Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 128
  • Liteya ya epongelo ezali na Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya ya epongelo ezali na Biblia?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Epongelo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Lifelo ezali nini penza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Okoki kondimela Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Liwa
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 128
Elilingi moko oyo ezali komonisa epongelo

Liteya ya epongelo ezali na Biblia?

Eyano ya Biblia

Te, liteya wana ezali na Biblia te. Liloba “epongelo” ezali na Biblia te, Biblia eteyaka mpe te ete milimo ya bato oyo bakufi ekendaka kopɛtolama na epongelo.a Tótalela oyo Biblia eteyaka na oyo etali lisumu mpe liwa mpe ndenge mateya yango eyokani te na liteya ya epongelo.

  • Komonisa kondima na makila ya Yesu nde epɛtolaka moto na masumu, kasi epongelo te. Biblia elobi ete “makila na Yesu, Mwana na [Nzambe] makopɛtɔlaka biso na masumu yɔnsɔ” mpe ete “Yesu Klisto . . . asukoli biso na masumu na biso na makila na ye.” (1 Yoane 1:7; Emoniseli 1:5, Biblia haut fleuve) Yesu apesaki “bomɔi na ye lokola lisiko mpɔ na [bato] mingi” mpo afuta masumu na bango.​—Matai 20:28, Biblia haut fleuve.

  • Moto oyo akufi ayebaka eloko te. “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ.” (Mosakoli 9:5, Biblia haut fleuve) Lokola moto oyo akufi akoki koyoka eloko te, akoki mpe te kopɛtolama na mɔtɔ ya epongelo.

  • Moto akoki kozwa etumbu te nsima ya liwa. Biblia elobi ete “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa” mpe “moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” (Baroma 6:7, 23) Etumbu oyo ekoki na lisumu ezali Liwa.

Liteya yango ya epongelo elobaka nini?

Lingomba ya Katolike eteyaka ete epongelo ezali ndenge molimo ya moto ezalaka nsima ya liwa to esika oyo molimo yango ekendaka nsima ya liwa mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu oyo elimbisamaki te mpe kopɛtolama na masumu yango.b Na kolanda Katekisimo ya Lingomba ya Katolike, kopɛtolama yango ezali na ntina “mpo molimo ya moto esilisa kosantisama na yango mpe ekɔta na bisengo ya lola.” Katekisimo yango ebakisi: “Bindimeli ya Eklezia . . . elobeli kopɛtolama na mɔtɔ,” ndenge elilingi oyo ezali na lisolo oyo emonisi yango. Kasi, yango ezali te mateya ya Biblia.

Liteya yango ya epongelo eutá wapi?

Bato ya Grɛki ya ntango ya kala bazalaki kondimela limbe ná epongelo. Lokola azalaki kolanda filozofi ya Bagrɛki, Clément d’Alexandrie alobaki ete moto oyo akufi akoki kopɛtolama na masumu na nzela ya mɔtɔ. Kasi, buku moko (The History of Christian Doctrines) emonisi ete ezali Pápa Grégoire le Grand nde alobaki ete mɔtɔ ya epongelo ezali liteya ya kotyela ntembe te. Buku yango elobi mpe ete Grégoire, oyo azalaki Pápa banda 590 tii 604 ya ntango na biso, abengami “mobandisi ya epongelo.” Lingomba ya Katolike emonisaki polele liteya ya epongelo na likita ya Lyon na 1274 mpe likita ya Florence na 1439 mpe endimisaki lisusu liteya yango na likita oyo esalemaki na engumba Trente na 1547.

a Mpo na liteya yango ya epongelo, buku moko (Orpheus: A General History of Religions) elobi ete “liloba yango ezali te na Baevanzile.” Buku mosusu mpe (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Nsima ya kotalela yango malamumalamu, liteya ya epongelo oyo lingomba ya Katolike eteyaka eutá na mimeseno ya bato, kasi na Makomami Mosantu te.”​—Ebimeli ya mibale, Volimi 11, lokasa 825.

b Talá the New Catholic Encyclopedia, Ebimeli ya mibale, Volimi 11, lokasa 824.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto