Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/09 nk. 24-25
  • Nzambe azali moto ya ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali moto ya ndenge nini?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini alobelami lokola moto?
  • Nzambe azali mobali to mwasi?
  • Ezaleli monene ya Nzambe
  • Mbongwana ya motindo na moto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Okoki kosala nini mpo oyeba Nzambe malamu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nzambe ná Yesu bazali moto moko?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Na ndimbola nini moto akoki kozala elilingi ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 1/09 nk. 24-25

Engebene Biblia

Nzambe azali moto ya ndenge nini?

BIBLIA elobi boye: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.” Maloba yango esalisi biso tóyeba ete Nzambe azali na nzoto, kasi ya elimo. (Yoane 4:19-24) Atako bongo, Biblia emonisi ete Nzambe azali moto. Nkombo na ye ezali Yehova.​—Nzembo 83:18.

Batángi mosusu ya Biblia bayebaka mpenza te soki Nzambe azali moto to te. Balobaka ete soki Nzambe azali elimo, kasi te moto oyo akoki komonana, mpo na nini bavɛrsɛ mingi ya Biblia elobelaka Nzambe lokola nde azali na miso, matoi, zolo, motema, mabɔkɔ, misapi mpe makolo?a Bato mosusu bakoki koloba ete Nzambe azali na nzoto lokola oyo ya moto mpo Biblia elobi ete moto akelamaki na elilingi na ye. Kasi, soki totaleli malamu oyo Biblia elobi, tokoki kolongola mobulungano wana.​—Genese 1:26.

Mpo na nini alobelami lokola moto?

Mpo na kosalisa bato báyeba ndenge Nzambe azali, elimo santu esalisaki bakomi ya Biblia básalela makambo oyo ezali epai ya bato mpo na kolobela Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Maloba wana emonisi ete minɔkɔ ya bato ekoki te kolobela Yehova, Nzambe ya solo, ndenge azali mpenza. Kasi, likanisi ya ntina awa ezali ya komonisa bomoto ya Nzambe mpe kolobela yango na lolenge oyo bato bakoki kokanga ntina. Yango wana, tosengeli te kozwa maloba yango na ndenge ya solo ndenge kaka tozwaka te na ndenge ya solo maloba ya Biblia oyo ebengi Nzambe “Libanga,” “moi,” to “nguba.”​—Deteronome 32:4; Nzembo 84:11.

Ndenge moko mpe, Biblia elobaka ete moto akelamaki na elilingi ya Nzambe mpo na komonisa ete moto azali na bizaleli oyo Nzambe azali na yango. Atako bongo, bizaleli ya Nzambe eleki mosika oyo ya bato. Emonani polele ete bato bazali bilimo te mpe ete Nzambe azali te na nzoto lokola ya bato.

Nzambe azali mobali to mwasi?

Tomonaki ete ntango Biblia elobi ete Nzambe azali na miso, matoi, mpe bongo na bongo, tosengeli te kozwa yango na ndenge ya solo; ndenge moko mpe ntango Biblia elobelaka Nzambe lokola mobali, tosengeli te kozwa yango na ndenge ya solo. Bato nde basalelaka maloba mpo na kokesenisa basi mpe mibali mpe yango emonisaka ete minɔkɔ oyo balobaka ezali na likoki te ya kolobela Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ndenge azali mpenza.

Biblia esalelaka liloba “Tata” mpo na kosalisa biso tóyeba ete Mozalisi na biso azali lokola tata moko ya bolingo mpe oyo abatelaka bana. (Matai 6:9) Yango elingi koloba te ete tosengeli kokanisa ete Nzambe, to bikelamu mosusu ya elimo na likoló bazali mibali to basi. Koluka koyeba soki bazali basi to mibali, ebongi te mpo na bango. Kutu, Biblia emonisi ete baoyo babengami mpo na kosangola libula elongo na Klisto na Bokonzi na ye kuna na likoló bakanisaka te ete ntango bakokóma na nkembo ya bana ya Nzambe ya elimo bakobatela bomoto na bango ya mwasi to mobali. Ntoma Paulo akundwelaki bango ete “ezali na mobali te mpe na mwasi te” kati na bango ntango bakokóma na nkembo ya bana ya Nzambe ya elimo. Lisusu, Biblia elobeli bango na ndenge ya elilingi lokola “mwasi ya libala” ya Mwana-Mpate, Yesu Klisto. Nyonso wana emonisi ete ntango Biblia elobeli Nzambe, to Yesu, Mwana na ye mobotami-se-moko, to mpe baanzelu lokola bato, tosengeli te kozwa yango na ndenge ya solo.​—Bagalatia 3:26, 28; Emoniseli 21:9; 1 Yoane 3:1, 2.

Lokola bakomi ya Biblia bayebaki malamu mokumba ya mobali, yango wana balobelaki Nzambe lokola mobali. Bamonaki ete mobali oyo azali kokokisa malamu mokumba na ye azali elilingi oyo ebongi mpo na komonisa bolingo ya Yehova mpe motema ya tata oyo azalaka na yango mpo na bana na ye awa na mabelé.​—Malaki 3:17; Matai 5:45; Luka 11:11-13.

Ezaleli monene ya Nzambe

Atako azali elimo, Nkolo ya molɔ́ngɔ́ azalaka mosika te na bato, atondá na mabombami te mpe aboyaka te koyoka mabondeli. Atako azali elimo, atiki nzela polele mpo na bato ya mitema sembo oyo balingi koyeba mpe kosepela na bolingo, nguya, bwanya mpe boyengebene na ye, oyo emonisaka bomoto na ye mpe emonanaka na biloko akelá.​—Baloma 1:19-21.

Kasi, bomoto ya Nzambe ezali komonana na ezaleli na ye oyo eleki monene: bolingo. Lokola bolingo na ye ezali monene mingi, Biblia elobaka ete Nzambe azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Ezaleli yango esangisi bizaleli na ye mosusu lokola motema mawa, kolimbisa mpe motema molai. (Exode 34:6; Nzembo 103:8-14; Yisaya 55:7; Baloma 5:8) Yehova azali mpenza Nzambe ya bolingo oyo azali kosɛnga biso tópusana penepene na ye.​—Yoane 4:23.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá na ndakisa Genese 8:21; Exode 3:20; 15:8; 31:18; 1 Samwele 8:21; Yobo 40:9; Nzembo 10:17; 18:9; 34:15; Masese 27:11; Ezekiele 8:17; Zekalia 14:4; Luka 11:20; Yoane 12:38; Baloma 10:21; mpe Baebele 4:13.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Nkombo ya Nzambe ezali nani?​—Nzembo 83:18.

◼ Epai wapi tokoki komona bizaleli ya Nzambe?​—Baloma 1:19-21.

◼ Wapi ezaleli monene ya Nzambe?​—1 Yoane 4:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto