Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Janvier nk. 3-4
  • Mpo na nini koyina ekómi makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini koyina ekómi makasi?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyina ya malamu mpe koyina ya mabe
  • Mpo na nini bato bayinanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Koyinana Ekosila Mokolo Mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mokolo mosusu koyinana ekosila mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Janvier nk. 3-4

Mpo na nini koyina ekómi makasi?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ALLEMAGNE

“MPO na nini?”​—Mwa motuna moke, kasi ezali kosɛnga eyano. Na ndakisa, na Mársi 1996, bato balingaki kozwa eyano na motuna wana ntango bakomaki yango na lokasa mpe bakangisaki yango na liboke moko ya fololo oyo ezalaki kati na bibolo ya bafololo mpe biloko ya masano ya bana mike oyo balalisaki na libándá ya eteyelo moko na engumba Dunblane, na ekólo Écosse. Mwa mikolo liboso, mobali moko akɔ́taki pwasa kati na eteyelo yango mpe abomaki bana 16 elongo na molakisi na bango ya mwasi. Bana mosusu mingi bazokaki mpe na nsima amibomaki. Na ntembe te, mobali yango atondaki na koyina kati na motema na ye​—amiyinaki, ayinaki basusu, mpe ayinaki bato nyonso. Na mawa mpenza, baboti mpe baninga, bakisa mpe bamilió ya bato na mokili mobimba bazalaki komituna motuna bobele yango, ‘Mpo na nini? Mpo na nini mpenza bana oyo basali likambo te bazali kobomama motindo oyo?’

Likambo oyo ete mokili etondi na koyina moko mabe, oyo ekoki kolimbolama te, mbala mosusu esili kobenda likebi na yo. Ya solo, mpo na ntina moko to mosusu, ekoki kozala ete basilá koyina yo. Ntango mosusu yo moko mpe okokaki komituna mbala mingi ete, ‘Mpo na nini?’

Koyina ya malamu mpe koyina ya mabe

“Koyina” elimboli kozala na “motema mabe mpe koyoka basusu mpii.” Ya solo, “koyoka mabe na motema to koyoka mpii” mpo na makambo ya mabe to oyo ekoki kobebisa boyokani ezali likambo ya malamu. Soki moto nyonso azalaki na motindo wana ya koyina, mbɛlɛ mokili ezali esika malamu mpenza mpo na kofanda. Nzokande, likambo ya mawa, bato ya kozanga kokoka bayinaka basusu mpo na bantina ya mabe.

Engebene ndimbola moko, koyina oyo ebebisaka eutaka na makanisi mabe likoló na basusu, kozanga boyebi, to kozwa nsango oyo epesami malamu te, mpe mbala mingi yango emonisamaka na “kobanga, nkɛlɛ, to kozokisama na mayoki.” Kozangáká mpenza moboko ya sikisiki, koyina motindo wana esukaka bobele na makambo mabe mpe mbala na mbala ebimisaka motuna oyo, ‘Mpo na nini?’

Biso nyonso toyebi bato oyo bizaleli na bango mpe mimeseno na bango ekoki koyokisa biso nkanda na bantango mosusu mpe ezalaka mwa mpasi mpo na koyokana na bato yango. Kasi, bokeseni ezali kati na koyoka nkanda mpe kosala moto mabe. Na bongo, ekoki kozala mpasi mpo ete tókanga ntina oyo moto akoki kokólisa mayoki ya koyina etuluku mobimba ya bato, mbala mingi bato oyo kútu ayebi bango te. Bakoki mbala mosusu koboya makanisi na ye ya politiki, kozala na ye lingomba moko te, to kozala bato ya etuluka mosusu, kasi yango ezali mpenza ntina ya koyina bango?

Nzokande, koyina motindo wana ezali komonana mingi! Na Afrika, koyina epusaki Bahutu mpe Batutsi na kobomana na ekólo Rwanda na 1994. Yango esalaki ete mopanzi-nsango moko atuna ete: “Ndenge nini koyina ekómi makasi na mwa mboka moke boye?” Na Moyen-Orient, misala mabe ya banganga-mobulu Baarabe mpe Bayisalaele bazali kobimisa euti na koyina. Na mikili ya Mpótó koyina ekaboli ekólo Yougoslavie. Mpe engebene zulunalo moko, bobele na États-Unis “pene na bituluku 250 ya bato oyo bazali kolendisa koyina” bazali kopalanganisa makanisi ya koponapona mposo. Mpo na nini koyina ekómi makasi? Mpo na nini?

Koyina ekɔtela mpenza bato na boye ete ata ntango matata oyo yango ebimisaki esili, koyina ezali kotikala. Na ndenge mosusu nini tokoki kolimbola mokakatano ya kobatela kimya to kosilisa bitumba mpe misala mabe ya banganga-mobulu kati na bikólo? Na ndenge mosusu nini tokoki kolimbola likambo oyo ete, nsima ya kotya mabɔkɔ na mokanda mpo na kimya, na nsuka ya mobu 1995 na Paris, oyo emonisaki ete engumba Sarajevo ezala na nsé ya boyangeli ya Bosnie-Herzegovine mpe Ba Serbes mingi oyo bazalaki kofanda na engumba yango mpe nzingazinga na yango babandaki kokima mpo na kobanga mobulu? Nsima ya koloba ete bazalaki kobebisa mpe kotumba bandako oyo bazalaki kotika, zulunalo Time esukisaki ete: “Sarajevo esangisami lisusu; kasi bato na yango te.”

Kimya kati na bato oyo bazali koyinana ezali kimya ya mpamba, lolenge moko na mbongo ya mabe. Lokola ezali na eloko moko te ya ntina mpo na kosimba yango, kimya ya lolenge wana ekoki kobeba ata na mwa matata moke. Kasi mpo na nini koyina ezali makasi na mokili mpe bolingo ezali moke?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Koyina oyo ebebisaka euti na makanisi mabe likoló na basusu, kozanga boyebi, to kozwa nsango oyo epesami malamu te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto