Esimbaki motema na ye
Gloria Adame akomi ete: “Na 1984, tozalaki na libota ya bana 13, bana mibali 4 mpe bana basi 9. Tata azongaki na Mexique mpe ayokaki ete ntango azalaki kosala na États-Unis, nsima na ye biso tobandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Yango esepelisaki ye te, mpe abandaki kotɛmɛla biso. Emonanaki ete mokolo na mokolo, azalaki se kotɛmɛla biso.
“Tozalaki kolinga tata na biso mingi, mpe tozalaki na mposa ete azwa boyebi oyo biso tozalaki kozwa, boyebi oyo epesaka bomoi. Mokolo na mokolo, tozalaki kobondela Yehova na molende, kolɔmba ye ete apesa biso likoki ya koyebisa Tata na biso mikano na ye. Yehova ayokaki malɔmbɔ na biso mpamba te apesaki biso mpiko ete tósanganaka mpokwa nyonso na salɔ, epai Tata azalaki kolekisa mpokwa nyonso kotala televizyo. Kuna, biso bana basi na mama tozalaki kosangana mpo na kotánga mokapo ya Biblia ya mokolo.
“Mama azalaki kotambwisa lisolo, mpe nsima ya kotánga komantere na mwa buku, tozalaki kosala libondeli moto na moto na ngala na ye. Ntango Marie, mwana-nsuka na biso oyo azalaki bobele na mibu mitano azalaki kosala libondeli, azalaki kobɔndela na molende mpe koloba polele ete: ‘Yehova, lɛmbisá motema ya Tata mpo ete akóma mpe Motatoli na yo.’ Emonanaki ete Tata azalaki koyoka te, mpamba te azalaki komatisa mongongo ya televizyo makasi. Nzokande, wana mikolo ezalaki koleka, abandaki kokitisa yango, kino na mpokwa moko akangaki mpenza televizyo.
“Na mpokwa yango, lokola ezalaki momeseno na biso, Mama atunaki soki ezali ngala ya nani mpo na kotánga mokapo. Tokamwaki mpenza ntango toyokaki Tata koloba ete: ‘Ezali ngala na ngai.’ Tokamwaki mingi mpenza kasi tolobaki eloko te. Mama aboyaki te mpe atunaki ye mituna te, apesaki ye mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Nsima ya kotambwisa lisolo ya mokapo ya Biblia, Mama atunaki soki ezali ngala ya nani mpo na kosala libondeli. Papa alobaki ete: ‘Ezali ngala na ngai.’
“Tozangaki likambo ya koloba. Na katikati ya libondeli, totangisaki mpisoli. Tata mpe abandaki kolela, mpe asɛngaki na Yehova ete alimbisa ye mpo na lolenge azalaki kotyola Ye. Asɛngaki mpe Mama bolimbisi na lolenge azalaki kotɛmɛla biso.
“Na bongo, na 1986 Tata atikaki kotɛmɛla biso. Na 1990, tokómaki kofanda na Texas, na États-Unis. Na nsima, Tata na biso amipesaki epai na Yehova mpe amonisaki yango na kozwáká batisimo ya mai, mpe biso bana basi nsambo tosalaki mpe bongo. Na Apríli 1997, Tata akómaki nkulutu na lisangá. Kino lelo, kotalela mokapo ya mokolo mpe kobɔndela Yehova na molende, ezali makambo ya ntina koleka kati na libota na biso.”
[Elilingi na lokasa 31]
1. Bana basi minei oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela na Mexique. Marie azali liboso
2. Juanita mpe Isaac Adame, elongo na bamoko kati na bana na bango. Gloria azali na lobɔkɔ ya mobali na nsuka