Motuka na yo—Ekimelo to motámbo?
“Nsima na pene na makámá nyonso oyo mauti na biloko bizalisami,” lokola ekebisi yango FEMA (Ebongiseli moko oyo etalelaka kobatelama ya bato na États-Unis), “bituluku ya babikisi bakutaka bato oyo bakokaki kobika soki bayebaki ete esengelaki kotikala kati na motuka to kobima na libándá ya motuka.” Ya solo, ekateli na yo mabe ekoki kobungisa bomoi na yo. Oyebi nini osengeli kosala na ntango ya likámá moko liuti na biloko bizalisami? Yanolá na mituna oyo milandi mpe kokanisá biyano na yo na oyo bipesami awa na nsé.
1. KONINGANA YA MABELÉ
□ Tikalá na kati ya motuka
□ Bimá libándá ya motuka
2. EKUMBAKI
□ Tikalá na kati ya motuka
□ Bimá libándá ya motuka
3. MOPƐPƐ MAKASI
□ Tikalá na kati ya motuka
□ Bimá libándá ya motuka
4. MPELA
□ Tikalá na kati ya motuka
□ Bimá libándá ya motuka
BIYANO:
1. Koningana ya mabelé: TIKALÁ NA KATI YA MOTUKA.
Atako kolɛngɛmɛ ya motuka ekosala ete eningisa yango makasi, okoki kozala na libateli na kati—salá ete ozala pembeni ya ndako te, na matakanelo te, pembeni ya nsinga ya lotilíki mpe te.
2. Ekumbaki: BIMÁ LIBÁNDÁ YA MOTUKA.
Kotikala na kati ya motuka ezali mbala mosusu esika oyo eleki likámá mpenza na ntango ya ekumbaki. Kasi, ezali boni soki esika ya kobombama ezali pene wana te? FEMA elobi ete: “Lalá kati na tálásé to na libulu mosusu, mabɔ́kɔ likoló ya motó.”
3. Mopɛpɛ makasi: TIKALÁ NA KATI YA MOTUKA.
Longola bobele soki omoni ekimelo na mwa ntáká elongobani, ezali malamu koleka ete ozela babikisi. Motɛ́lɛ ya motuka ekoki kopelisama mwa ntango moke mpo na kotya molungé, kasi tiká lininisa mwa moke polele mpo na kopɛngola ngɛngɛ oyo ebéngami Oxyde de carbone. Pelisá mwinda ya kati lokola elembo ya kobéngisa babikisi.
4. Mpela: BIMÁ LIBÁNDÁ YA MOTUKA.
FEMA ekebisi ete: “Soki motuka ekati mɔ́tɔ kati na mai ya mpela, bimá mbangu mpe kimá na esika ya ngomba. Mai ya mpela makoki mbala mosusu kokóba komata mpe motuka mokoki kotiyola na ntango nyonso.” Komitya na likámá te. Mai ekoki kozala mozindo koleka oyo okoki kokanisa mpe bosándá na yango ekoki komata noki mpenza.
FEMA epesi toli ete obatela makambo oyo kati na mwa alumwálo ya motuka na yo. Mpe esɛngi ete kati na makambo nyonso, “likambo lileki ntina lizali oyo: Kobanga te.”