MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini mpo nayokanaka malamu na molakisi na ngai?
Molakisi ya makambo makasimakasi
Bana kelasi mingi bakutanaka na balakisi oyo bamonanaka sembo te, to baoyo bazalaka makambo makasimakasi.
Luis oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Nazalaki na molakisi moko oyo azalaki koloba maloba mabe mpe azalaki kosalela bana kelasi makambo na limemya te. Ayebaki ete bakobengana ye te mpo etikalaki moke azwa pansiɔ”
Melanie, oyo azali na mbula 25, abosanaka te ndenge molakisi na ye azalaki kosalela ye makambo na bosembo te. Alobi boye: “Azalaki kosalela ngai makambo ndenge wana mpo nazalaki mondimi ya lingomba moko oyo eyebani mingi te. Ayebisaki ngai nasengelaki komesana bongo mpo yango nde makambo nakokutana na yango na bomoi.”
Soki ozali na molakisi ya ndenge wana, ezali na makambo oyo okoki kosala mpo osilisa kelasi malamu na boumeli ya mbula yango. Meká kosalela makanisi oyo elandi.
Batoli oyo ekosalisa yo
Yebá komesana. Balakisi nyonso bazalaka ndenge moko te. Luká koyeba makambo oyo molakisi na yo alingaka, mpe salá makasi osalela makambo yango.
Toli ya Biblia: “Moto ya bwanya ayokaka mpe azwaka mateya mingi.”—Masese 1:5.
“Nayaki komona ete esengelaki komesana na makambo oyo molakisi na ngai alingaka, mpe nasalaki oyo nakoki mpo makambo esalema kaka ndenge oyo ye azalaki kolinga. Yango esalaki ete tókóma na boyokani ya malamu na ye.”—Christopher.
Zalá na limemya. Salá makasi osololaka malamu na molakisi na yo. Kozongiselaka bango te maloba na kozanga limemya ata soki ozali na ntina ya kosala bongo. Kobosana te ete bátalelaka yo lokola mwana kelasi, kasi te lokola moninga na bango.
Toli ya Biblia: “Maloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.”—Bakolose 4:6.
“Mbala mingi balakisi bazwaka te limemya oyo babongi na yango epai ya bana kelasi, na yango milende oyo ozali kosala ya kopesa balakisi na yo lokumu, yango mpe ekotinda bango básalela yo makambo na lolenge ya malamu.”—Ciara.
Omityaka na esika ya balakisi na yo. Balakisi bazali mpe bato ya kozanga kokoka. Yango elakisi ete bango mpe bazalaka na mikakatano mpe mitungisi ndenge moko na bato nyonso. Na yango koloba mbala moko te ete, ‘molakisi na ngai azalaka makambo makasimakasi’ to ‘molakisi na ngai alingaka ngai te.’
Toli ya Biblia: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku.”—Yakobo 3:2, maloba na nse ya lokasa.
“Kozala molakisi ezali mosala ya pɛtɛɛ te. Soki ezalaki ngai nakokoka te kotángisa ebele ya bana bongo. Yango wana, nasalaka ntango nyonso makasi nazala na etamboli ya malamu epai ya molakisi mpo na kokómisa mokumba na ye pepele.”—Alexis.
Solola na baboti na yo. Baboti na yo bazali bato ya liboso mpo na kosalisa yo. Balingi ete olonga na kelasi, mpe batoli na bango ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala soki molakisi na yo azalaka makambo makasimakasi
Toli ya Biblia: “Makambo elongaka te soki toli ezali te.”—Masese 15:22.
“Baboti bayebi makambo mingi oyo bakoki kosala mpo na kosilisa mikakatano koleka bilenge. Koyoka batoli na bango ekosalisa yo oyeba makambo oyo okoki kosala mpo olonga.”—Olivia.
Ndenge ya kosolola na molakisi na yo
Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga ete osolola na molakisi na yo mpo na kozanga koyokana oyo ezali kati na bino mibale. Soki ozali kobanga kokutana na ye, komitungisa te, yango ezali mpo na kowelana te kasi mpo na kosolola. Kosala bongo ekoki kosala ete bóyokana malamu na molakisi na yo.
Toli ya Biblia: “Tosengeli kosala nyonso mpo na kotya kimya.”—Baroma 14:19.
“Soki molakisi na yo azali kosalela kaka yo makambo na boboto te, tuná ye soki osali likambo moko oyo epesaki ye nkanda. Eyano na ye ekosalisa yo oyeba esika oyo okoki kobongisa.”—Juliana.
“Ekozala malamu koyebisa molakisi na kimya nyonso mpe na esika na bino mibale kaka, ndenge oyo ozali komiyoka mpo na likambo yango. Elikya ezali ete akotalela yango na ndenge ya malamu mpe akosepela na ndenge osali yango.”—Benjamin.
LISOLO YA SOLO
“Nazalaki kozwa banote ya malamu te, mpe molakisi na ngai azalaki kosalisa ngai te. Azalaki kotya bomoi na ngai nkanka mpe nalingaki kokata kelasi.
“Nakendaki kosɛnga toli epai ya molakisi mosusu. Ayebisaki ngai ete ‘bino mibale boyebani malamu te. Osengeli koyebisa ye ete ezali na likambo moko ezali kotungisa yo. Nsukansuka, yo mpe okoki kosalisa bana kelasi mosusu oyo babangaka kosolola na ye.’
“Nalingaki mpenza kosala yango te. Kasi ntango nakanisaki na makambo oyo alobaki, namonaki ete alobaki solo. Soki nalingi makambo ebongwana, nasengelaki kosolola na molakisi na ngai.
“Na mokolo oyo elandaki, nakutanaki na molakisi na ngai mpe nayebisaki ye ete nalingaka mingi ndenge atángisaka mpe nazali na mposa ya kolandaka ye malamu ntango azali kotángisa. Kasi nazalaki kokakatana mpe nayebaki te nasala nini. Apesaki ngai makanisi mosusu, mpe andimaki kotángisa ngai nsima ya kelasi to na nzela ya e-mail.
“Nakamwaki makasi! Nsima ya mosolo na biso, ngai ná molakisi na ngai tokómaki na boyokani ya malamu, mpe bomoi na kelasi ekómaki lisusu pepele.”—Maria.
Toli: Soki ozali koyokana malamu te na molakisi na yo, talelá yango lokola formasyo oyo ekosalisa yo ntango okokóma mokóló. Katie, oyo azali na mbula 22 alobi: “Ata ntango okosilisa kelasi, na bomoi okokutana na bato oyo bazali na bokonzi mpe bakosalela yo makambo na boboto te. Soki olongi koyokana malamu na molakisi moko ya makambo makasimakasi, yango ekosalisa yo na bomoi ntango okobanda kokutana na bato oyo bazali makambo makasimakasi.”