Libota oyo eyekoli kolinga
BOLINGO ezali nsai ya motema oyo euti na bosepeli, na komipesa mpe na mposa ya kokaba. Bolingo ezali bokangami oyo etondi na esengo. Bolingo ezali na moimi te, ezali sembo, mpe emibanzabanzaka mpo na bolamu ya basusu. Bolingo ezali motɛmɛli mpenza ya koyina. Moto oyo apusami na koyina amibanzabanzaka bobele mpo na bamposa na ye moko; kasi moto oyo apusami na bolingo amibanzabanzaka mpo na basusu.
Bolingo to koyina—nini ezali kotambwisa bomoi na yo? Yango ezali mwa motuna ya mpamba te zambi elikya na yo ya bomoi ya seko na mikolo mizali koya ekangami na eyano oyo okopesa. Atako bafandi kati na mokili oyo ezali koteya koyina, bamilió ya bato bazali koyekola kolinga. Bazali kosala bongo na kolatáká bomoto ya sika. Bazali bobele koloba na ntina na bolingo te; bazali kosala milende mpo na komonisa yango.
Soki osilá koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, mbala mosusu okamwaki na makambo oyo omonaki. Kozanga kotalela bikólo, Batatoli ya Yehova basangani kati na losambo bobele moko. Bazali libota ya bandeko ya solo kati na mokili mobimba. Yango ekoki komonana na masangá na bango mpe na ntango ya mayangani na bango kasi mbala mosusu na esika oyo babéngaka libota ya Betele, yango ezali komonana mingi koleka. Yango ezali bituluku ya basali ya bolingo malamu oyo bazali kofanda esika moko mpe kosala esika moko, lokola libota, mpo na kobimisa mpe kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia. Na mokili mokomoko, basáli mosusu ya Betele bazali kotambwisa mosala oyo esalemi na Batatoli ya Yehova. Yango ezali mosala moke te, mpamba te—na 1997—Babetele etalelaki masangá koleka 82 000 kati na mikili 233. Mpo na kokokisa mosala yango, bato koleka 16 000 bazali kosala na mabota ya Betele na mokili mobimba, ezala na Biro monene ya la Société to na bafiliale 103 oyo ezwami na mikili mikeseni.
Mabota mingi ya Betele masangisi mingi mpenza banamboka ya mokili oyo filiale etyami. Kasi ezali bongo mpo na Babetele nyonso te. Mabota mosusu ya Betele esangisi Batatoli ya mikili ndenge na ndenge, bituluka to mposo ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki liboso na mangomba makeseni. Na ndakisa, na ekólo Allemagne, na engumba Selters, libota ya Betele lizali na basangani soko 1 200, bauti na mikili pene na 30. Nini ezali kopesa bango likoki ya kofanda esika moko, kosala esika moko mpe kosambela elongo kati na kimya mpe bomoko, kozanga koyinana? Bazali kolanda toli ya Biblia oyo ezwami na Bakolose 3:14, oyo elobi ete:
“Bómilatisa bolingo”
Moto moko te abotamaka na bilamba na nzoto, akoki mpe kokóma na bilamba na nzoto te soki azali bobele koloba na ntina na yango. Komilatisa esɛngaka kozwa bikateli mpe na nsima kosala milende mpo na kokokisa yango. Bobele bongo, moto moko te abotamaka na bolingo na nzoto. Bobele koloba na ntina na bolingo ekoki te. Esengeli kosala milende.
Bilamba esalisaka na makambo mingi. Ebatelaka nzoto, ebombaka biteni ya nzoto oyo bizali na mbeba, mpe lisusu emonisaka bomoto ya moto oyo alati yango. Bolingo ezali mpe bongo. Esalisaka lokola libateli mpamba te bolingo mpo na mitindá ya boyengebene mpe mpo na boninga malamu epusaka moto ete apɛngola boninga to bisika oyo bikoki kozala likama. Esalisaka na kobatela boyokani na basusu, oyo ezali mpenza na ntina mpo na biso. Oyo alingaka basusu, basusu mpe bakolinga ye, mpe ye oyo apɛngolaka koyokisa baninga mpasi, azali mpe koboya mabe.
Bolingo ebombaka mpe bomoto na biso mosusu oyo emonanaka na miso te, oyo ekokaki kotungisa baninga na biso bato. Tobosanaka noki mabunga mike ya bato oyo tolingaka mingi koleka mabunga ya bato ya lolendo, ya lofundo, bato oyo bamikumisaka, mpe bazangi bolingo, boye te?
Bato oyo bamilatisi bolingo bazali komonisa kitoko ya bomoto ya Yesu. Lokola kitoko ya nzoto ezali bobele na lomposo, kitoko ya elimo emonisaka mobimba ya moto. Mbala mosusu oyebi bato oyo omonaka ete bazali kitoko, mpo na nzoto te, kasi mpo na bomoto na bango ya malamu. Epai mosusu, mingi kati na biso tosila kokutana na basi kitoko to mibali kitoko oyo na nsima tomonaki lisusu bonzenga na bango te ntango bomoto na bango mpenza eyaki koyebana. Oyo nde esengo ya kozala elongo na bato oyo bamilatisi bolingo!
Tyá bolingo na esika ya koyina
Likambo oyo ete bolingo ekoki kokitana koyina emonisami na ankɛtɛ moko esalemaki na 1994 epai na Batatoli ya Yehova 145 958 na ekólo Allemagne.
Kolangwa masanga, kosalela bilangwiseli, mobulu, masano ya mbongo, etamboli mabe, nyonso wana ezali na lolenge moko to mosusu bizaleli ya moimi, oyo ekoki kobimisa na bolɛmbu nyonso koyina. Kasi bato 38,7 likoló na monkámá oyo batunaki bango balobaki ete mpo na kotosa mitindá mitombwani ya Biblia oyo mimonisamaka na Batatoli ya Yehova, basili kolónga mokakatano moko to koleka kati na bizaleli yango. Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na mitindá na ye ya boyengebene mitali etamboli malamu epusaki bango na kosala bongo. Bazwaki lisungi ya bolingo oyo lipesamaki na Batatoli ya Yehova, mbala mingi moto na moto azwaki lisalisi ya ye moko. Na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka (1992-1996), bato 1 616 894 kati na mikili 233 basalisamaki mpo na kosala mbongwana, na kobwaka koyina mpe kolóna bolingo.
Na komonisáká bolingo oyo ezangi moimi kati na mabala na bango, Batatoli ya Yehova bazali na boyokani makasi. Na mikili mosusu, libala moko to mabala mibale likoló na mabala misato ezali kokufa. Kasi ankɛtɛ oyo tolobeli emonisi ete sikawa bobele Batatoli 4,9 likoló na monkámá babomi mabala na bango to bakabwani na babalani na bango. Nzokande, esengeli kobosana te ete mingi kati na mabala yango makufaki liboso ete bato yango bákóma Batatoli ya Yehova.
Lokola Nzambe ya bolingo azali Molakisi Monene oyo ateyaka bato oyo balingaka ye banzela na ye, Batatoli ya Yehova bamonisaka bolingo na bango, liboso mpenza epai na ye. Na bokeseni na bato mosusu, oyo bakoki kozala “baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe,” Batatoli ya Yehova batyaka Nzambe na esika ya liboso. (2 Timoté 3:4) Na bokeseni na mokili oyo ezangi mitindá, Batatoli (na Allemagne) bazali kolekisa na mwayene ngonga 17,5 pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na misala na bango ya losambo. Batatoli bazali mpenza komibanzabanza mpo na makambo ya elimo. Yango ezali likambo oyo ezali kopesa bango esengo. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali komibanzabanza mpo na bamposa na bango ya elimo, mpamba te bokonzi na likoló ezali mpo na bango.”—Matai 5:3, NW.
Mokomi ya Nzembo 118 alobaki ete mosaleli ya solo ya Nzambe asengeli kobanga bato te. “[Yehova] azali epai na ngai, nakobanga te; moto akosalela ngai nini?” (Vɛrsɛ́ 6) Kotya motema mobimba na Nzambe elongolaka moko ya bantina ya koyina mpe kobanga bato mosusu.
Mpo na moklisto, lokola ayebi ete Nzambe ‘akoyokaka nkɛlɛ noki te mpe azali na boboto mpe na solo,’ akosala milende ete alongola nkanda na bomoi na ye, mpamba te yango ekoki kozala eutelo mosusu ya koyina. Kolónáká mbuma ya elimo santu ya Nzambe, kati na yango bopɔlɔ mpe komipekisa, ekosalisa ye ete alónga yango.—Nzembo 86:15; Bagalatia 5:22, 23.
Moklisto ya solo azalaka na komikitisa mpe amitalelaka te na lokumu koleka. (Baloma 12:3) Alónaka bolingo kati na boyokani na ye na basusu. Na bokeseni na koyina, bolingo “ezali na nkanda te, ekobombaka mabe na motema te.”—1 Bakolinti 13:5.
Ɛɛ, kobanga, nkanda, to mayoki ya kozokisama ekoki kosala ete bato báyina basusu. Kasi, bolingo, na kopikoláká bantina ya koyina, ezali kolónga yango. Ɛɛ, bolingo ezali nguya oyo eleki makasi kati na molɔ́ngɔ́ mobimba mpamba te “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoane 4:8.
Mosika te koyina ekolongolama libela
Lokola ezali bizaleli ya bomoto ya Yehova Nzambe te, moimi mpe koyina ekoki kotikala libela te. Esengeli mpenza kolongolama mpe bolingo ekokitana yango, bolingo ekotikala libela na libela. Soki ozali kozela na motema likoló mokili oyo ezangi koyina, mpe etondi na bolingo, tika ete Batatoli ya Yehova bálimbwela yo masɛngami oyo mazwami kati na Biblia mpo ete obika mpe omona mokili yango.
Ɛɛ, mokomoko na biso asengeli komituna ete ‘Ezaleli nini ezali kotambwisa bomoi na ngai, bolingo to koyina?’ Yango ezali motuna ya ntina mpenza. Moto oyo azali kolanda monguna ya Nzambe, nzambe ya koyina, akozala na bomoi libela te. Nzokande, moto oyo azali kolanda Yehova, Nzambe ya bolingo, akozala na bomoi libela na libela.—Yoane 2:15-17.
[Elilingi na lokasa 10]
Ata lelo oyo bato bakoki komilatisa bolingo