Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 47
  • Mpo na nini kozala sembo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kozala sembo?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato mosusu bazalaka sembo te
  • Mpo na nini bosembo efutaka
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Kozala sembo elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 47
Mwana oyo azali koyiba na ekzamɛ mpe azali kopesa moninga nɔti

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini kozala sembo?

  • Mpo na nini bato mosusu bazalaka sembo te

  • Mpo na nini bosembo efutaka

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Mpo na nini bato mosusu bazalaka sembo te

Na mokili ya lelo, emonanaka lokola ete bosembo efutaka te. Kutu, bamosusu bakoki koloba boye:

  • ‘Soki nakosi baboti na ngai te, bakopekisa ngai makambo mosusu.’

  • ‘Soki nayibi te na ekzamɛ oyo, nakozwa te.’

  • ‘Soki nayibi eloko oyo te, ekosɛnga naluka lisusu mbongo ya kosomba yango.’

‘Bamosusu bakoki koloba boye: ‘Kutu, mabe ezali wapi.’ ‘Bato ya sembo mpe bazalaka?’

Eyano na motuna wana ezali Ɛɛ. Bato mingi, ata mpe ebele ya bilenge bamonaka ete bosembo efutaka mpe bazali na ntina ya koloba bongo. Biblia elobi ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Na maloba mosusu, makambo oyo tosalaka ebotaka ntango nyonso mbuma; ya malamu to ya mabe.

Na ndakisa, tótalela mbuma mabe oyo bato mosusu babukaki mpo bakosaki.

“Nakosaki mama mpo na mwana-mobali moko. Mama ayebaki mpenza ete nazalaki kokosa. Nsima ya kokosa ye mbala misato, mama asilikaki mpenza. Pɔsɔ mibale mobimba apekisaki ngai nabima mpe sanza mobimba nakokaki te kosolola na telefone to kotala televizyo. Nakosaki lisusu baboti na ngai te!”​—Anita.

Omituna boye: Mpo na nini ekoki kozwa lisusu mwa ntango mpo mama atyela lisusu Anita motema?

Biblia elobi boye: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

“Nakosaki baboti na ngai mpe nakanisaki ete bayebi yango te tii ntango na nsima bayebisaki ngai nabandela koloba makambo oyo nalobaki ete esalemaki. Ezalaki mpenza lokuta mpo nayebaki lisusu te ata makambo mikemike oyo nalobaki. Soki na ebandeli olobi solo, okokutana na likambo ya boye te!”​—Anthony.

Omituna boye: Ndenge nini Anthony akokaki koboya likambo ya ndenge wana ekómela ye?

Biblia elobi boye: “Mbɛbu oyo elobaka lokuta ezali eloko oyo Yehova ayiná, kasi baoyo bazali kosala na bosembo basepelisaka ye.”​—Masese 12:22.

“Nazali na moninga moko oyo abakisaka mungwa ná pilili soki azali kobɛta masolo na ye mpo ebima kitoko. Alekisaka ndelo mpenza. Nalingaka ye mpe nalandelaka te makambo mosusu oyo alobaka. Kasi ezali mpasi mpenza nandimela ye to natyela ye motema.”​—Yvonne.

Omituna boye: Ndenge nini kolekisa ndelo mpe koloba lokuta ya “mikemike” ekoki kobebisa lokumu ya moninga ya Yvonne?

Biblia elobi boye: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

Ndako ya babriki oyo fondasyo na yango ezali mabe

Fondasyo ya malamu te ekoki kokweisa ndako mobimba; ndenge moko mpe, kozanga bosembo ekoki kobebisa lokumu na yo

Mpo na nini bosembo efutaka

Talelá sikoyo mbuma malamu oyo okoki kobuka soki ozali sembo.

“Mwasi moko oyo azalaki liboso na ngai akweisaki mbongo. Nabelelaki ye mpe nazongiselaki ye mbongo na ye. Asepelaki mpenza. Alobaki boye: ‘Osali malamu mpenza. Bato mingi te bakoki kosala oyo osali.’ Namiyokaki malamu ndenge bayebisaki ngai ete nasali likambo ya malamu!”​—Vivian.

Omituna boye: Mpo na nini mwasi yango akamwaki komona bosembo ya ndenge wana? Ndenge nini Vivian abukaki mbuma malamu mpo na bosembo na ye?

Biblia elobi boye: “Esengo na baoyo bazali . . . kosalela boyengebene ntango nyonso.”​—Nzembo 106:3.

“Tozalaki kosala mosala ya kosukola babiro libota mobimba mpe na bantango mosusu soki tozali kosukola biro moko, tokomona mbongo na pavema. Soki tomoni yango totyaka yango na mesa oyo ezali pene wana. Mosali moko akómaki kobaye bosembo na biso; alobaki boye, ‘ezali na yango kaka mwa mbongo moke!’ Kasi boyebi nini? Azalaki ntango nyonso kotyela biso motema.”​—Julia.

Omituna boye: Ndenge nini bosembo ya Julia ekoki kofuta soki akei koluka mosala mosusu?

Biblia elobi boye: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye.”​—2 Timote 2:15.

“Na esika báfuta ngai mbongo ya mosala oyo nasalaki na boumeli ya ngonga 64, bafutaki ngai nde ya ngonga 80. Atako nakokaki kotikala na mbongo yango, namonaki malamu nasala bongo te. Nalakisaki yango mokonzi oyo afutaka biso mpe apesaki ngai mersi. Kompanyi yango ekɔtisaka mbongo ebele, kasi naboyaki kotikala na mbongo yango noki namona lokola nayibi.”​—Bethany.

Omituna boye: Koyiba na kompanyi ezali mpenza mabe te koleka koyiba eloko ya moto?

Biblia elobi boye: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”​—Masese 3:32.

Makambo bilenge mosusu balobi

  • Tobi

    TOBI

    Milende oyo bana-kelasi basalaka mpo na koyiba na baekzamɛ ekamwisaka. Soki batye ata ndambo ya milende yango mpo na koyekola na esika ya koyiba na baekzamɛ, mbɛlɛ balongaka na ekzamɛ!

  • Austin

    AUSTIN

    Namitunaka boye, ‘likambo nini ya mabe koleka ekokómela ngai soki nalobi solo?’ Na nsima, nakokanisaka yango na likambo ya mabe oyo ekoki kokómela ngai soki nakosi. Kokanisa na makambo oyo ekoki kobima esalisaka ngai natikala sembo.

  • Heidy

    HEIDY

    Bato mingi bakosaka soki bakanisi ete koloba solo ekomemela bango mpasi. Kasi, ezali malamu koloba solo ata soki bakopesa yo etumbu na esika ya kokosa mpe kozala na lisosoli oyo etungisami.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto