CreativeDesignArt/DigitalVision Vectors via Getty Images
BÓSƐNZƐLAKA!
Bato ya loposo nyonso bazali mpenza ndenge moko?—Biblia elobi nini?
Mpo na bato mingi, kosalela bato ya loposo nyonso makambo ndenge moko ezali ndɔtɔ mpamba.
“Koyina bato mosusu mpo na loposo na bango ezali kokoba kobɛbisa bibongiseli minene ya mokili mpe bomoi ya bato. Ezali likambo oyo ekabolaka bato mingi na mokili.”—António Guterres, secrétaire général des Nations unies.
Mokolo mosusu bato ya loposo nyonso bakozala ndenge moko? Biblia elobi nini?
Ndenge oyo Nzambe atalelaka bokeseni ya loposo
Biblia eyebisi biso ndenge Nzambe atalelaka bato ya loposo ndenge na ndenge.
“Na nzela ya moto moko [Nzambe] abimisi bikólo nyonso ya bato, mpo báfanda na etando mobimba ya mabele.”—Misala 17:26.
“Nzambe aponaka bilongi te, kasi andimaka moto nyonso oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya bosembo, ata soki azali na ekólo nini.”—Misala 10:34, 35.
Biblia emonisi ete bato nyonso bautá na libota kaka moko mpe ete Nzambe andimaka bato ya loposo nyonso.
Bato ya loposo nyonso bakokóma ndenge moko
Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali guvɛrnema ya likoló, nde ekosala ete bato ya loposo nyonso bákóma ndenge moko. Guvɛrnema yango ekoteya bato ndenge ya kosalela basusu makambo na ndenge oyo ebongi. Bato bakoyekola ndenge ya kolonga mposa nyonso oyo bakoki kozala na yango ya koyina basusu mpo na loposo na bango.
“Bato oyo bafandi na mabele bakoyekola bosembo.”—Yisaya 26:9.
“Boyengebene ya solo ekomema kimya, ɛɛ mbuma ya boyengebene ya solo ekomema kimya mpe libateli mpo na libela.”—Yisaya 32:17.
Lelo oyo, bamilio ya bato bazali koyekola na Biblia ndenge ya kosalela bato makambo na limemya mpe kopesa bato lokumu.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá na zulunalo Lamuká! lisolo oyo elobi, “Kokanisela baninga mabe ekosila?”
Tángá lisolo “Comment parler de racisme à votre enfant” mpo na koyeba ndenge baboti bakoki kolobela lisolo yango na bana na bango na ndako.