Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 5
  • Programɛ ya botángi ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ ya botángi ya Biblia
  • Makambo mosusu
  • Masolo mosusu
  • Nasala nini mpo kotánga Biblia esepelisa ngai mpenza?
    Lamuká!—2002
  • Eteni 1 Bozongeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Lolenge bato ya libota moko bakoki kopesana mabɔkɔ mpo na​—Boyekoli ya Biblia kati na libota
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2002
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 5
Mwasi moko azali kotala programɛ ya botángi ya Biblia na jw.org

Programɛ ya botángi ya Biblia

Biblia ezali buku oyo ezali na toli ya malamu koleka. Soki ozali kotánga yango mbala na mbala, kokanisa na mozindo na makambo ozali kotánga mpe ozali kosalela yango, “okolongisa nzela na yo.” (Yosua 1:8; Nzembo 1:1-3) Okoyeba mpe Nzambe ná Mwana na ye Yesu, mpe boyebi yango ekopesa yo libaku ya kozwa lobiko.​—Yoane 17:3.

Programɛ ya botángi ya Biblia

Osengeli kotánga Biblia ndenge nini? Okoki kopona mayele ndenge na ndenge. Programɛ oyo ya botángi ya Biblia ekosalisa yo otánga mikanda ya Biblia na molɔngɔ to na kotalela mitó ya makambo. Na ndakisa, biteni mosusu ekosalisa yo oyeba ndenge oyo Nzambe azalaki kosalela Bayisalaele makambo mpe biteni mosusu ekosalisa yo omona ndenge lisangá ya bokristo ebandaki mpe ekolaki na siɛklɛ ya liboso. Soki ozali kotánga mwa mikapo mokolo na mokolo, okosilisa kotánga Biblia mobimba na mbula moko.

Ata soki ezali mbala ya liboso oluka kolanda programɛ moko mpo na kotánga Biblia, to ozali na mposa ya programɛ moko mpo na kotánga Biblia mikolo nyonso to programɛ moko oyo ekosalisa yo otánga Biblia mobimba na mbula moko; programɛ oyo ekosalisa yo. Zwá programɛ oyo ya botángi ya Biblia oyo okoki ko-imprimer, mpe bandá yango lelo.

Zwá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto