Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Sanza ya 10 nk. 26-27
  • ‘Bolingo esukaka te’: Ezali boni mpo na oyo ya yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bolingo esukaka te’: Ezali boni mpo na oyo ya yo?
  • Lamuká!—1998
  • Masolo mosusu
  • Bolingo (agape): ezali nini te mpe ezali nini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • “Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Sanza ya 10 nk. 26-27

‘Bolingo esukaka te’: Ezali boni mpo na oyo ya yo?

BOLINGO ezali nini? Na mokili mobimba, ezali na masese oyo mazali kolobela ntina ya bolingo. Lisese moko ya Zoulou elobaka ete, “Bolingo eponaka lititi oyo yango ekokwela te.” Na ekólo Philippines bato balobaka ete, “Bolingo ezali mungwa ya bomoi.” Lisese moko ya ekólo Liban elobaka ete, “Bolingo ebosanaka mabunga, kasi koyina ekolisaka yango.” Bobele bongo, lisese moko ya ekólo Irlande emonisaka ete, “Bolingo elongolaka mabe ya nzoto.” Bato ya Pays de Galles balobaka ete, “Bolingo eleki elombe na makasi.” Bato ya ekólo Norvège balobaka ete, “Eloko oyo olingaka ezalaka ntango nyonso kitoko.” Moto ya ekólo Angleterre akoki koloba ete, “Mwa ndambo ya bolingo moke ekokani na liboke ya mibeko.” Na ekólo Espagne, kuna balobaka ete, “Bolingo ya solosolo eumelaka kino liwa.”

Ntembe ezali te ete bolingo ezali na ntina bipai binso. Bolingo oyo ekoki komonisa mpenza bokeseni na bomoi ya bato ezali oyo elobelami na Paulo, mokomi ya Biblia: “Bolingo ezali na motema pɛtɛɛ, bolingo ezali na boboto, ezali na zuwa te; bolingo ezali na lolendo te, ekomivimbisaka te, ekosalaka na nsɔni te, ekolukaka malamu na yango mpenza te, ezali na nkanda te, ekobombaka mabe na motema te. Ekosepelaka mpo na masumu te nde ekosepelaka makambo na solo. Ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka nyonso mpiko. Bolingo [esukaka] te.”​—1 Bakolinti 13:4-8.

Ɛɛ, “bolingo [esukaka] te.” Bolingo ebikisaka. Bolingo etyaka bato na bomoko. Bolingo emonisamaka bobele na maloba te, kasi na misala oyo ezangi moimi. Bolingo ezalaka na makanisi malamu. Na yango, Paulo akomaki mpe ete: “Ata nakopalanganisa nyonso ezali na ngai mpo na kopesaka makabo, ata nakopesa nzoto na ngai mpo na kotumbama, nde soko nazangi bolingo, nazwi litomba te.” Soki tozali komipesa na mosala ya Nzambe to kopesa makabo bobele mpo ete basusu bámona biso, na makanisi ya Nzambe, yango ezali mpamba.​—1 Bakolinti 13:3.

Yesu alobaki ete: “Soko okopesa makabo na mawa, oyula mondule liboso na yo te lokola ekosalaka bakosi . . . ete bato bákumisa bango. Nazali koloba na bino na solo ete bazali na libonza na bango. Nde yo, wana ekopesa yo makabo na mawa tiká te ete lobɔkɔ na yo na mwasi loyeba yango ekosala lobɔkɔ na yo na mobali.” Ɛɛ, bolingo etutaka ntolo te to ekomikumisaka te.​—Matai 6:2, 3.

Bolingo ya solosolo elukaka matomba na moto ye moko te. Moto oyo azali na bolingo ya solosolo ezali moto oyo baninga babɛlɛmaka na ye. (Matai 11:28-​30) Maloba oyo malandi makoki kopusa biso ete tótalela lolenge ya bolingo oyo tozali na yango mpo na basusu: “Bosembo oyo ezangi bolingo ekómisaka biso bato ya makambo makasi. Kondima oyo ezangi bolingo ekómisaka biso bato ya bindimandima. Nguya oyo ezangi bolingo ekómisaka moto nkandankanda. Mosala oyo tozali kosala kozanga bolingo ekómisaka biso mawamawa. Ebongiseli oyo ezangi bolingo ekómisaka moto makanisi mokuse.”

Moto oyo atingamaka bobele na mibeko akoki kokwea na motambo ya kozanga bolingo. Tokolendisama biso banso soki tozali komitambwisa na toli oyo ya Paulo: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkema, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola] Klisto alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”​—Bakolose 3:12-​14.

[Elilingi na lokasa 27]

Bayekoli ya solosolo bamonisaka bolingo lokola Yesu ateyaki yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto