Babongoli mibale ya Biblia bazongisi nkombo ya Nzambe na Kondimana ya Sika
Libondeli ya liboso oyo bato mingi bayekolaka ezali Libondeli ya Nkolo, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye. Libondeli yango ezali na kati ya eteni ya Biblia oyo bato mingi babengaka Kondimana ya Sika. Ebandi na maloba oyo: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Nzokande, nkombo ya Nzambe, oyo ebongolami na Anglais na “Yehova” to ntango mosusu “Yahweh,” ezalaka mingi te na mabongoli ya Anglais ya Kondimana ya Sika. Nzokande, mabongoli yango ezali na bankombo ya banzambe ya lokuta, lokola Zeusi, Hermesi, mpe Artemisi. Na yango, esengeli mpe kozala na nkombo ya Nzambe ya solo oyo azali mpe Mobandisi ya Biblia, boye te? Misala 14:12; 19:35; 2 Timote 3:16.
Kondimana ya Sika etángi bankombo ya banzambe mingi ya lokuta, yango wana okanisi te ete esengeli mpe kotánga nkombo ya Nzambe ya solo?
Babongoli ya Biblia ya Anglais, Lancelot Shadwell mpe Frederick Parker, balobaki ete nkombo ya Nzambe esengeli kozongisama na eteni ya Biblia oyo bato mingi babengaka Kondimana ya Sika. Mpo na nini kosalela liloba “kozongisama”? Mpamba te bamonaki ete na ebandeli, nkombo ya Nzambe ezalaki na eteni yango ya Biblia, kasi na nsima, bato mosusu balongolaki yango. Mpo na nini bakanisaki bongo?
Shadwell mpe Parker bayebaki ete bamaniskri oyo mbala mingi babengaka Kondimana ya Kala, oyo ekomamaki mingimingi na ebandeli na Ebre, ezali na nkombo ya Nzambe mbala nkóto na nkóto. Na yango, bamitunaki ntina oyo bamaniskri ya Kondimana ya Sika oyo bazalaki na yango elongolaki nkombo ya Nzambe na mobimba na yango.a Lisusu, Shadwell amonaki ete wana bamaniskri ya Kondimana ya Sika esaleli maloba oyo bato mingi basalelaka na Kondimana ya Kala, na ndakisa “anzelu ya Yehova,” baoyo basalaki bakopi ya Kondimana ya Sika ya Grɛkɛ balongolaki nkombo ya Nzambe mpe na esika na yango batyaki maloba lokola Kyʹri·os, oyo elimboli “Nkolo.” 2 Bakonzi 1:3, 15; Misala 12:23.
Nkombo ya Nzambe na Ebre
Liboso ete Shadwell mpe Parker bábimisa mabongoli na bango, babongoli mosusu bazongisaki nkombo ya Nzambe na mabongoli na bango ya Anglais ya Kondimana ya Sika, kasi kaka na bisika moke mpenza.b Liboso ya 1863, ntango Parker abimisaki Kondimama ya Sika oyo babongolaki yango liloba na liloba, emonani ete ata mobongoli moko te ya Anglais azongisaki nkombo ya Nzambe na bisika mingi na Kondimana ya Sika. Lancelot Shadwell mpe Frederick Parker bazalaki banani?
Lancelot Shadwell
Lancelot Shadwell (1808-1861) azalaki avoka. Azalaki mwana ya Sir Lancelot Shadwell, moto ya lokumu na Angleterre. Lancelot Shadwell azalaki moto ya Lingomba ya Angleterre. Atako azalaki kondima Bosato, azalaki komemya nkombo ya Nzambe, abengaki yango “nkombo ya nkembo ya YEHOVA.” Na libongoli na ye, elingi koloba, Evanzile ya Matai mpe ya Marko, asalelaki nkombo ”Yehova” mbala 28 na lisolo mpe mbala 465 na banɔti.
Ekoki kozala ete Shadwell ayekolaki nkombo ya Nzambe mpo amonaki yango na Kondimana ya Kala na Ebre. Alobaki ete baoyo batyaki liloba Kyʹri·os na esika ya nkombo ya Nzambe na libongoli ya Grɛkɛ ya Kondimana ya Kala “bazalaki babongoli ya sembo te.”
Nsango malamu ndenge ekomamaki na Matai ebongolamaki na Anglais na banɔti, epai ya L. Shadwell (1859), oyo epesami na Bibliotɛkɛ ya Bodleian. Ezali na ndingisa ya CC BY-NC-SA 2.0 UK. Ebongwani: Makomami oyo emonisami polele
Matai 1:20 na Libongoli ya Shadwell
Na libongoli na ye, Shadwell asalelaki mpo na mbala ya liboso nkombo “Yehova” na Matai 1:20. Nɔti oyo atyaki mpo na vɛrsɛ yango elobi boye: “Liloba [Kyʹri·os] na vɛrsɛ oyo, mpe na bavɛrsɛ mosusu mingi na Kondimana ya Sika elimboli YEHOVA, nkombo mpenza ya Nzambe. Mpe ezali na ntina mingi kozongisa nkombo yango ya Nzambe na libongoli ya Anglais.” Alobaki mpe ete: “Ebongi kosala bongo mpo na kokumisa Nzambe. Nzambe amilakisaki na nkombo Yehova: mpe likambo ya malamu koleka ezali ya kosalela nkombo yango ntango tozali kolobela ye.” Na nsima alobaki boye: “Na libongoli ya King James Version oyo bapesi biso tosalela, nkombo ya YEHOVA ezalaka mingi te . . .Na esika oyo nkombo ya Nzambe ezalaki, batye nde Nkolo.” Shadwell alobaki ete: “Ebongi te kotya titre Nkolo . . .” na esika ya nkombo ya Nzambe, mpe abakisaki ete babengaka mpe ye “Nkolo” na mboka na ye.
“[Nzambe] amilakisaki na nkombo YEHOVA: mpe tokosala malamu koleka soki tozali kosalela nkombo yango ntango tozali kolobela ye.”—Lancelot Shadwell
Shadwell abimisaki libongoli na ye ya Matai na 1859 mpe libongoli na ye oyo esangisaki Matai ná Marko na 1861. Kasi na nsima, mosala na ye esukaki wana. Akufaki na mokolo ya 11/01/1861, wana azalaki na mbula 52. Atako bongo, milende na ye ezalaki mpamba te.
Frederick Parker
Libongoli ya Matai ya Shadwell ebendaki likebi ya moto moko ya mombongo ya Londres oyo azalaki na bozwi mingi. Nkombo na ye ezali Frederick Parker (1804-1888). Azwaki mokano ya kobongola Kondimana ya Sika ntango azalaki na mbula soki 20. Na bokeseni na Shadwell, Parker aboyaki liteya ya Bosato. Akomaki boye: “[Tiká] ete Lingomba mobimba ya Mwana [ya Nzambe] oyo alingaka mingi . . . endima solo na motema mobimba . . . mpe esambela Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso se moko.” Parker amonaki mpe ete bamaniskri ya Kondimana ya Sika oyo esalelaka liloba Kyʹri·os mpo na Nkolo Nzambe mpe Nkolo Yesu esalaki ete ekóma mpasi kokesenisa bango mibale. Na yango, asepelaki komona ete na bisika mosusu, Shadwell abongolaki liloba Kyʹri·os na “Yehova.”
Nini esalisaki Parker akanga ntina ya makambo ndenge wana? Ayekolaki monɔkɔ ya Grɛki mpe akomaki babuku mpe batrakte mingi oyo elobelaki gramɛrɛ ya Grɛki. Akómaki mpe mosangani ya Eteyelo ya Biblia na Angleterre oyo ebengami Anglo-Biblical Institute. Eteyelo yango ezalaki kolendisa bato básala bolukiluki na bamaniskri ya Biblia na mokano ya kobimisa Babiblia ya Anglais ya malamu koleka. Na 1842, Parker abandaki kobimisa libongoli na ye ya liboso ya Kondimana ya Sika na biteni mpe na babuku ebele.c
Libongoli ya Kondimana ya Sika ya Parker (Heinfetter)
Milende ya Parker mpo na kozongisa Nkombo ya Nzambe
Na boumeli ya mwa bambula, Parker akomaki makambo mpo na mituna lokola: “Ntango nini Kyʹri·os emonisaka Nkolo Yesu, mpe ntango nini emonisaka Nkolo Nzambe?” “Mpo na nini Kyʹri·os esalelamaka mingi na gramɛrɛ lokola nkombo kasi lokola titre te?”
Ntango Parker amonaki libongoli ya Matai oyo Shadwell akomaki na 1859 na maloba na yango mpo na Kyʹri·os, yango endimisaki ye ete na bisika mosusu, Kyʹri·os “esengeli kobongolama na Yehova.” Na yango, abongisaki lisusu libongoli na ye ya Kondimana ya Sika na mobimba mpo na kokɔtisa nkombo “Yehova” na bisika nyonso oyo amonaki ete makambo oyo ezali na kati to gramɛrɛ ya makomi ya Grɛki esɛngi yango. Na yango, mokanda ya Parker ya volimi moko ya 1863 A Literal Translation of the New Testament ezali na nkombo ya Nzambe mbala 187. Emonani ete, yango ezali libongoli ya liboso na Anglais oyo esalelaki nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo na mobimba.d
Lokasa ya motó ya likambo ya libongoli ya Parker ya 1864 ya Kondimana ya Sika
Na 1864, Parker abimisaki mpe mokanda moko oyo esangisaki mabongoli ya Kondimana ya Sika mpe Libongoli oyo bapesaki bato nzela básalela (A Collation of an English Version of the New Testament [...] With the Authorized English Version). Mokano ya kosangisa mikanda yango mibale na volimi kaka moko ezalaki mpo na komonisa esika mpe ndenge oyo libongoli na ye ekesenaki na mabongoli mosusu.e
Mpo na komonisa ntina ya kozongisa nkombo ya Nzambe, Parker alakisaki bavɛrsɛ mingi na King James Version, na ndakisa Baroma 10:13, oyo elobi: “Mpo ete moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Nkolo akobika.” Parker atunaki boye: “Moto moko te akoki kokanisa ndenge bavɛrsɛ yango oyo ezali na libongoli ya King James Version elobelaka nde Yehova, kasi te Mwana, Yesu Kristo Nkolo na biso.”
Baroma 10:13 na Biblia King James Version (na likoló) mpe libongoli ya Parker ya 1864
Parker abimisaki mbongo ebele mpo na kobimisa mpe kosala piblisite ya batrakte, babuku mpe mikanda na ye mosusu. Kutu, na mbula moko kaka, asalelaki mbongo (livre sterling) 800, oyo ekokani na balivre sterling koleka 100 000 ya Grande-Bretagne lelo oyo. (132 000$ ya États-Unis) Atindelaki bato oyo ayebaki mpe bakonzi minene ya mangomba bakopi ya mikanda na ye ya ofele mpo bátalela yango.
Bato mosusu ya mayele batyolaki makomi mpe mabongoli ya Kondimana ya Sika ya Parker, mpo enyatamaki na bakopi moke mpenza. Nzokande, kosala bongo emonisaki ete basepelaki te na milende oyo Parker, Shadwell mpe bato mosusu basalaki mpo na kozongisa nkombo ya Nzambe na Kondimana ya Sika ya Anglais.
Mbala mosusu okosepela mpe kotala video ya miniti zomi oyo ezali na bansango mingi: Expositions au musée de Warwick: “La Bible et le nom divin.”
a “Yah,” ebengeli ya mokuse ya nkombo “Yehova,” ezali na Emoniseli 19:1, 3, 4, 6. Ezali na kati ya liloba “Aleluya,” oyo elimboli “bósanzola Yah, bino bato.
b Shadwell abongolaki Kondimana ya Sika na mobimba te. Babongoli mosusu ezali Philip Doddridge, Edward Harwood, William Newcome, Edgar Taylor, mpe Gilbert Wakefiel.
c Mpo na kokesenisa mosala na ye ya mombongo mpe mosala na ye ya kobongola Biblia, Parker asalelaki nkombo mosusu Herman Heinfetter na mikanda na ye ya losambo mpe na mabongoli na ye ya Biblia. Nkombo yango ezali mbala mingi na baapɛndisi ya Biblia-Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu.
d Na 1864, Parker abimisaki buku An English Version of the New Testament oyo esaleli nkombo ya Nzambe mbala 186.
e Liboso ete Parker abimisa mabongoli na ye, mabongoli mingi ya Ebre ya Kondimana ya Sika etyaki nkombo ya Nzambe na bavɛrsɛ ndenge na ndenge. Lisusu, na 1795, Johann Jakob Stolz abimisaki libongoli moko ya Allemand oyo esaleli nkombo ya Nzambe mbala koleka 90 kobanda na Matai tii na Yuda.