Nabatelamaki na ntina na kondima epai na nzambe
EZALAKI na Máí 1945, mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eutaki kosila na Mpótó. Nakómaki epai na biso na Chojnice, na Pologne, bobele mikolo mibale liboso. Mobembo mozwaki pene na sanza mibale, mpamba te nazalaki kotambola na makolo, mpe nazalaki kotelema mingi na nzela mpo na kotalaka bato oyo nayebanaki na bango. Nalekisaki mibu mibale kati na Káa ya bakangami na Stutthof, pene na Danzig (lelo oyo Gdańsk).
Wana efandaki biso na esika ya kosolola, mama, bandeko na ngai mibale ya basi, mpe ngai, tosepelaki mingi kosolola na moto moko ayaki kotala biso. Moto moko abetaki na ekuke ya liboso, mpe Elaine, yaya na ngai ya mwasi, asɛngaki nzela mpe akendeki kofungola ekuke. Totyaki mpenza likebi te kino ntango toyokaki ye angangi. Na mbala moko, natelemaki longwa na kiti mpe napotaki epai na ekuke. Bato mibale batelemaki liboso na ngai: Wilhelm Scheider mpe Manfred Licnierski, baninga baklisto oyo nakanisaki ete basilaki kokufa nsima na komona bango mpo na mbala ya nsuka.
Nsima na kotala bango monoko polele mpo na mwa ntango moke, ndeko Scheider atunaki ngai soki bakokaki kokɔta. Tolekisaki ndambo etikalaki ya mokolo kino kati na butu na kolobela mpe komikundola lolenge Yehova Nzambe abatelaki biso na boumeli ya kokangama na biso. Liboso ya kolobela makambo yango, tiká nalimbwela bino lolenge nini nakómaki na Káa ya bakangami.
Kondima emekami uta bolenge
Baboti na ngai bakómaki Bayekoli ya Biblia (nkombo oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na ntango wana) na ntango nabotamaki, na 1923. Bambula oyo ezalaki liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Batatoli ya Yehova. Mateya ya lingomba Katolike mazalaki koteyama kati na eteyelo, mpe Batatoli bazalaki konyokwama mingi. Bana mosusu bazalaki kotumola ngai mingi, mpe ntango nyonso molakisi azalaki kokɔtela bango. Mosala ya kosakola mozalaki mpe mpasi lokola. Mokolo moko, wana tokendeki kosakola na engumba Kamien, oyo ezalaki pembeni, pene na batomboki soko nkámá ya engumba bazingelaki Batatoli 20 kati na biso. Bapolisi bayaki na ntango yango mpenza mpo na kobatela biso longwa na etuluku wana.
Minyoko miyaki makasi ntango Allemagne ebundisaki Pologne na Sɛtɛ́mbɛ 1939. Na nsuka, na 1943, nakangamaki na basodá ya Gestapo mpo ete naboyaki kosala kati na limpinga ya basodá Allemagne. Ntango nakangamaki, basodá ya Gestapo batunaki ngai mituna, komekáká kobangisa ngai mpo ete nayebisa nkombo ya Batatoli mosusu ya etúká. Ntango naboyaki, mokonzi ya basodá ya Gestapo alobaki na ngai ete nakobomama na káa ya bakangami.
Natindamaki liboso na bolɔkɔ ya Chojnice, epai bakɛngɛli mibale ya bolɔkɔ babetaki ngai na lingénda ya motópi mpo na kopusa ngai ete naangana ekateli na ngai ya kotikala sembo epai na Yehova. Kobeta yango eumelaki miniti 15 to 20, na boumeli ya ntango nyonso wana, nazalaki sé kobondela mingi. Pene na nsuka ya kobetama yango, moko na bakɛngɛli ya bolɔkɔ amilelaki ete akolemba liboso ete ngai nalemba.
Likambo ya kokamwa, nsima ya kobetama mangénda ya liboso, nayokaki lisusu eloko moko te. Nazalaki bobele koyoka lokito ya mangénda, lokola kobetama ya mbondá na mosika. Ya solo, Yehova abatelaki ngai mpe ayanolaki na mabondeli na ngai. Nokinoki nsango ya kobetama wana epalanganaki na bolɔkɔ mobimba, mpe basusu babandaki kobénga ngai “moto na Nzambe.” Mwa moke na nsima, natindamaki na biro monene ya Gestapo na Danzig. Sanza moko na nsima, natindamaki na káa ya bakangami oyo ezali na Stutthof.
Bomoi na Stutthof
Na ntango tokómaki, balobaki na biso ete tótelema na molɔngɔ́ liboso ya káa. Kapo (mokangami mosusu oyo azwaki mokumba ya kokɛngɛla baninga na ye bakangami) alakisaki mosapi na mombónda ya milinga epai batumbaka bibembe ya bato mpe ayebisaki biso ete nsima na mikolo misato tokozala na likoló elongo na Nzambe na biso. Koyebáká ete ndeko Bruski, ya lisangá na biso na Chojnice, atindamaki na Stutthof, namekaki koluka kokutana na ye. Nzokande, moninga moko ya bolɔkɔ ayebisaki ngai ete asilaki kokufa esili koleka sanza moko. Nalembaki nzoto na boye ete namibwakaki na mabelé. Namilobaki ete soki ndeko Bruski, oyo azalaki makasi na nzoto mpe na elimo akufaki, boye ngai mpe nakokufa solo.
Bakangami mosusu basalisaki ngai mpo na kozonga na ndako ya mokangami, mpe ezali na ntango yango nde nakutanaki na ndeko Scheider. (Na nsima nayaki koyeba ete liboso ya etumba azalaki mokɛngɛli ya filiale ya Pologne.) Asololaki na ngai ntango molai, kolimbweláká ngai ete soki nabungisi kondima epai na Yehova, nakokufa! Nazalaki na liyoki ete Yehova atindaki mobali wana kolendisa ngai. Ya solo, lisese oyo libongi mpenza: “Ezali na ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”!—Masese 17:17, NW.
Kondima na ngai na ntango wana elembaki, mpe ndeko Scheider abendaki likebi na ngai na Baebele 12:1. Mokapo wana mozali kokebisa baklisto mpo na lisumu oyo lizali kokangisa bango kozanga nkaká, elingi koloba kozanga kondima. Ndeko Scheider asalisaki ngai komikundola bato oyo balobelami na Baebele na mokapo 11 mpe kotalela kondima na ngai na bokokani na oyo ya bango. Nakangamaki makasi elongo na ndeko Scheider longwa na ntango wana, atako azalaki na mibu 20 koleka ngai, tokómaki baninga ya solosolo.
Mokolo moko, mbinga ya mobali moko oyo azalaki na elembo ya triangle ya mai na mpondu (oyo elimboli ete azalaki mobomi ya bato) alobaki na ngai ete natelema likoló na mesa mpe nateya bakangami na ntina na Yehova. Bobele ntango nakamataki maloba, bakangami mosusu babandaki koseka ngai. Kasi mbinga wana—oyo bato nyonso bazalaki kobanga ye alobaki na bango ete báfanda nyee. Wana tosanganaki mpo na kolya na midi mpe na mpokwa kino na nsuka ya poso, mbinga wana azalaki kopesa ngai nzela ete namata likoló na mesa mpo na koteya.
Na poso oyo elandaki, bakangami mosusu, elongo na ngai, totindamaki na káa mosusu. Mokangami mosusu oyo azalaki na triangle ya mai na mpondu abelemaki pembeni na ngai mpe atunaki mpo na nini Nzambe na ngai atindaki ngai kati na “lifelo” wana. Nayanolaki ete ezalaki mpo na koteya bakangami mpe kozala na ngai awa ezali mpo na komeka kondima na ngai. Kati na ndako wana ya bakangami, nakokaki kosakola epai na bakangami mosusu mpokwa nyonso na boumeli ya poso mibale.
Mokolo moko, kapo alobaki na moninga na ye mokangami mosusu ete abeta ngai. Aboyaki, atako ye moko akokaki kobetama mpo na yango. Ntango natunaki ye mpo na nini oboyaki kobeta ngai, alobaki ete moko na masoló oyo nazalaki kosala esalisaki ye na kolongola likanisi oyo azalaki na yango ya komiboma. Akanisaki ete nabikisaki bomoi na ye, na bongo akokaki te kobeta moto oyo asalisaki ye boye.
Kondima emekamaki kino na nsuka
Na eleko ya mpiɔ ya mobu 1944, basodá ya Russie babelemaki na Stutthof. Bakonzi ya káa bazwaki ekateli ya kobimisa bakangami liboso ete basodá ya Russie bakóma. Ba allemands babandaki kotambwisa bakangami soko 1 900 kati na biso bipai ya Slupsk. Ntango tokómaki na katikati ya nzela, bobele soko 800 nde batikalaki. Na boumeli ya botamboli na biso, tozalaki koyoka lokito ya mindóki; na bongo tokanisaki ete basusu babomamaki to bakimaki.
Na ebandeli ya mobembo, bapesaki biso moko na moko na ndambo ya mampa mpe ndambo ya manteka. Mingi balyaki nokinoki nyonso oyo bapesaki bango. Nzokande, nalyaki oyo ya ngai mokemoke, koyebáká ete mobembo mokoki koumela poso mibale. Ezalaki bobele na Batatoli zomi kati na bakangami, mpe ndeko Scheider mpe ngai tozalaki esika moko.
Na mokolo ya mibale ya mobembo, ndeko Scheider abɛlaki. Kobanda mokolo wana, nasengelaki komema ye, mpamba te soki totikalaki, tokokaki kobomama. Ndeko Scheider ayebisaki ngai ete Yehova ayanolaki na mabondeli na ye na boye ete nazalaki wana mpo na kosalisa ye. Na mokolo na mitano, nalembaki mingi mpe nazalaki na nzala, na boye ete nakokaki kotambola lisusu te, mpe nakokaki lisusu komema ndeko Scheider te. Ye mpe lisusu abandaki kolemba na ntina na kozanga ya bilei.
Na ebandeli ya nsima ya nzangá, ndeko Scheider ayebisaki ngai ete alingaki kokende kokitisa libumu, na bongo namemaki ye na nsé ya nzeté moko. Nazalaki kotala zingazinga mpo na kondimisama ete basodá ya Allemagne bazalaki komona biso te. Soko nsima ya miniti moko, ndeko Scheider azongaki na limpa na mabɔkɔ. Natunaki ye ete: “Epai wapi ozwi yango? Ekakemaki na nzeté to boni?”
Alobaki ete wana ebalolaki ngai mokɔngɔ, moto moko abelemaki na ye mpe apesaki ye limpa. Yango emonanaki likambo ya kokamwa mpo na ngai, mpamba te namonaki eloko moko te. Na ntango yango, tozalaki na nzala makasi na boye ete tozalaki na ntango te ya komituna ebele na mituna. Kasi nasengeli kondima ete lilɔmbɔ oyo Yesu ateyaki biso mpo na limpa na biso ya mokolo na mokolo ezalaki na ndimbola mosusu na miso na ngai. (Matai 6:11) Tokokaki te kosala mokolo mosusu moko kozanga limpa wana. Lisusu nakanisaki na maloba oyo ya mokomi na Nzembo: “Nde naino namɔni moyɛngɛbɛni tɛ oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka [limpa, NW].—Njembo 37:25.
Soko nsima na poso moko, wana tozalaki na katikati ya nzela liboso ete tókóma Slupsk, totelemaki na káa ya Bilenge ya Hitler. Kuna tokutanaki na bakangami ya bakáa mosusu. Ndeko Licnierski, azwaki bokɔnɔ bobéngami fièvre typhoïde mpe atyamaki elongo na bakangami mosusu kati na esika oyo ebongisami mpo na bato na maladi. Mpokwa nyonso nasengelaki, na kobombama nyonso, kotika esika epai nazalaki mpo na kokende kotala ndeko Licnierski. Soki bamonaki ngai, nakokaki kobomama, kasi ezalaki na ntina mpo na ngai ete nasala oyo ekokaki na ngai mpo ete fɛ́fɛlɛ na ye esila. Nazalaki kopɔlisa eteni ya elamba na mai, mpe kofanda pembeni na ye mpo na kopangwisa ye yango na elongi. Na nsima nazalaki kopɛlɛngɛnɛ mpo na kozonga na ndako na ngai ya mokangami. Ndeko Scheider mpe azwaki fièvre typhoïde mpe batyaki ye na esika ezalaki ndeko Licnierski.
Bayebisaki biso ete ba Allemands balingaki kotambwisa biso kino na mai monene ebéngami Baltique mpo na kotinda biso na mboka Danemark na nzela ya masuwa. Nzokande, ba Russes bazalaki sé kobelema. Lokola ba Allemands babandaki kobanga mpe kokima, bakangami bazwaki libaku ya kokima. Basodá ya Allemagne basɛngaki ngai ete nakende, kasi lokola ndeko Scheider mpe ndeko Licnierski bazalaki bango nyonso mibale na maladi, bazalaki na likoki te ya kotambola mpo na kosala mobembo mpe ngai nakokaki te komema bango, nayebaki te nini nakokaki kosala. Na bongo, nakendeki mpe nasɛngaki na Yehova ete abatela baninga balingami na ngai wana.
Ngonga moko nsima na bokei na ngai, ba Russes bakɔtaki na káa. Sodá moko oyo amonaki ndeko Scheider mpe ndeko Licnierski asɛngaki na mwasi moko ya Allemagne, oyo azalaki kofanda na ebokwelo oyo ezalaki pembeni ete amelisaka bango súpu ya nsoso mokolo na mokolo kino bakoyoka malamu. Mwasi yango ayebisaki sodá ete ba Allemands basilaki kokamata nsoso na ye nyonso. Sodá ayebisaki ye ete soki aleisi mibali wana te akoboma ye. Ndenge tokoki kokanisa yango, akendeki nokinoki koluka mwa nsoso, mpe bandeko na ngai balingami babandaki koyoka malamu!
Kondima ekóbi komekama
Ezali mpo na bantango wana mpe mosusu nde tozalaki kolobela kati na esika ya kosolola ya mama na ngai kino penepene na ntɔ́ngɔ́. Ndeko Scheider mpe ndeko Licnierski balekisaki mikolo mibale mpe na nsima bakendeki na mboka na bango. Ndeko Scheider asalelamaki mingi na Yehova mpo na kobongisa mosala ya kosakola na mboka Pologne, kozongeláká mikumba na ye mingi ya kala. Nzokande, mpo ete ba communistes bakamataki bokonzi, mosala ya kosakola ekómaki nkaká.
Batatoli bazalaki kokangama mbala na mbala mpo ete bazalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe. Mbala mingi, nazalaki kati na bango mpe bazalaki kotuna ngai mituna mingi sé na bato oyo babikisaki ngai na mabɔkɔ ya ba Nazis. Na nsima, tososolaki mpo na nini bakonzi bayebaki malamu makambo matali mosala na biso: Ba communistes batyaki banɔ́ngi kati na lisangá mpo na koyeba makambo na biso. Bokɔti yango elóngaki mingi na boye ete na butu moko ya 1950, bankóto ya Batatoli bakangamaki.
Na ntango yango, mwasi na ngai Helena mpe libota na biso oyo ezalaki koya monene, tozwaki ekateli ya kokende na Etats-unis. Tokómaki na 1966. Ntango nakendeki kotala Brooklyn, na New York, nazalaki na likoki ya kopesa epai na bakambi ya biro monene ya Batatoli ya Yehova bandimbola oyo esalisaki bango na koyeba banani batyamaki lokola banɔ́ngi ya ba communistes kati na lisangá.—Kokanisá na Misala 20:29.
Sikawa nazali na mibu 70, mpe nazali kofanda na etúká ya Colorado, epai nazali nkulutu kati na lisangá moko na mboka oyo nafandi. Na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ mabe ya nzoto, nazali lisusu na likoki te ya kosala makambo lokola na kala. Nzokande, nazalaka ntango nyonso na esengo motindo moko mpo na kolobela bato makambo matali Bokonzi ya Yehova. Wana ezali ngai elongo na bilenge kati na mosala ya kosakola, nazali lisusu na libaku ya kosalisa bango na koyeba ete atako lolenge nini ya mikakatano tokoki kokutana na yango, Yehova azali pene mpo na kosalela bokasi na ye mpo na baoyo bazali na kondima epai na ye.
Soki nazongisi makanisi nsima mpo na bomoi na ngai, nazali koyeba ete Yehova abikisaki ngai mpe baninga na ngai na makambo mingi oyo makokaki kozala likámá. Makambo yango nyonso mayeisaki makasi kondima na ngai kati na libateli na ye. Ntembe ezali te kati na makanisi na ngai ete ebongiseli oyo ya biloko ekolongwa mosika te na ntango ya “bolózi monene” oyo bosili kobelema mpe ete babiki bakozala na libaku monene ya kosangana na mosala ya kobongola mabelé oyo ete ekóma paladiso moko monene.—Emoniseli 7:14; 21:3, 4; Yoane 3:16; 2 Petelo 3:13.
Nazali kozela na esengo nyonso kosangana na mosala wana ya kobongola mabelé paladiso, mpe yo okoki kosangana na yango soki ozali kosala mokano ya Yehova malamu na boyokani na makoki na yo mpe soki ondimi elaka na ye ya kobatela baoyo bazali na kondima epai na ye.—Lisoló ya Feliks Borys.
[Elilingi na lokasa 14]
Mbula moko nsima na kobima na ngai kati na káa ya bakangami
[Elilingi na lokasa 17]
Elongo na Helena, mwasi na ngai