Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 60
  • Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Bongisá motema na yo mpo na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tóyekola kozwa bosepeli kati na kobanga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kobanga Nzambe ekoki komemela yo bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mpo na nini kobanga Nzambe, kasi bato te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 60

Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?

Eyano ya Biblia

Biso bato tobangaka liwa mpo ezali monguna, mpe tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bomoi na biso. (1 Bakorinti 15:26) Kasi, kozala na nsɔmɔ ya liwa oyo euti na mateya ya lokuta mpe biyambayamba etyaka bato na “boombo bomoi na bango mobimba.” (Baebre 2:15) Koyeba solo na oyo etali liwa ekopekisa yo ozala na nsɔmɔ ya liwa, oyo ekoki kolongola yo esengo ya kozala na bomoi.​—Yoane 8:32.

Solo na oyo etali liwa

  • Bato oyo bakufá bayebaka eloko te. (Nzembo 146:4) Osengeli te kobanga ete okonyokwama to okomona mpasi soki okufi, mpo Biblia elobi ete liwa ezali lokola mpɔngi.​—Nzembo 13:3; Yoane 11:11-14.

  • Bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe te. Ata baoyo bazalaki mpenza banguna na biso “bazangi makasi kati na liwa.” (Masese 21:16) Biblia elobi ete “koyina na bango ná zuwa na bango esili.”​—Mosakoli 9:6.

  • Liwa esukisaka makambo nyonso te. Na nzela ya lisekwa, Nzambe akozongisa na bomoi bato oyo bakufá.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

  • Nzambe alaki ete ekozala na ntango moko oyo “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Mpo na ntango yango, Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko”; moto moko te akozala lisusu na nsɔmɔ ya liwa.​—Nzembo 37:29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto