Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 144
  • Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Makanisi ya libunga oyo bato mingi bazalaka na yango na oyo etali kotumba bibembe
  • Osengeli komona mabe bátumba nzoto ya mowei?
    Lamuká!—2009
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Kozonga na mputulu lolenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Makambo mazali na kati
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 144
Molangi ya putulu ya ebembe oyo batumbá, pene ya fɔtɔ ya mowei

Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?

Eyano ya Biblia

Biblia epesi malako ya polele te na likambo etali momeseno ya kotumba bibembe. Ezali na mobeko moko te oyo etali kokunda ebembe to kotumba yango.

Kasi Biblia elobeli bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bakundaki bibembe ya bato na bango. Na ndakisa, Abrahama asalaki milende mpo esika oyo bakundaki mwasi na ye Sara ebatelama.​—Ebandeli 23:2-20; 49:29-32.

Biblia elobeli mpe bato ya sembo oyo batumbaki mikuwa ya bibembe. Na ndakisa, ntango Mokonzi Saulo ya Yisraele ná bana na ye misato ya mibali bakufaki na bitumba, bibembe na bango etikalaki na teritware ya banguna mpe basambwisaki yango. Ntango basoda ya Yisraele ya sembo bayokaki likambo yango, bazwaki nzoto ya Saulo mpe ya bana na ye, batumbaki yango mpe bakundaki mikuwa oyo etikalaki. (1 Samwele 31:8-13) Biblia emonisi ete ezalaki lolenge malamu ya kosala na mikuwa ya mibali yango oyo etikalaki.​—2 Samwele 2:4-6.

Makanisi ya libunga oyo bato mingi bazalaka na yango na oyo etali kotumba bibembe

Libunga: Kotumba ebembe esambwisaka nzoto.

Solo: Biblia elobi ete baoyo bazali kokufa bazongaka putulu, yango nde ndenge nzoto ya moto ekómaka ntango epɔlaka. (Ebandeli 3:19) Kotumba ebembe esalaka yango nokinoki mpo ekómisaka nzoto ya moto putulu.

Libunga: Na ntango ya kala, kaka bato oyo Nzambe aboyaki nde bazalaki kotumba bibembe na bango.

Solo: Batumbaki bibembe ya bato mosusu oyo bazangaki bosembo, na ndakisa ebembe ya Akana ná bato ya libota na ye. (Yosua 7:25) Kasi, yango ezalaki mobeko te. (Kolimbola Mibeko 21:22, 23) Ndenge tomonaki yango liboso, bibembe ya bato mosusu ya sembo, na ndakisa ya Yonatane mwana ya Mokonzi Saulo, batumbaki yango.

Libunga: Kotumba moto ekopekisa Nzambe asekwisa ye.

Solo: Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, Nzambe akokipe te soki bakundaki ebembe, batumbaki yango, ebungaki na ebale to banyama ya zamba elyaki yango. (Emoniseli 20:13) Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na likoki ya kopesa moto oyo akufaki nzoto ya sika.​—1 Bakorinti 15:35, 38.

Kotumba to kokunda?​—Kozwa ekateli

Ntango olingi kozwa ekateli na oyo etali ebembe, talelá makambo oyo elandi.

  • Mposa ya moto oyo akufi. Biblia elobeli bandakisa oyo emonisi ndenge bato ya libota batosaki malako oyo moto apesaki mpo na oyo bakosala na nzoto na ye soki akufi.​—Ebandeli 50:4, 5; Kobima 13:19.

  • Mimeseno ya esika tofandi. Mbala mingi yango etalelaka mpe ndenge basalaka na bibembe. (Yoane 19:40) Na ndakisa, na ntango ya kala, bato bazalaki na momeseno ya kokunda ebembe. (Ebandeli 49:31; 1 Samwele 28:3) Lelo oyo mpe, moto akoki kopona kosala na ebembe ya moto ya libota na ye na kolanda mimeseno ya mboka soki yango ebuki te mitinda ya Biblia.

  • Mibeko ya Leta. Biblia esɛngaka kotosa bakonzi ya Leta. (Baroma 13:1) Na bisika mosusu, bakonzi ya Leta babimisaka mobeko etali ndenge ya kosala ntango moto akufi. Na ndakisa, na likambo etali kotumba ebembe, bakonzi mosusu batyaka bipekiseli etali esika oyo bakotya putulu oyo etikali.

  • Ndenge basusu bakomiyoka. Biblia elobi tótyaka likebi mpe na makambo ya basusu. (Bafilipi 2:4) Ntango tolingi kozwa ekateli etali oyo tokosala na ebembe, tosengeli kotalela mituna oyo: Bato mosusu ya libota bazali kokanisa nini na likambo etali kotumba to kokunda nzoto ya mowei? Bato ya mboka oyo tofandi batalelaka mimeseno yango ndenge nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto