Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 159
  • Banyama ekendeke na likoló?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banyama ekendeke na likoló?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Nyama ezalaka na molimo?
  • Milimo ekoki kokufa?
  • Nyama esalaka lisumu?
  • Konyokola nyama ezali mabe?
  • Banyama
    Lamuká!—2015
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Konyokola banyama ezali mabe?
    Lamuká!—1999
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 159
Mbwa moko

Banyama ekendeke na likoló?

Eyano ya Biblia

Biblia eteyaka ete na bikelamu nyonso oyo ezali awa na mabele, kaka mwa ndambo ya bato nde bakokende na likoló. (Emoniseli 14:1, 3) Bakokende kuna mpo na koyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Yesu. (Luka 22:28-30; Emoniseli 5:9, 10) Ebele ya bato mosusu bakosekwa mpo bázala na bomoi na paradiso awa na mabele.​—Nzembo 37:11, 29.

Ezali ata na esika moko te oyo Biblia elobi ete na likoló ezalaka na esika mpo na banyama lokola mbwa to nyau mpe ezali mpamba te soki Biblia elobeli yango te. Nyama ekoki te kokokisa masɛngami ya Nzambe “mpo na kokende na likoló.” (Baebre 3:1) Na ndakisa, makambo lokola kozwa boyebi, komonisa kondima, mpe kotosa mibeko ya Nzambe. (Matai 19:17; Yoane 3:16; 17:3) Kaka bato nde bakelamaki na elikya ya kozala na bomoi ya seko.​—Ebandeli 2:16, 17; 3:22, 23.

Mpo na kokende na likoló, bikelamu ya mabele basengeli naino kosekwisama liboso. (1 Bakorinti 15:42) Biblia elobeli mwa bato oyo basekwaki. (1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Luka 7:11-15; 8:41, 42, 49-56; Yoane 11:38-44; Misala 9:36-42; 20:7-12) Bango nyonso bazalaki bato, kasi banyama te.

  • Nyama ezalaka na molimo?

  • Milimo ekoki kokufa?

  • Nyama esalaka lisumu?

  • Konyokola nyama ezali mabe?

Nyama ezalaka na molimo?

Te. Biblia elobi ete ezala banyama to bato bango nyonso bazali milimo. (Mitángo 31:28) Ntango Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso, apesaki ye molimo te kasi “akómaki [nde] molimo ya bomoi.” (Ebandeli 2:7) Molimo esangisi biloko mibale: “putulu ya mabele” mpe “mpema ya bomoi.”

Milimo ekoki kokufa?

Ɛɛ, Bible eteyaka ete molimo ekoki kokufa. (Balevi 21:11; Ezekiele 18:20) Ntango banyama mpe bato bakufaka, bazongaka na putulu ya mabele. (Mosakoli 3:19, 20) Na maloba mosusu, batiki kozala na bomoi.a

Nyama esalaka lisumu?

Te. Kosala lisumu elimboli kokanisa, koyoka to kosala likambo moko oyo ebuki mibeko ya Nzambe. Mpo ekelamu moko esala lisumu, esɛngi ezala na likoki ya kozwa bikateli na makambo etali bizaleli malamu, nzokande nyama ezalaka na likoki wana te. Na boumeli ya bomoi na yango, nyama esalelaka ntango nyonso makambo na kolanda mayele ya lɔɔmbi to instinct. (2 Petro 2:12) Soki bomoi ekómi na nsuka, nyama ekufaka atako esalaka lisumu te.

Konyokola nyama ezali mabe?

Ɛɛ. Nzambe apesaki bato bokonzi likoló ya banyama kasi apesaki bango te lotomo ya konyokola yango. (Ebandeli 1:28; Nzembo 8:6-8) Nzambe akipaka nyama mokomoko; ata mpe bandɛkɛ ya mike mpenza. (Yona 4:11; Matai 10:29) Asɛngaki basaleli na ye básalela banyama makambo na boboto.​—Kobima 23:12; Kolimbola Mibeko 25:4; Masese 12:10.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli banyama

Ebandeli 1:28: “Nzambe apambolaki [bato ya liboso], mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.’”

Yango elingi koloba: Nzambe apesaki bato bokonzi likoló ya banyama.

Mitángo 31:28: “Mpo na mpako . . . , osengeli kozwa epai ya mibali ya etumba oyo babimaki kobunda, molimo moko na milimo nkama mitano (500): na bato mpe na bangɔmbɛ mpe na bampunda mpe na bampate.”

Yango elingi koloba: Ezala banyama to bato bango nyonso bazali milimo.

Masese 12:10: “Moyengebene amibanzabanzaka mpo na molimo ya nyama na ye ya mboka.”

Yango elingi koloba: Bato malamu bakipaka mpenza banyama, ata mpe banyama oyo bango babɔkɔlaka.

Matai 10:29: “Batɛkaka bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo ya bibende moko ya motuya moke, boye te? Nzokande ata moko na yango ekokwea na nse te bongo Tata na bino ayeba te.”

Yango elingi koloba: Nzambe ayebaka mpe atyelaka banyama likebi; ata mpe bandɛkɛ ya mike mpenza.

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto