi ezangi lobanzo oyo na bato mabe baoyo bazangi elikya, tomekola Asafa na kozaláká ntango nyonso pene na Jéhovah.

11. Mpo na nini tokoki koloba ete Danyele azali ndakisa malamu ya moto oyo azalaki ntango nyonso pene na Jéhovah, mpe lolenge nini tokoki komekola ye?

11 Na ekateli makasi, Danyele alendendelaki kati na mabondeli, nzokande azalaki na likámá ya kobwakama kati na libulu na nkɔsi, mpo ete aboyaki kotosa mobeko oyo bakonzi bapesaki na ntina na kobondela. Kasi, Jéhovah “atindaki anzelu na ye mpe azipaki minoko na nkɔsi,” bongo abikisaki Danyele. (Danyele 6:7-10, 22, 27) Lolenge oyo Danyele alendendelaki kati na mabondeli ezwilaki ye bolamu. Boni mpo na biso, tozali kolendendela kati na mabondeli, mingi mpenza na ntango mosala na biso ya kosakola Bokonzi mopekisami?

Yesu, ndakisa na biso

12. (a) Ndakisa nini Yesu apesaki na ebandeli ya mosala na ye, mpe baklisto akoki kozwa litomba nini na yango? (b) Libondeli ya elakiseli oyo Yesu apesaki, emonisi biso nini?

12 Uta ebandeli ya mosala na ye awa na mabelé, tomoni ete Yesu azalaki kobondela. Ezali na ntango oyo azwaki batisimo; ezali ndakisa malamu mpo na bato oyo bazali kozwa batisimo na mikolo na biso. (Luka 3:21, 22) Bato yango bakoki kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye ete asalisa bango na kokokisa limonisami na batisimo na mai. Epai mosusu, Yesu amonisaki epai na bato ya ntango na ye lolenge ya kobɛlɛma epai na Jéhovah kati na mabondeli Mokolo moko, wana Yesu autaki kobondela, moko na bayekoli na ye asɛngaki ye ete: “Nkolo, lakisa biso kobondela.” Yesu asalaki bongo libondeli ya Tata na Biso, oyo emonisi na kolandana na makambo malɔmbami ete, nkombo mpe mokano na Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso. (Luka 11:1-4) Na yango, tosengeli kozala na bokatikati wana ezali biso kobondela mpe tosengeli kotya likambo na likambo na esika na yango, mpo ete “makambo na ntina mingi” matalelama na bopotu te. (Bafilipi 1:9, 10, MN) Ya solo, ekoki kozala na mposa moko to likambo moko oyo tokutani na yango. Na ndakisa na Yesu, baklisto bakoki kosɛnga na Nzambe ete apesa bango makasi ya kokokisa mikumba mosusu to ya kotɛmɛla momekamo to likámá oyo lizwi bango. (Matai 26:36-44) Solo mpenza, , mabondeli ya moto na moto matali pene makambo nyonso ya bomoi.

13. Lolenge nini Yesu amonisaki ntina ya kobondela mpo na bato mosusu?

13 Na ndakisa na ye eleki malamu, Yesu amonisaki ntina ya kobondela mpo na bato mosusu. Ayebaki ete bayekoli na ye bakoyinama mpe bakonyokwama lokola ye. (Yoane 15:18-20; 1 Petelo 5:9) Na yango asɛngaki na Nzambe ete “obatela bango na ntina na oyo mabe.” (Yoane 17:9, 11, 15, 20) Lisusu, wana ayebaki momekamo oyo Petelo asengelaki kokutana na yango, Yesu alobaki na ye ete: “Nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo esɛnzwa te.” (Luka 22:32, MN) Ebongi mpenza ete tobondela ntango nyonso mpo na bandeko na biso, na kobanzáká bobele na makambo na biso moko te, kasi na oyo ya bato mosusu lokola.​—Bafilipi 2:4; Bakolose 1:9, 10.

14. Lolenge nini toyebi ete Yesu azalaki mpenza ntango nyonso pene na Jéhovah na boumeli na mosala na ye awa na mabelé, mpe lolenge nini tokoki komekola ye?

14 Na boumeli ya mosala na ye Yesu alendendelaki kati na mabondeli mpe azalaki ntango nyonso pene na Jéhovah. (Baebele 5:7-10) Na Misala 2:25-28 ezali na maloba na ntóma Petelo, oyo azongeli Nzembo 16:8 mpe akokisi yango na Yesu Klisto, ete: “Davidi alobaki ná ntina na ye ete: ‘Nazalaki kotala Jéhovah liboso na ngai ntango nyonso; mpo ete azali na lobɔkɔ na ngai na mobali ete naningana te.”’ ? Biso mpe tokoki kosala bongo. Tokoki kobondela Nzambe mpo ete azala pene‘na biso, mpe tokoki komonisa elikya oyo tozali ná yango epai na ye kobateláká yango ntango nyonso kati na makanisi na biso. (Tala Nzembo 110:5; Yisaya 41:10, 13.) Bongo, tokopɛngola motindo na mikakatano nyonso, mpamba te Jéhovah akosunga biso mpe tokoningana soko moke te.

15. (a) Mpo na makambo nini tosengeli mpenza kolendendela kati na mabondeli? (b) Likebisi nini lipesameli biso na ntina na botɔndi na biso?

15 Tosengeli kotɔndo Jéhovah mpo na malamu na ye nyonso, “ngolu monene na Nzambe” oyo apesaki biso likabo ya Mwana na ye lokola mbeka ya lisiko mpo na masumu na biso. (2 Bakolinti 9:14, 15; Malako 10:45; Yoane 3:16; Baloma 8:32; 1 Yoane 4:9, 10) Ee, na nkombo na Yesu, “totɔndaka ntango nyonso Nzambe mpe Tata na biso mpo na makambo nyonso. ”(Baefese 5:19, 20; Bakolose 4:2; 1 Batesaloniki 5:18) Tosengeli kobatela botɔndi na biso mpo na biloko oyo tozali na yango, na esika na kobanza na kolekisa ndelo mpo na biloko oyo tozali na yango te to na mikakatano na biso.

Tokitisa bozito na biso epai na Jéhovah

16. Tosengeli kosala nini na ntango tozwi bozito mingi?

16 Na kolendendeláká kati na mabondeli, tozali nde komonisa bozindo ya bokangami na biso mpo na Jéhovah. Na ntango tozali kobondela Nzambe, tokookaka bolamu liboso nkutu ete andima biso. Soki makanisi na biso matungisami na bozito moko, tokoki kozala ntango nyonso pene na Jéhovah na kolandáká toli oyo ete: “Kitisa bozito na yo epai na Jéhovah mpe ye akosunga yo.” (Nzembo 55:22 MN) Soko tokokitisa bozito na biso nyonso​—mpasi na biso mitungisi na biso, mawa na biso, nsɔmɔ na biso mpe bongo na bongo​—epai na Nzambe kozaláká na kondima nyonso epai na ye, motema na biso mokozwa ’’ kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”​—(Baefese 4:4, 7; Nzembo 68:19; Malako 11:24 ; 1 Petelo 5:7).

17. Lolenge nini tokoki kozwa kimya na Nzambe?

17 Kimya wana na Nzambe ekoyaka mbala moko. Atako motema mokokita na ntango wana, kasi oyo Yesu alobaki na ntina na mabondeli oyo tosalaka mpo na kozwa elimo santu, ezali kokokana mpe na likambo oyo: “Bosengaka mpe bakopesa bino. Bolukaka mpe bokozwa. Bobɛtela ekuke mpe bakofungwela bino. (Luka 11:9-13, MN) Lokola elimo santu ezali kosalisa biso na kobwaka mitungisi, tosengeli bongo kolendendela mpo na kosunga na Nzambe ete apesa biso kimya na ye mpe lisalisi oyo tozali na yango mposa ete tomema bozito na biso. Soko tokolendendela kati na mabondeli, tokoki kondimisama ete motema mokokitisama mpe mokozala na kimya.

18. Jéhovah akosala nini mpo na biso, soko toyebi mpenza malamu te eloko oyo bokoki kosɛnga na libondeli kati na likambo moko to mosusu?

18 Kasi, tokoki kosala nini soki toyebi mpenza malamu te makambo oyo tokoki kosɛnga kati na mabondeli? Kokimela na motema na biso emonisami polele te mpo tososoli mpenza malamu te ezalela oyo tozali na yango to mpo toyebi te makambo nini tokoki kosɛnga epai na Jéhovah. Ezali na ntango wana nde elimo santu ekoki koloba na esika na biso. Paulo akomaki ete: “Biso moko toyebi te oyo tosengeli kosɛnga kati na mabondeli na motindo na kokoka, kasi kati na kokimela na biso. elimo yango moko ekosɛngaka mpo na biso.” (Baloma 8:26, MN) Lolenge nini wana? Liloba na Nzambe lizali na bisakweli mpe na mabondeli mapemami oyo eyokani na ezalela na biso. Ezali lokola nde Jéhovah atiki yango ete esɛnga mpo na biso. Azali kotalela ete ezali yango nde tosengelaki koloba soki nde tososolaki lolenge makambo yango makokokana epai na biso, mpe akondimaka biso na boyokani na yango.

Libondeli mpe elikya ekoumela seko

19 Mpo na nini libondeli mpe elikya ekoumela mpo na seko?

19 Tokotika te na kobondela Tata na biso na likoló mpo na komonisa botɔndi mingi oyo to kozala na yango mpo na mokili ya sika mpe mapamboli nyonso makouta na yango. (Yisaya 65:24; Emoniseli 21:5) Lisusu, tokolanda kosepela kati na elikya, mpamba te tozali na eloko oyo tokolikya na yango libela na libela (Tala 1 Bakolinti 13:13.) Tokoki nkutu kokanisa te na ntina na biloko ya sika oyo Jéhovah akobimisa na ntango bopemi na ye ekozwa nsuka na yango, Mokolo na sabata oyo ye mipesaki na ntina na mabelé. (Genese 2:2, 3) Na boumeli nyonso ya seko na seko, akobanda kobimisa makambo na esengo mpo na libota na ye, mpe bomoi na bango mpo na ntango ezali koya ezali komonisa bango makambo minene kati na kokokisama na mokano na ye.

20. Tosengeli kozala na ekateli nini, mpe mpo na nini?

20 Awa topusamaki na elikya oyo monene, tika ete biso banso tozala ntango nyonso pene na Jéhovah na kolendendeláká kati na mabondeli. Totika te kotɔndo Tata na biso na likoló mpo na mapamboli na ye nyonso. Na elaká asili kokana, bilikya na biso bikokokana na esengo, mpe ata koleka motindo oyo tozali kokanisa lelo, mpamba te Jéhovah akoki “kosala kati na biso makambo maleki nyonso ezali biso kolɔmba soko kobanza.” (Baefese 3:20) Na yango, topesa nkembo mpe masanzoli mpe ngɔlu na seko epai na Jéhovah, Nzambe na biso, Ye oyo ‘akoyokaka mabondeli.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Engebene Dictionnaire alphabétique et analogique de la langue française, ya Paul Robert, “kolendendela” elimboli “kolanda kosala, kozala motindo oyo okanaki kozala, na kosalelaka yango mbala na mbala.” Mpe engebene Dictionnaire des synonymes, ya Henri Bénac, elimboli “kolanda ntango nyonso kosala likambo oyo lisɛngisi kozala na motema molai mpe na ntango molai.”

Bozongeli

◻ Mpo na nini tozali na mposa ya kolendendela kati na mabondeli?

◻ Na ntina na libondeli, tozwi liteya nini na bandakisa ya bandimi na kala?

◻ Ndakisa na Yesu ezali koteya biso nini na ntina na libondeli?

◻ Lolenge nini tokoki kokitisa bozito na biso epai na Jéhovah, mpe matomba nini makozwama na yango?

[Elilingi na lokasa 17]

Danyele alendendelaki kati na mabondeli, nzokande azalaki na likámá ya kobwakama kati na libulu na nkɔsi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto