Esika ebale moko ezongaka nsima
OSILÁ komona ebale moko oyo ezongaka nsima? To zamba moko oyo ezindaka na mai na boumeli ya sanza motoba? Oyebaka ete ezali na bato oyo bafandaka na bandako oyo etepaka likoló ya mai, oyo esɛngaka bámema yango esika mosusu soki mai ekauki? Okoloba ete makambo ya ndenge wana ekoki kosalema te! Boye, mbala mosusu okobongola makanisi soki okei na ekólo Cambodge na eleko ya mbula.
Kobanda na katikati ya sanza ya Mai tii na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, mapata eyindaka mikolo nyonso mpe na nsima ya midi mbula ebɛtaka makasi. Esopaka mai mingi mpe epɔlisaka mabelé oyo ekaukaki makasi mpe mbala moko bibale etondaka makasi.
Mpo na nini ebale yango ezongaka nsima?
Talá karte oyo ezali na lisolo oyo. Okomona esika oyo ebale monene Mékong ekutaná na Ebale Tonlé Sap. Soki mai ekutani, eumelaka te kokabwana na biteni mibale: Ebale Mékong mpe Ebale Bassac. Na nsima, mai yango ekobaka kosopana na ngámbo ya sudi, elekaka na ekólo Vietnam, mpe na nsima ekómaka delta du Mékong.
Soki eleko ya mbula ebandi, mwa moke na nsima, mai ya delta etondaka. Mai yango ekendaka na mwa balaki mikemike oyo ekaukaki na eleko ya moi. Wana eleko ya mbula ezali kokoba, Ebale Tonlé Sap ezongaka nsima mpe ekendaka na ngámbo ya nɔrdi, na esika ekende na sudi, lokola momesano. Na ndenge yango, ebale oyo etondi ezongaka nsima tii ekendaka kosopana na Laki Tonlé Sap.
Laki yango ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 longwa na Phnom Penh, mboka-mokonzi ya Cambodge. Na ntango ya elanga, bonene ya laki yango ezalaka kilomɛtrɛ-kare 3 000. Nzokande na eleko ya mbula, mai yango ekómaka monene koleka ndenge ezalaka, ekómaka mai oyo eleki monene na Azia ya Sudi-ɛsti mobimba.
Bilanga ya loso, babalabala, banzete mpe bamboka ezindaka. Bamasuwa ya babomi-mbisi oyo ezalaki kotambola na mai oyo ezali na bozindo ya mɛtrɛ moko, ekómaka kotambola na mai oyo ekómi na bozindo ya mɛtrɛ soki 10! Na bisika mosusu, soki mai etondi ndenge wana, mbala mingi emonanaka lokola likama. Kasi, mpo na bato ya Cambodge, kotonda ya mai ndenge wana ezalaka lipamboli. Mpo na nini?
Matomba ya mpela yango
Ntango Ebale Tonlé Sap ezongaka nsima, etikaka pɔtɔpɔtɔ. Longola yango, ebele ya mbisi oyo eutaka na Ebale Mékong ekɔtaka na laki oyo ekómaka na vitamini mingi. Kutu, Laki Tonlé Sap ezali moko ya balaki oyo ezalaka na mbisi mingi na mokili mobimba. Nsima ya eleko ya mbula, mai ya laki yango ekaukaka noki; kutu babomi-mbisi balɔkɔtaka mbisi oyo ekangamaki likoló ya banzete!
Bampela yango oyo esalemaka mbula na mbula ebongisaka mabelé. Banzete ná matiti mosusu oyo ezalaka esika oyo mpela esalemaka ekolaka ndenge moko te na oyo ezalaka esika oyo mpela esalemaka te. Banzete ya mikili ya molunge ekolaka malɛmbɛ, ekweisaka nkasa na ntango ya elanga mpe ebotaka nkasa mosusu na eleko ya mbula. Nzokande, banzete oyo ekolaka esika Tonlé Sap ezali, ekweisaka nkasa na yango kaka soki bambula ezindisi yango. Na esika ekola nokinoki na eleko ya mbula, ekolaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki mpela esili mpe elanga ebandi, bitape ebimaka mpe nkasa ekolaka nokinoki. Soki mai ya laki yango ekauki, mabelé etondaka na nkasa oyo ebandi kopɔla mpo na kopesa vitamini na banzete na elanga ya mbula oyo ekoya.
Bandako batongá likoló ya makonzí mpe oyo etepaka na mai
Tokoloba boni mpo na bato oyo bafandaka na laki? Bato yango batongaka bandako mikemike likoló ya makonzí. Na ntango ya elanga, bandako yango etongamaka na bosanda ya mɛtrɛ motoba. Kasi, na ntango ya mpela, bamasuwa oyo basalelaka mosala ya koboma mbisi mpe babwato ya bibende oyo mbala mosusu basalelaka mpo na komema bana esɛmaka tii na porte.
Bato mosusu ya laki yango batongaka bandako likoló ya biloko oyo ekoki kotepa likoló ya mai. Mpe ntango libota ekoli, bakómisaka bandako yango minene. Bato mosusu balobaka ete ezali na bamboka soki 170 likoló ya laki yango.
Na moi, bilenge mpe mikóló basalelaka minyama mpe milɛkɛ mpo na kokanga mbisi. Soki mai emati to ekiti, bandako to bamboka epusanaka na ntaka ya bakilomɛtrɛ mpo ezala pene ya libongo to ya bisika oyo mbisi ezalaka mingi.
Babwato ya milai ekómaka bawenze, epai bato ya mboka bayaka kosomba biloko mokolo na mokolo; kutu basalelaka yango mpe lokola “babisi.” Bana bakendaka kelasi na bandako oyo etepaka likoló ya mai. Biloko nyonso, bomoi ya banzete to ya bato, elandaka ndenge mai ezali kosala, na esika oyo ebale moko ezongaka nsima.
[Karte na lokasa 23]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Na ntango ya elanga
Na eleko ya mbula
CAMBODIA
Tonle Sap Lake
Tonle Sap River
Mekong River
PHNOM PENH
Bassac River
Mekong Delta
VIETNAM
[Elilingi na lokasa 23]
Mwana moko azali kolúka na Ebale Tonlé Sap
[Bililingi na lokasa 23]
Ndenge mboka yango ezalaka na ntango ya elanga mpe na eleko ya mbula
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
Karte: Euti na NASA/Visible Earth imagery; bafɔtɔ ya mboka: FAO/Gordon Sharpless