Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Janvier nk. 5-8
  • Mokili oyo eteyami koyina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili oyo eteyami koyina
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobanda na bolenge
  • Mangomba mazali koteya nini?
  • Bobangi, nkanda, to mayoki ya kozokisama
  • Koyinana Ekosila Mokolo Mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Lolenge se moko ya kosilisa koyinana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mpo na nini bato bayinanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Janvier nk. 5-8

Mokili oyo eteyami koyina

BATO basangolaka moimi. Mpe moimi, soki epekisami te, ekoki kokóma koyina. Ezali te bobele ete bato basangolaka moimi, kasi lisusu mimeseno ya mboka epai bafandi ezali mpenza koteya bato ete bázala na moimi!

Ya solo, ebongi te kotalela ntango nyonso ete bizaleli ya bituluku mosusu ya bato ezalaka mabe, nzokande bizaleli mosusu epalangani mingi mpe esengeli kotalelama lokola bizaleli mabe. Mbala mingi bato ya politiki balingaka nde ete bálónga na maponami na esika ete básunga baoyo baponaki bango, boye te? Mbala mingi bato ya mombongo bamipesaka na kolukáká mosolo, ata na lolenge mabe na esika ete báboya kotɛka biloko oyo bikoki kobebisa bomoi ya bato, boye te? Mbala mingi bakonzi ya mangomba balingaka koyebana to kozwa mosolo na esika ete bátambwisa bandimi na bango na nzela ya bizaleli malamu mpe ya bolingo, boye te?

Kobanda na bolenge

Ntango bana bazali kobokwama na esika ya lipanda koleka, bazali mpenza kolakisama ete bázala na moimi, mpamba te bamposa na bango ya bomwana ezali kotyola bizaleli lokola limemya mpe kokaba. Na biteyelo, banakelasi bazali koteyama ete básalaka makasi mpo na kolónga moto ya liboso, bobele na kelasi te kasi mpe na masano. Mokano yango oyo, “Soki olóngi moto ya mibale, ezali lokola ozali moto ya nsuka!”

Masano ya video oyo mazali kolakisa mobulu mazali koteya bilenge ete básilisa mikakatano na lolenge ya moimi​—bobele na kobomáká monguna! Ezali ezaleli oyo ezali kolendisa bolingo te! Ekokisi lelo mbula koleka zomi, ministre ya makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na États-Unis apesaki likebisi ete masano ya video ezali likama mpo na bilenge. Alobaki ete: “Masano yango mamonisaka mingimingi koluka koboma monguna. Likambo moko te ya kotonga ezali kati na masano yango.” Nkomá moko na zulunalo The New York Times emonisaki ete masano mingi ya video “ezali komonisa makambo ya nsɔni mpenza oyo bato bazali kosala” mpe ebakisaki ete: “Ezali kokólisa libota moko ya bilenge oyo bakozala bazoba, bazangi komipekisa.” Mosani moko ya molende ya masano ya video na Allemagne ayambolaki na bosembo mpenza bosolo ya maloba oyo touti kotánga ntango alobaki ete: “Ntango nazalaki kosana, nazalaki komimona lokola nakómi na mokili mosusu epai ezali kosɛngama ete: ‘Bomá to báboma yo.’”

Ntango esangani na koponapona mposo, koyina ekómaka mabe koleka. Na yango, Ba Allemands bazali komibanzabanza na ntina na video oyo bato ya politiki mpe oyo bamipesi mpo na bolóngi ekólo bazali kosalela mpo na kotombokisa bato ete báyina bapaya, mingimingi Ba Turques. Ebongi mpenza komibanzabanza mpo na likambo yango, mpamba te na mwa 1 Yanuáli 1994, Ba Turques bazalaki na motángo ya bato 27 likoló ya monkámá kati na bapaya 6 878 100 oyo bazali na ekólo Allemagne.

Mayoki ya koponapona mposo mazali kokóla na ntina na mateya ya bolingi ekólo oyo ezali kopesama epai na bilenge uta bomwana, mingimingi ete koyina banguna ya mboka na yo ezali mabe te. George M. Taber akomaki lisoló moko oyo ebimaki na zulunalo Time limonisi ete: “Kati na maloba nyonso na makambo ya politiki oyo maloba na yango na Lifalansé masukaka na ‘isme,’ mbala mosusu oyo eleki mayoki makasi ezali bongo nationalisme (bolingi ekólo).” Alimbolaki lisusu ete: “Soki tolongoli lingomba, makila ya bato mingi masopani na nkombo na yango koleka bantina mosusu nyonso. Na boumeli ya bikeke, bato ya politiki oyo balɛngolaka makanisi ya bibele (démagogue) basali bituluku ya bato oyo bamipesá na makambo ya politiki mpo na kofunda bituluka mosusu ya pene ete bizali kosala mobulu.”

Koyina bato ya bituluka mosusu oyo ebimisi misisa, ezala mpo na mposo, to mboka, ezali eutelo ya mikakatano mingi lelo oyo na mokili. Koyina-bapaya (xénophobie) ezali sé kokóla. Nzokande, likambo ya kosepelisa, etuluku moko ya banganga-mayele ya sosioloji ya ekólo Allemagne bayaki koyeba ete koyina bapaya emonanaka mingi epai bapaya bazali mingi te. Yango ezali komonisa ete mbala mingi likambo yango eutaka na makanisi mabe likoló na basusu kasi ezalaka te mpo ete moto yango afandi esika moko na bapaya. Banganga-mayele ya sosioloji bamonaki ete “makanisi mabe ya bilenge malendisami mingimingi na baninga na bango mpe na mabota na bango.” Ɛɛ, bato 77 likoló na monkámá oyo batunaki bango, atako bandimaki ete bazalaka na makanisi mabe likoló na basusu, bayebanaki mpenza te to mpe bayebanaki ata moke te na bapaya yango.

Koteya moto ete akóma na moimi ezali likambo ya mpasi te, mpamba te biso nyonso tosilá kosangola na lolenge moko to mosusu moimi ya baboti na biso, bato ya kozanga kokoka. Kasi mokumba nini mangomba ezali na yango na mikakatano oyo ezali kobima kati na koyina mpe bolingo?

Mangomba mazali koteya nini?

Na momeseno, bato bakanisaka ete mangomba makólisaka bolingo. Kasi soki ezalaka bongo, mpo na nini matata ya mangomba ezali eutelo monene ya bitumba na Irlande du Nord, na Moyen-Orient, na Inde, mpo na kolobela bobele oyo wana? Na ntembe te, bato mosusu bakanisaka ete, mpo na mobulu oyo ezali kobima, esengeli kopamela mingi matata oyo euti na makambo ya politiki koleka matata oyo euti na mangomba. Yango ezali likambo oyo lizali kobimisa ntembe monene. Atako bongo, ezali solo ete mangomba malóngi te kokɔtisa bolingo makasi kati na bato mpo na kolónga ezaleli ya koponapona. Basambeli mingi ya Lingomba ya Katolike mpe ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ, mpe ya mangomba mosusu, bazali kopesa nzela na ezaleli ya kokanisela basusu mabe, yango ezali komema na mobulu.

Ezali mabe te soki moto aboyi kondima mateya mpe misala ya mangomba oyo amoni ete elongobani te. Kasi yango ezali nde kopesa ye lotómo ya kobimisa mobulu na kobundisáká lingomba yango to basangani na yango? Búku The Encyclopedia of Religion endimaki polele ete: “Mbala na mbala bakonzi ya mangomba bapesaki etindá ya kobundisa bituluku ya mangomba mosusu na Proche-Orient mpe na Mpótó.”

Búku yango emonisi ete mobulu ezali moko na mimeseno minene ya mangomba, na kolobáká ete: “Bandimeli ya Darwin bazali bango moko te mpo na kondima ete matata ebongisaka bizaleli mpe mimeseno ya bato. Mangomba ezali liziba ya matata mpe ya mobulu oyo ezangi nsuka, oyo ezali sé kobakisama.”

Mobulu ekoki kolóngisama te na kolobáká ete ezali na ntina mpo na kobongisa bizaleli ya bato, mpamba te yango eyokani te na etindá oyo eyebani malamu oyo epesamaki na Yesu Klisto ntango ntoma Petelo alingaki kobatela ye. Petelo “asemboli lobɔkɔ, abendi mopanga na ye mpe abɛti moombo na nganga monene mpe [akati, NW] litoi na ye. Yesu alobi na ye ete, Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.”​—Matai 26:51, 52; Yoane 18:10, 11.

Mobulu oyo esalemi mpo na kosala bato mabe​—ezala bazali bato malamu to bato mabe​—ezali lolenge ya komonisa bolingo te. Na yango, bato oyo bazali kobimisa mobulu atako bazali koloba ete bazali kolanda bolingo ya Nzambe, bazali sé bato ya mobulu. Eleki mwa mikolo mokomi Amos Oz alobaki ete: “Bato nyonso oyo babimisaka mobulu na makambo ya mangomba bayebani na likambo oyo . . . ete ‘mitindá’ oyo balobaka ete miuti epai na Nzambe ezali ntango nyonso, likambo bobele moko: Bosengeli koboma. Emonani mpenza ete nzambe ya bato yango ya mobulu ezali bongo zabolo.”

Biblia ezali koloba likambo moko motindo yango: “Bana na Nzambe mpe bana na Satana bakomonana polele na likambo oyo. Moto na moto oyo azangi kosalaka boyengebene auti na Nzambe te; na oyo azangi kolinga ndeko na ye lokola. Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato, mpe toyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato azali na bomoi na seko koumela kati na ye te. Soko moto nani alobi ete, Nalingi Nzambe, nde azali koyina ndeko na ye, ye wana moto na lokuta. Mpo ete ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolónga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te. Tozwi mpe lilako oyo epai na ye ete ye oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”​—1 Yoane 3:10, 15; 4:20, 21.

Lingomba ya solo esengeli kolanda lolenge ya bomoi oyo etongami likoló na bolingo, oyo elimboli mpe komonisa bolingo ata epai na banguna. Na ntina na Yehova tozali kotánga ete: “Akobimisa moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu mpe akonɔkisa mbula na bayengebeni mpe na bapɛngwi.” (Matai 5:44, 45; talá mpe 1 Yoane 4:7-10.) Oyo nde bokeseni na Satana, nzambe oyo ayinaka! Azali kokweisa mpe kolɛngola bato kati na bomoi ya mbindo, ya mobulu, mpe ya moimi, mpe na yango azali kotondisa bomoi na bango na mpasi mpe na minyoko. Azali kokóba kosala bongo atako ayebi malamu ete lolenge wana ya bomoi ya mbindo ekomema bango na kobebisama. Azali mpenza motindo ya nzambe oyo abongi na kosalela te, azali na likoki te​—kútu azali ata na bolingi te​—ya kobatela bandimi na ye, boye te?

Bobangi, nkanda, to mayoki ya kozokisama

Bizaleli oyo ebimisaka koyina eyebanaka kozanga nkaka. Lapólo moko ya zulunalo Time elobaki ete: “Na boumeli ya bambula ya 1930, bambula ya mpasi, bituluku ya bato oyo balukaka mbongwana bikómaki mingi na mikili ya Mpótó. . . . Kobangáká ete bakobungisa misala na bango, bato bakómi na nkanda makasi mpo ete biyangeli bizali na makoki te mpe bato bakómi lisusu koyokela bapaya oyo bazali kati na bango nkanda.” Kati na zulunalo Rheinischer Merkur/Christ und Welt, Jörg Schindler abendaki likebi likoló na bankóto ya bato oyo bakimá mboka mpo na bantina ya politiki mpe bakei kotondana na Allemagne na boumeli ya bambula koleka ntuku mibale. Zulunalo The German Tribune ekebisi ete: “Ezaleli ya koponapona mposo ezali kokóla na mikili nyonso ya Mpótó.” Koyikana ya bapaya kati na mboka ezali kobimisa koyina. Bato bazali komilela ete: ‘Esengeli kobimisa mosolo mpo na bango, bazali kozwa misala na biso, bazali likama mpo na bana na biso ya basi.’ Theodore Zeldin, moko na babandisi ya St. Antony’s College, eteyelo ya ntei na Oxford, alobaki ete bato “bakómi kobimisa mobulu mpamba te bazali komiyoka ete batyami na likama to batyolami. Esengeli bongo kotya likebi na bantina ya nkanda na bango.”

Joan Bakewell, mopanzi-nsango na televizyó ya Grande-Bretagne asalelaki maloba oyo mabongi mpenza mpo na kolobela mokili na biso, yango ezali koteya banamboka ete báyinaka bato. Akomaki ete: “Nazali moklisto te, kasi nazali koyeba bosolo mpe bozindo ya mateya ya Yesu: mabe ezali kouta mpenza na kozanga bolingo. . . . Nayebi ete tozali kobika kati na efandelo oyo ezali kopesa motuya moke na liteya ya bolingo. Ya solo, mokili oyo ezali kotya bolingo pembeni, komonáká yango lokola liteya lizangi ntina, ya mayoki mpamba, ya makanisi mpamba, ezali kotyola ezalela ya komibanzabanza mpo na basusu mpe ezali kopesa motuya mingi na ezaleli ya kozwa matomba mpe kotalela bobele bamposa ya moto ye moko. ‘Tóloba makambo ndenge yango ezali,’ na mokili oyo, bato bazali koyiba na makambo ya mombongo, kobuba na mikanda ya boyokani mpe komonisa bilembeteli oyo bizali komonisa ete mokili ezali na nzela mabe. Mokili motindo oyo ezali kobimisa bato oyo bazali kolónga ata likambo moko te, bato oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko, oyo bazali kokoka eloko te, na oyo etali komityela motema, lokumu mpe esengo ya libota.”

Emonani polele ete Satana, nzambe ya mokili oyo, azali koteya bato koyina. Kasi mokomoko na biso akoki koyekola kolinga. Lisoló oyo lilandi likomonisa ete yango ekoki kosalema.

[Elilingi na lokasa 7]

Masano ya video makoki koteya bana na yo koyina?

[Elilingi na lokasa 8]

Mobulu mpe bitumba ezali elembeteli ya kozanga boyebi mpe elembo ya koyina

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto