Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 24-25
  • Kotala zándo ya bakamela na Omdurman

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotala zándo ya bakamela na Omdurman
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini batyá zando yango awa?
  • Elukami mingi
  • Kokakola ya makasi
  • Abrahama azalaki mpenza na bakamela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Libala oyo ekopesa matomba epai na bankoto na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 24-25

Kotala zándo ya bakamela na Omdurman

“MOWALEEH ezalaka epai wapi?”, wana motuna oyo totuni. Motuka na biso oyo etambolaka mbangu makasi ekamataki biso longwa na Khartoum, mboka-mokonzi, kino na kartyé oyo ezali na Wɛ́sti ya Omdurman ya kala, engumba oyo eleki monene na mboka Soudan.

Bilembo mpo na kolakisa nzela bizali te, bobele nzela moko ya zɛlo ya kobulunganisa. Na bongo, totuni motuna oyo ezali likoló epai na bato oyo bazali kotambola na bampunda na bango. Banyama na bango wana ememi babidɔ́ ya mai ya komela. Lokola batamboli wana na mpunda bazali bato na boboto, balakisi biso nzela ya malamu. Nsima ya bakilomɛtɛlɛ mwambe, totambwisi motuka na biso na nkeka moko ya zɛlo molai mpe tomoni eloko moko ya kobenda likebi: zándo ya bakamela na Omdurman, Mowaleeh.

Mpo na nini batyá zando yango awa?

Ezali na bokeseni monene na mopɛpɛ kitoko ya bisika ya mombongo na mikili ya Mpótó. Zándo esalemaka libándá na nsé ya molungé makasi ya esobe ya Sahara. Ezali na bonene soko ya ba Kilomètres carrés misato, ezali na bandelo mpenza ya polele te, ezali na nzeté te, na milóna mpe te. Ya solo, zɛlo ezali bisika nyonso oyo miso ekoki komona. Kasi okoki mpe komona ebele ya bakamela mpe babateli na yango oyo balati kazáka ya mboka na bango oyo babéngaka jalabeeya.

Wana tozali kotala mputulu ya lángi mosaka oyo etombwami na mopɛpɛ, oyo ekatisi esobe mobimba, tozali komituna: ‘Mpo na nini batyaki zándo awa?’ Toumelaki te na kozwa eyano ya malamu. Na etando monene ya zɛlo wana ezalaka ntango nyonso na tonó monene elɛngɛmi etóndi na mai oyo mauti na liziba ya mai ezalaki komonana. Liziba yango ya mai kitoko esali ete esika wana ezala esika malamu mpo na zándo motindo oyo. Longwa na esika oyo, banyama mingi ekotindamaka na Ezipito mpe na Libye.

Wana tokómi, Baarabe oyo bazali babateli na Kamela bayambi biso na esengo nyonso. Nkolo moko na moko ya bakamela asangisi bakamela na ye esika moko. Tomoni ete mpo na banyama mingi, lokolo na bango ya liboso ya mwasi engumbamaki mpe ekangisamaki. Mpo na nini batye bolɛmɛ yango ya mwa ntango moke na banyama na bango? Ezali na ntina ya biyambayamba oyo ete lokolo ya mwasi ezali ya Satana! Soki totye likanisi wana ya biyambayamba pembeni, ezali solo ete lokolo oyo ekangisami ezali kopekisa nyama ete ekende mosika mpe ezali kopesa nzela na basombi ete bátalela yango malamu.

Elukami mingi

Mpo na nini kamela ezali nyama oyo elukami mingi? Mpo ete ekoki malamu mpenza mpo na bizalela ya esobe; esungaka mpo na komema biloko kati na etando wana ekauká. Madusu milai ya zólo na ye makangamaka nokinoki na ntango ya mopɛpɛ ya esobe. Matoi na ye mazali na nsima ya motó mpe matondi na mikungé oyo mizali kopekisa ete zɛlo ekɔta. Mokúndu na ye monene, oyo ezali mingimingi na mafuta, esungaka lokola esika ya kobomba bilei na ntango ya mobembo molai. Matútú makasi oyo mazali na ntólo na ye mpe na mabɔlɔ́ngɔ́ na ye ebatelaka ye mpo na molungé ya zɛlo mpe nyamankɛkɛ ya mabe. Lisusu, bakamela ezali na likoki ya kolya milóna nyonso ya makasi mpe ya nzubɛnzubɛ oyo ekoki kozwama na esobe mpe akoki kosala mobembo mikolo mingi kozanga komela mai.a

Likambo ya esengo, bakamela mingi esalelamaka te mpo na komema biloko. Mosusu esombamaka bobele mpo na kobatela mosolo. Ya solo, kino sikawa, kamela esungaka mpo na kopesa mosolo ya libala! Mingi kati na banyama yango esukaka na kolyama. Bobele na Omdurman, barɛstorá mingi ebongisami mpo na koteka kamundele ya kamela. Bilei mosusu oyo balingaka mingi ezali bongo, kamela ya mungwa, ebéngami basturma, esalemaka mbala mingi na misuni ya kamela mpe etalelami lokola bilei ya kitoko mpenza na Ezipito mpe na mikili misusu ya Proche-Orient.

Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te soki zándo ya kamela na Omdurman ekómi na mobulu ntango bakamela ya Baarabe oyo ezali na mokúndu moko izali koya mbala mibale na pɔ́sɔ, mingimingi longwa na wɛ́sti ya Soudan. Basombi batungisamaka na Baarabe oyo bazali babateli na kamela oyo basepelaka mingi komonisa bitonga na bango.

Kokakola ya makasi

Mosombi akotala liboso nyama malamumalamu na liso ya kopona. Akosimba mokúndu mpo na komona soki ezali na mafuta mingi. Nzokande, bakamela epesamaka ntalo engebene bonene na yango mpe mbula na yango. Kamela ya mobu moko ebéngamaka heowar, ya mibu mibale ebéngamaka mafrood, ya mibu misato babengaka yango wad laboon. Kasi, banyama mingi ya motuya ezali oyo ekokisi ntango ya kobota. Oyo ya basi ekokisaka ntango ya kobota na mibu minei mpe ya mibali na mibu mwambe. Babéngaka ya mwasi heek mpe ya mobali sudaies. Na kotaláká banyama oyo etondi na mafuta, mosombi akotala yango malamumalamu mpo na koyeba soki ekómi mpenza na ntango ya kobota.

Soki mosombi asepeli na kamela moko, kokakola ebandi. Na Proche-Orient, ezali likambo ya ntina koyeba kokakola! “Be esm Allah” (Na nkombo ya Nzambe) ezali maloba ya liboso ya kobimisa. Sikawa etumba ya ntalo ebandi. Masoló esalemaka na kimya nyonso, kozanga koswana mpe kozanga kowelana. Soki mosombi mpe motɛki bayokani te, basukisaka bobele na kolobáká ete “Yeftaah Allah” (Nzambe akopesa libaku mosusu).

Nzokande, biso toyaki bobele kotala, kasi kosomba te. Tolekisaki bobele mwa ntango mokuse na nsé ya moi makasi ya nzánga, tozali pene mpo na kozonga epai na biso. Atako bongo, bakamela bakimaka molungé te. Na yango, tozali bobele komikundola lolenge malamu ‘masuwa wana ya mokili mokauki’ ebongisami mpenza mpo na ezingelo na bango. Ntembe ezali te ete mombongo yango mokokóba awa na zándo kitoko ya kamela na Omdurman!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisoló “Kamela ya Baarabe​—Motuka ya Afrika mpo na makambo nyonso” kati na nimero ya Lamuká! ya 8 Yuní 1992, (ebimeli ya Lifalansé).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto