Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 34
  • Terorisme ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Terorisme ekosila mokolo mosusu?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka terorisme?
  • Ntina oyo terorisme epalangani lelo oyo
  • Nsuka ya terorisme
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Bózala na kobanga te to na nsɔmɔ te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Makambo mosusu
mrt lisolo 34
Moto moko oyo abomaka mɔtɔ azali kosalisa bato oyo babiki nsima ya kopanzana ya ndako moko.

Terorisme ekosila mokolo mosusu?

Soki terorisme esalemi, okoki komituna boye: ‘Nzambe akipaka biso mpenza? Mpo na nini makambo ya boye ezali kosalema? Terorismea ekosila mokolo mosusu? Ndenge nini nakoki kolongola kobanga oyo nazali na yango?’ Biblia epesi biyano na mituna yango.

Ndenge nini Nzambe atalelaka terorisme?

Nzambe ayinaka mobulu mpe terorisme. (Nzembo 11:5; Masese 6:16, 17) Lisusu Yesu, momonisi ya Nzambe, apamelaki bayekoli na ye ntango balukaki kosala mobulu. (Matai 26:50-52) Atako bateroriste balobaka ete basalaka mobulu na nkombo ya Nzambe, Nzambe apesá bango ndingisa ya kosala makambo wana te. Kutu, ayokaka mabondeli na bango te.​—Yisaya 1:15.

Nzambe akipaka bato nyonso oyo bazali konyokwama, ezala mpe baoyo bakutani na makambo ya terorisme. (Nzembo 31:7; 1 Petro 5:7) Biblia emonisi ete Nzambe akosilisa mobulu nyonso.​—Yisaya 60:18.

Ntina oyo terorisme epalangani lelo oyo

Biblia emonisi biso ntina oyo terorisme ezali lelo oyo, elobi boye: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Na lisolo ya bomoi ya bato, bato mingi oyo bazalaka na bokonzi basalelaka bokonzi na bango mpo na konyokola basusu. Lokola bato yango banyokwamaka, yango wana basalelaka terorisme mpo na kozongisa mabe na mabe.​—Mosakoli 7:7.

Nsuka ya terorisme

Nzambe alaki ete akosilisa makambo oyo ebangisaka bato mpe mobulu, mpe akotya kimya awa na mabele. (Yisaya 32:18; Mika 4:3, 4) Akani:

  • Kolongola makambo oyo esalaka ete terorisme ezala. Nzambe akolongola baguvɛrnema ya bato mpe akotya Bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba. Yesu Mokonzi ya Bokonzi yango, akosalela bato makambo na bosembo, mpe akolongola makambo oyo esalaka ete bato banyokwama mpe mobulu. (Nzembo 72:2, 14) Na ntango yango, moto moko te akosala makambo ya terorisme. Bato “bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

  • Kolongola makambo nyonso oyo terorisme ebimisá. Nzambe akosilisa makambo nyonso ya mabe oyo terorisme ebimiselá bato, ezala na nzoto to mpe na makanisi. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Alaki kutu kosekwisa bakufi, kozongisa bango na bomoi na mokili moko ya kimya.​—Yoane 5:28, 29.

Biblia epesi biso bantina oyo esengeli kotinda biso tóndima ete Nzambe akokokisa makambo yango mosika te. Kasi, okoki komituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe asilisá terorisme te banda kala?’ Mpo na kozwa eyano, talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

a “Terorisme” emonisaka mbala mingi kosala to kosalela bato makambo ya mobulu, mingimingi bato oyo bazali basoda te mpo na kobangisa bango mpe kotinda bango básala mbongwana na makambo ya politiki, ya losambo mpe na makambo mosusu ya bomoi. Kasi, bato bakoki koboya kondima ete likambo moko oyo esalemaki ezali terorisme.

Biblia ezali kosalisa bato

Talá makambo mibale oyo Biblia esɛngi yo osala oyo ekoki kosalisa yo.

  • Bondelá Nzambe.​—Bafilipi 4:6, 7.

  • Tyá makanisi na bilaka oyo Biblia epesi biso.​—Baebre 6:19.

Mpo na kozwa batoli mosusu oyo Biblia epesi, talá lisolo “Makambo ya kosala mpo omitungisa te koleka ndelo.”

Batatoli ya Yehova oyo bakutanaki na makambo ya terorisme bazwaka libɔndisi epai ya bandeko na bango bakristo. Tózwa ndakisa mibale mpamba:

  • Bafololo etyami mpo na Ekaniseli na libándá ya eteyelo moko na Beslan, Russie.

    Natalya mpe mwana na ye ya mobali oyo azali na mbula 9, Aslan, bazalaki na eteyelo na engumba Beslan, na Russie, ntango bateroriste oyo bazalaki ba mindoki bakɔtaki na eteyelo na bango mpe bakangaki bato koleka 1 000. Likambo ya mawa, bankama ya bato bakufaki, mingi na bango ezalaki bana. Atako Natalya mpe Aslan babikaki, bakobaki kotungisama na makanisi. Talá makambo oyo esalisaki bango.

  • Pablo ná Sophie.

    Pablo mpe Sophie babungisaki mwana na bango ya mobali na liwa ntango bateroriste bakweisaki bandako mibale ya milai na engumba New York. Talá video oyo mpo omona nini esalisaki bango mpe bato mosusu oyo bakutanaki na makambo ya terorisme.

Biblia esalisaka bato bábongwana

Bato mingi basilikaka mpo na makambo ya kozanga bosembo mpe konyokola oyo ezali na mokili. Bakoki kokanisa ete mobulu mpe kobangisa ezali solisyo mpo na kosilisa mpasi na bango. Bato ya lolenge wana bakoki kobongwana? Ɛɛ. Mpo na koyeba ndenge oyo nsango ya Biblia esalisaki bato mosusu básala mbongwana, tángá lisolo “Jusqu’à quand?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto