Bazali mike kasi bayebi sɛkɛlɛ ya kopumbwa!
FIA! Nkɔmbɔ eleki na likoló mpo na koboma nzinzi oyo ezali kopumbwa. Kasi nzinzi ekimi nkɔmbɔ, eningani mwa moke na mopɛpɛ ya nkɔmbɔ, emibongisi lisusu, na nsima ebaluki noki mpe ekei kofanda na plafɔ, ezali kosɛka yo mpo okoki koboma yango te. Kopumbwa moko kitoko mpenza! Ya solo, bipai nyonso okomona banzinzi mpe na banyama nkeke, bango nde bayebi mpenza sɛkɛlɛ ya kopumbwa. Banzinzi yango epumbwaka malamu bongo mpo bakelama malamu mpenza na binama mibale babengi haltères.
Haltères wana mibale ezali lokola mwa matiti ya moke oyo nsɔngɛ na yango evimba mpe ebimá na ntolo ya nzinzi, na nsima ya mapapu na ye. (Talá elilingi na lokasa oyo elandi). Ntango nzinzi ebandi kobɛta mapapu na yango, haltères eninganaka mpe nzela moko na mapapu, eninganaka mbala nkama mingi na segɔnde moko. Haltères ezali lokola mwa masini babengi gyroscope, mpe esalisaka nzinzi mpo na kopumbwa. Yango eyokanaka na bɔɔngɔ ya nzinzi ntango nyonso oyo nzinzi elingi kokenda epai mosusu, na ndakisa, ntango mwa mopɛpɛ makasi to nkɔmbɔ to zulunalo eningisi yango mpe etii bomoi na yango na likama. Ntango nzinzi ezali kokenda nzela mosusu to ebaluki to mpe ekwei na mbalakaka motó na nse makolo likoló, haltères ekoyebisa nzinzi yango mbala moko lokola gyroscope eyebisaka motambwisi ya mpɛpɔ ete mpɛpɔ ezali kokwea, atako esalaka mpenza lokola haltères te. Nokinoki, nzinzi ekobongisa kopumbwa na yango malamu mpenza.
Gyroscope ezali na nsɔngɛ kasi haltères ezali lokola montre ya monene oyo batyaka na efelo ya ndako. Nzokande, ekakemi te to etɛlɛmi na ntolo ya nzinzi te; ebimi nde na mipanzi na ye. Ntango nzinzi ebandi koningisa yango, haltères eninganaka malɛmbɛmalɛmbɛ nzela moko, lokola montre ya monene, mpe ezali kotosa mibeko oyo etambwisaka biloko oyo eninganaka. Yango wana, ntango nzinzi ekei esika mosusu oyo ekanaki te, nguya ya mopɛpɛ wana ekofina haltères ntango ezali koningana, na esika oyo ekangani na mipanzi ya nzinzi, mpe misisa ekoyoka mpasi yango. Bɔɔngɔ na ye ekotalela mpasi oyo misisa eyoki mpe mbala moko ekobongisa mapapu mpo nzinzi epumbwa malamu—nyonso wana esalemaka na basegɔnde.
Ya solo, haltères ezali eloko moko ya sipesiale oyo ezalaka kaka epai ya nzinzi. Nzinzi ezalaka na mapapu mibale mpe nzinzi ezali ndenge soki 100 000: nzinzi mosusu eswaka nkombo na yango lipokopoko (taon), nzinzi oyo tomonaka na ndako, nzinzi babengi etuna (tsé-tsé), nzinzi moko ezalaka pene ya bibale mpe eswaka (phlébotome), mpe nzinzi mosusu ezalaka na makolo milai lokola ngungi (tipule). Gyroscope na yango, oyo esalemi na mayele mpenza, esalisaka yango epumbwaka koleka nyama nkeke nyonso oyo epumbwaka. Ya solo, mwa nyama oyo bato balingaka te ezali komonisa ete Mozalisi azali na mayele mpe ayebi makambo ya siansi koleka.
[Elilingi na lokasa 20]
Kokenda epai mosusu
[Elilingi na lokasa 20]
Kobalusama
[Elilingi na lokasa 20]
Kokwea
[Elilingi na lokasa 21]
Nzinzi oyo babengi stratiomyidé (bayeisi yango monene), na haltères na yango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Kjell B. Sandved/Visuals Unlimited
[Elilingi na lokasa 21]
Nzinzi oyo tomonaka na ndako
Nzinzi ya makolo milai lokola ngungi (tipule)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Banyama/Jim Harter/Dover Publications, Inc.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 21]
Diksionɛrɛ ya ekeke