Mpasi na ntango ya bitumba eteyá ngai makambo mingi na bomoi
LISOLO YA ERNST KRÖMER
“Shambre na bino yango oyo.” Ezali na maloba wana nde bayambaki ngai ná moninga na ngai na Gabon, na Afrika ya wɛsti. Shambre yango ezalaki mpenza moke mpe ekokaki kaka matela moko. Tofandaki na shambre yango sanza motoba.
BOMOI ya mpasi oyo tozalaki na yango na ferme na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, esalisaki namesana na makambo ya mpasi. Ntango etumba yango ebandaki na mobu 1939, eumelaki te, Banazi oyo bazalaki koyangela Allemagne bazwaki ekólo Pologne. Nazalaki na mbula minei na ntango wana. Na libota na biso, tozalaki: ngai, bayaya na ngai mibale ya basi, baleki na ngai mibale, moko ya mobali mpe mosusu ya mwasi, mpe baboti na biso. Tata ayebisaki biso ete soki Allemagne elongi etumba te tokokóma na bomoi ya mpasi.
Tozalaki kofanda na Löwenstein, mwa mboka moke ya Allemagne, na etúká ya basse Silésie, oyo ekómá lelo na Pologne. Ferme na biso ezalaki monene hectares soki 25, tozalaki kolona masangu mpe blé mpe kobɔkɔla bibwele. Lisusu, Tata azalaki mokambi ya basali-bilanga nyonso na etúká wana. Ntango Banazi bazwaki etúká yango, basalelaki Tata mpo atinda basali-bilanga nyonso básalisa basoda oyo bazalaki kobunda bitumba.
Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Tata azalaki kati na basoda oyo babundaki na bampunda, kasi sikoyo lokola andimaki kosala na Banazi, bakɔtisaki ye na mosala ya soda te. Baboti na ngai batikaki kosambela banda kala, mpo balɛmbaki nzoto ntango bamonaki makambo oyo bakonzi ya mangomba basalaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Yango wana ntango nakolaki, nazalaki kosepela na mangomba te.
Nakɔtaki kelasi na mobu 1941, kasi nazalaki kolinga kelasi te, namonaki ete ezalaki na makambo mingi mosusu ya ntina ya kosala na esika ya kokendaka kotala tablo. Na ebandeli ya mobu 1945, mwa basanza liboso etumba esila, engumba Breslau (lelo oyo Wrocław), mboka-mokonzi ya etúká ya basse Silésie, ekweaki na mabɔkɔ ya basoda ya Russie. Mokolo moko ya pɔsɔ na mpokwa, tomonaki engumba yango, mosika kilomɛtrɛ pene na 50, ezali kopɛla na mɔtɔ ya masasi mpe ya babɔmbi oyo bampɛpɔ ezalaki kobwaka. Eumelaki te, esengelaki tókima na bangomba. Ntango etumba esilaki, tozongaki na Löwenstein.
Nsima ya etumba
Nsima ya etumba, ezalaki ntango moko ya mpasi. Bazalaki kosangisa nzoto na basi na makasi, mpe kobɔtɔla biloko ya bato mikolo nyonso. Bayibaki bibwele na biso pene na nyonso.
Na sanza ya Yuli 1945, bakangaki Tata. Nsima ya kotunatuna ye mituna butubutu mikolo nsambo, batikaki ye. Sanza misato na nsima, bakangaki ye lisusu mpe bakendaki na ye libela. Kobanda wana, tomoná ye lisusu te. Bato mibale ya Pologne babɔtɔlaki ferme na biso. Na sanza ya Aprili 1946, bayebisaki bato nyonso ya Allemagne oyo bazalaki na mboka wana bálongwa mpe bázwa bobele mwa biloko oyo bakokoka komema.
Lokola mama ayebisaki biso likambo yango liboso, yango wana tobangaki te. Azalaki na kitunga moko ya monene oyo ezalaki na bapine, atyaki bilamba na biso ya kofinika na kati, mpe mokomoko na biso amemaki mwa sakosi ya mokɔngɔ, oyo totondisaki na biloko oyo tosengelaki na yango. Basoda ya Pologne bamemaki biso na bawagɔ oyo ememaka banyama—bato 30 na wagɔ moko. Nsima ya pɔsɔ soki mibale, tokómaki na esika oyo tozalaki kokende, na nɔrdi-wɛsti ya Allemagne, mosika te na Pays-Bas.
Guvɛrnema epesaki libota na biso, bakisa mpe bandeko na biso mosusu—biso nyonso bato 19—shambre mibale na ferme moko, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki mwambe na Quakenbrück. Na nsima, bapesaki bandeko na biso mosusu bisika ya kofanda na baferme mosusu, mpe tozalaki lisusu kofinana te na biteni wana mibale ya ndako.
Mama azalaki koboma nzoto mpo na biso bana, mbala mingi azalaki kolala nzala mpo biso tólya. Na mbula ya liboso, tozalaki na koni ya kopelisa mɔtɔ te na eleko ya malili makasi. Bifelo mpe plafɔ ya shambre na biso etondaki na ngalasi, mpe ezalaki lokola tozali na kati ya frigo. Eloko ebikisaki biso ezali babolangiti oyo tozalaki kofinika.
Nakutani na Batatoli
Na mobu 1949, mwasi ya nɔkɔ na biso apesaki mama Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lisolo moko na kati ekundwelaki mama likambo oyo ayokaki na radio na ntango ya etumba, ndenge Hitler azalaki koloba mabe mpo na ‘etuluku moko ya bato’ oyo bazalaki koloba ete Allemagne ekokwea. Mama azalaki komituna soki bato yango bazalaki banani. Ntango atángaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli wana ete ezalaki nde Batatoli ya Yehova, yango ebendaki likebi na ye mpe azwaki ekateli ya koyekola Biblia elongo na bango.
Mokolo moko na sanza ya Aprili 1954, nayaki kokuta Motatoli moko ná mwasi na ye bazali koyekola na Mama. Nsima ya boyekoli, bapesaki ngai mwa buku Pouvez-vous vivre à jamais dans le bonheur sur la terre? mpe nasalaki abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nsima ya kotánga mwa buku wana, nandimaki ete namoni solo. Napesaki mpe patrɔ na ngai ya mwasi mpo atánga yango. Ntango natunaki ye soki akanisi nini na makambo oyo atángi, alobaki boye: “Makanisi oyo ezali na kati ezali mpenza malamu, kasi makambo ya ndenge wana ekoki kosalema te. Nakoki kondima yango te.”
Nalobaki na ye: “Ngai nandimi ete oyo ezali solo, mpe nakolanda yango.” Aningisaki motó mpe alobaki: “Makambo oyo ezali mpo na bato ya kimya. Yo oleki mobulu, okoki kokóma Motatoli te.” Kasi nabandaki kobongola bomoto na ngai.
Atako na mboka wana Batatoli bazalaki te, nayekolaki ngai moko mpe nazalaki kosala kilomɛtrɛ soki zomi na velo pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyangana na makita na bango. Na nsima, nakendaki na liyangani ya zongazonga, esika masangá ebele ya Batatoli ekutanaki mpo na losambo. Ezali kuna nde nabimaki na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso elongo na bandeko mosusu. Eumelaki te, nakómaki kosakola mbala na mbala. Na mokolo ya 14 Yuli 1954, ngai ná mama tozwaki batisimo. Na nsima, nkɔkɔ na ngai ya mwasi, oyo azalaki na mbula 80, akómaki mpe Motatoli.
Nazalaki kosala na ferme moko mpe mosala yango ezalaki kozwa ngai ntango mingi, yango wana natikaki yango mpe nazwaki mosala mosusu na ebongiseli moko ya kobatela zamba. Na nsima, libota na biso ekendaki kofanda na Reutlingen, mwa engumba moke pene na Stuttgart. Ezali na ntango oyo tozalaki kuna nde leki na ngai ya mwasi, Ingrid, akómaki mpe Motatoli. Na bandeko na ngai nyonso, kaka ye nde akómá Motatoli.
Mosala ya ntango nyonso
Na mobu 1957, nsukansuka mama azwaki mokanda ya Leta oyo emonisaki ete tata akufá. Yango epesaki ye nzela abanda kozwa mbongo ya pasyɔ, mpe azalaki lisusu kozela ngai te mpo na kosalisa ye na mbongo. Lokola nazalaki lisusu na mokumba ya libota te, nalukaki mosala ya ndambo ya mokolo mpe na sanza ya Aprili 1957, nabandaki mosala ya ntango nyonso, nakómaki mobongisi-nzela. Na nsima, basɛngaki ngai nasala lokola mobongisi-nzela monene. Ntango ndeko moko Motatoli ayokaki yango, abengaki ngai na biro na ye mpe alobaki na ngai: “Nakanisi, okozala na mposa ya mwa lisalisi.” Na nsima, apesaki ngai mbongo, deutsche marks 500. Nasombaki bilamba nyonso oyo nasengelaki na yango mpe natikalaki na deutsche marks 200.
Na mobu 1960, nandimaki kokende na Autriche mpe kuna nasakolaki na mboka moke ya Scheibbs mpe mwa moke na engumba Linz. Kasi na nsima, kaka na mbula wana, nakweaki na tukutuku na ndenge ya mabe mpenza mpe nabukanaki lokolo ya mobali. Nsima ya kosala ngai lipaso mbala ebele na lokolo yango, nakómaki malamu mpe nakobaki na mosala na ngai. Kasi, na mobu 1962, esɛngaki nazonga epai na biso na Reutlingen mpo na kobongisa lisusu mikanda ya Leta mpo na mboka mopaya. Ntango nazalaki kuna, basalaki ngai lipaso mosusu mpo na kolongola ebende oyo batyaki ngai na lokolo. Nakataki naino mosala ya mobongisi-nzela mpo na sanza motoba, mpo na koluka mbongo ya kofuta na lopitalo.
Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá oyo nazalaki, apesaki ngai toli natondisa lokasa mpo na kosɛnga kosala na biro ya Batatoli na Allemagne, oyo na ntango wana ezalaki na engumba Wiesbaden. Nasalaki yango mpe pɔsɔ mibale na nsima batindelaki ngai telegramɛ ete nakende noki mpenza. Nsima ya pɔsɔ moko, na sanza ya Mai 1963, nakɔtaki na Betele ya Allemagne, mpe kuna bapesaki ngai mosala na masini moko ya konyata bazulunalo.
Namipesi na koyekola
Betele ezalaki esika ya malamu koleka bisika nyonso oyo nafandá, mpe naumelaki te komesana na mosala makasi oyo ezalaka kuna. Na mobu 1965, nasalaki mobembo na Espagne, mpe namemaki, na ndenge ya kobombana, mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpo na ntango wana bapekisaki mosala ya kosakola kuna. Mobembo wana etindaki ngai nayekola monɔkɔ mosusu, mpe naponaki Lingelesi. Nazalaki kosalela libaku nyonso mpo na koyekola yango. Na ntango wana, lisangá ya liboso ya Lingelesi esalemaki na Allemagne, mpe nakendaki na lisangá yango. Mbala ya liboso oyo nabongisaki boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi, nalekisaki ngonga nsambo. Na mbala ya mibale, ntango nasalaki bobele ngonga mitano, namonaki ete nabandi koyeba.
Na mobu 1966, babengaki ngai nakɔta na kelasi ya mbala ya 43 ya Gileadi, eteyelo moko na États-Unis oyo epesaka formasyo na baministre Batatoli ya Yehova mpo na mosala ya misionɛrɛ. Nsima ya kozwa diplome na eteyelo yango, batindaki ngai ná Günther Reschke na Gabon, na Afrika ya wɛsti, na sanza ya Aprili 1967. Ntango tokómaki na Libreville, mboka-mokonzi ya ekólo Gabon, tofandaki na mwa shambre oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, mpe tozalaki kotya bilamba na biso na eteni ya ndako ya kolya (Salle à manger). Sanza motoba na nsima, tokendaki kofanda na ndako mosusu ya bamisionɛrɛ.
Na Gabon, nabundaki etumba makasi mpo na koyekola Lifalanse. Nsukansuka, nsima ya kosala milende, nakómaki koloba yango mwa malamu. Na nsima, na mobu 1970, bapekisaki mosala na biso ya kosakola na Gabon na mbalakaka, mpe bapesaki biso bamisionɛrɛ pɔsɔ mibale mpo tólongwa na ekólo yango.
Nakei na République centrafricaine
Batindaki ngai elongo na bamisionɛrɛ mosusu na République centrafricaine. Lifalanse nde ezalaki monɔkɔ ya Leta; kasi mpo na kozala na likoki ya kosakola epai ya bato mingi, esengelaki tóyekola monɔkɔ ya Sango. Batindaki biso tókende kofungola ndako ya bamisionɛrɛ na engumba Bambari, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 300 na mboka-mokonzi Bangui. Na Bambari, kura ezalaki te, mai ya pɔmpi mpe te; kasi esengelaki tókende kopesa mabɔkɔ na masangá mibale oyo ezalaki kuna. Bomoi ya mpasi oyo nazalaki na yango na Mpoto na ntango ya etumba esalisaki ngai namesana noki na bomoi na Bambari, mpe na bisika mosusu oyo nafandaki na nsima.
Nsima ya kosakola mbula mibale na Bambari, batindaki ngai lokola mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kotala masangá. Masangá ezalaki soki 40 na ekólo yango mobimba, mpe nazalaki kolekisa pɔsɔ moko na lisangá mokomoko. Nazalaki na motuka na ngai moko ya moke, kasi na bisika oyo nzela ezalaki mabe, nazalaki komata na mituka oyo ememaka bato ya mibembo.
Na ekólo wana mobimba, esika oyo bakokaki kobongisa motuka, ezalaki kaka na Bangui. Lokola mosala na ngai ezalaki kosɛnga nasalaka mibembo mingi, nasombaki babuku mosusu oyo elobelaka ndenge ya kobongisa mituka, nasombaki mpe mafungola ya mituka, mpe mbala mingi nazalaki kobongisa motuka na ngai, ngai moko. Mokolo moko, boîtier du cardan ya arbre de transmission ekatanaki, mpe motuka ekokaki kotambola te. Kolongwa na esika wana mpo na kobima na mboka mosusu ya pembeni, ezalaki kilomɛtrɛ soki 60. Na yango, nakataki eteni ya nzete moko ya makasi na zamba mpe natɔbɔlaki yango mpo ekóma lokola boîtier. Nakangisaki yango na arbre de transmission na nsinga ya ebende oyo natyaki mafuta ya motuka, mpe nakobaki mobembo na ngai.
Kosakola na bamboka ezalaki mpenza mokakatano monene, mpo mbala mingi kaka bato moke nde bayebaki kotánga mpe kokoma. Na lisangá moko, kaka moto moko nde ayebaki kotánga, mpe ndeko yango azalaki na likukuma. Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki mpasi, kasi komona ndenge bandeko ya lisangá yango bazalaki kosala milende mpo na kokanga makanisi ya ntina ya boyekoli ezalaki mpenza kolendisa kondima na ngai.
Na nsima, natunaki bandeko ya lisangá yango ndenge nini bazalaki kozwa matomba na mateya oyo bakokaki te kokanga ntina na yango malamu. Eyano oyo bapesaki ngai ezalaki mpenza malamu: “Tolendisanaka.”—Baebele 10:23-25.
Atako bandeko na ngai baklisto mingi bayebaki kotánga mpe kokoma te, bateyaki ngai makambo mingi ya bomoi mpe ndenge ya kofanda na bato. Nayaki kokanga ntina ya toli ya Makomami oyo elobi “bótalelaka bamosusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Bandeko na ngai ya Afrika bateyaki ngai makambo ebele mpo na bolingo, boboto, koyamba bapaya mpe ndenge ya komesana na bomoi na mboka. Nayaki kokanga mpenza ntina ya maloba ya nsuka oyo Ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki mokambi ya Eteyelo ya Gileadi, alobaki na biso mokolo tozwaki badiplome. Alobaki boye: “Tózala ntango nyonso na komikitisa, tókanisa te ete toyebi makambo nyonso. Toyebi nyonso te. Ezali na makambo mingi oyo tosengeli koyekola.”
Bomoi na bamboka ya Afrika
Ntango nazalaki kokende kotala masangá, nazalaki kofanda na bandeko esika moko. Mbala mingi, pɔsɔ oyo nakei kotala lisangá ezalaki lokola fɛti, mingi mpenza mpo na bana. Ezalaki bongo mpo bandeko ya lisangá oyo nakotala, bazalaki kokende koluka nyama to mbisi mpe kosala nyonso mpo biloko ya kolya ezala mingi mpo na moto nyonso na pɔsɔ wana.
Lokola nazalaki kofanda na bandeko na mwa bandako na bango ya matiti, nazalaki kolya biloko nyonso, ezala ndɔngɛ to mosuni ya nzoku. Mbala mingi, makako ezalaki kozanga te. Mosuni ya sombo mpe ya mboke ezalaki kitoko koleka. Ya solo, mikolo nyonso ezalaki kaka fɛti te. Na ebandeli, esɛngaki ntango molai mpo namesana na bilei wana, kasi ntango nzoto emesanaki, estoma na ngai ekómaki na likoki ya konika pene na eloko nyonso oyo nalei. Nayaki komona ete kolya paipai na mbuma na yango ezali malamu mpo na estoma.
Na mboka, makambo ya ndenge nyonso oyo okanisaki te ekoki kosalema. Mokolo moko, bakanisaki ete nazali mami-wata, oyo balobaka ete ezali bilimo ya mindɛlɛ oyo bakufá, oyo bafandaka na mai. Bato bakanisaka ete bakoki kokanga bato mpe kokwea na bango na mai. Mokolo moko, nasilisaki kosukola na ebale mpe nazalaki kobima na mai, mwana mwasi moko oyo ayaki kotoka mai amonaki ngai mpe azongaki mbangu, wana azali koganga. Ntango ndeko moko Motatoli amekaki kolimbola ete nazali elimo te kasi nazali nde mopaya oyo ayaki kosakola nsango malamu, bato bandimaki te. Bazalaki koloba ete: “Mondɛlɛ akoki koya tii awa te.”
Mbala mingi, nazalaki kolala libanda mpo na kozwa mwa mopɛpɛ ya malili. Nazalaki ntango nyonso komema mustikɛrɛ, mpamba te ezalaki mpe kobatela ngai na banyoka, bankoto, bampoko, mpe banyama mosusu ya mikemike. Mbala na mbala bansɛlɛlɛ ezalaki kokɔtela ngai mpe mustikɛrɛ nde ezalaki kobatela ngai. Mokolo moko na butu, napɛlisaki tɔrshe na kati ya mustikɛrɛ mpe namonaki yango etondi na bansɛlɛlɛ. Nabimaki noki mpe nakimaki, mpo atako bansɛlɛlɛ bazalaka mikemike, bakoki koboma ata nkɔsi.
Ntango nazalaki na sudi ya République centrafricaine, pene na ebale oyo ekaboli yango na Congo, nasakolaki epai ya Batwa, oyo bafandaka mingi na zamba. Bayebi malamu mosala ya koboma nyama mpe bayebi eloko oyo moto akoki kolya mpe oyo akoki kolya te. Batwa mosusu balobaka monɔkɔ ya Sango, mpe basepelaki koyoka nsango ya Biblia. Bandimaki tózongela bango, kasi ntango tozongaki, tokutaki balongwe na esika wana mpe bakei na esika mosusu. Na ntango wana, ata Motwa moko te akómaki Motatoli, kasi na nsima nayokaki ete na République démocratique du Congo, batwa mosusu bakómaki Batatoli.
Nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga na République centrafricaine mbula mitano. Natambolaki bisika nyonso na ekólo yango, mpe natalaki mingi mpenza masangá ya bamboka.
Nakei kosala na Betele ya Nigeria
Na sanza ya Mai 1977, babengaki ngai nakenda kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova na Lagos, na Nigeria. Ekólo wana, oyo eleki bikólo nyonso ya Afrika na bato, ezalaki na Batatoli pene na 100 000 na ntango wana, mpe bandeko soki 80 bazalaki kosala na Betele. Batindaki ngai nasala na esika oyo babongisaka mituka.
Na mobu 1979, nazongelaki mosala oyo nasalaki na bomwana na Mpoto, mosala ya ferme. Ferme yango, oyo bazalaki kolona biloko ya kolya mpo na libota ya Betele, ezalaki na engumba Ilaro, na kilomɛtrɛ soki 80 na Lagos. Kuna, nayaki komona ete kosala bilanga na zamba oyo mbula enɔkaka mingi ekeseni na kosala bilanga na Mpoto. Nsima ya kosala mbula misato na ndambo na ferme yango, nazongaki na Lagos mpe nazongelaki kosala na esika ya kobongisa mituka.
Na mobu 1986, batindaki ngai na Igieduma, na kilomɛtrɛ soki 360 na Lagos, esika bazalaki kotonga Betele ya sika ya monene. Bafungolaki Betele yango na sanza ya Yanuali 1990. Kuna, ezali na bamasini ya konyata mikanda, ferme ya moke, mpe bandako ya kolala mpo na bato koleka 500. Lopango yango ezali monene hectares 60, mpe bazingi yango na efelo oyo etombwani na mɛtrɛ koleka mibale. Lelo oyo, natambwisaka misala na ferme mpe mosala ya kolona bafololo; ekipi na biso mobimba ezali na bato soki 35.
Nakokisi sikoyo mbula 27 banda nazali na Nigeria mpe nasepelaka mpenza na misala ndenge na ndenge oyo nasalaka na Betele yango. Nazali na esengo ete, tii lelo mama na ngai azali kaka sembo epai ya Yehova mpe leki na ngai ya mwasi, Ingrid, oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela monene mbula 14, azali kaka kosalela Yehova elongo na mobali na ye.
Atako nakutaná na mikakatano ebele, nasepelaka mingi na mosala oyo nazali kosalela Yehova mpe bandeko na ngai ya elimo na Afrika ya wɛsti. Nazali na botɔndi ndenge nazali kaka nzoto makasi tii lelo, mpe nazali kobondela ete natikala nzoto makasi mpo nakoba na molende nyonso kosalela Yehova, Nzambe na biso monene.
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Nigeria
République centrafricaine
Gabon
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 22]
Ngai ná mama na ngai Gertrud, mpe leki na ngai Ingrid, na 1939
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango nazalaki misionɛrɛ na Gabon
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango nazalaki na République centrafricaine, nafandaki na bamboka lokola oyo