Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwhf lisolo 22
  • Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi
  • Lisalisi mpo na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya koteya bana komonisa botɔndi
  • ‘Bópesaka matɔndi na makambo nyonso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Botɔndi
    Lamuká!—2016
  • Mpo na nini kopesaka mersi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Monisáká botɔndi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Makambo mosusu
Lisalisi mpo na libota
ijwhf lisolo 22
Mwana moko ya mwasi oyo azali na esengo azali kolakisa karte bakomá mersi.

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi

Bato ya mayele balobi ete bato oyo bazalaka na botɔndi bazalaka na esengo mingi mpe na santé ya malamu, bayebaka kobundisa mikakatano mpe kobatela baninga. Moto moko ya mayele na nkombo Robert Emmons amonisi ete kozala na botɔndi “ebatelaka moto na bizaleli mabe lokola likunya, kobomba nkanda na motema, lokoso mpe mayoki oyo ematisaka nkanda.”a

Matomba nini bana bakozwa soki bazali na botɔndi? Ankɛte oyo esalemi epai ya bilenge 700 na boumeli ya mbula minei, emonisi ete baoyo bazalaki na botɔndi bazalaki mpenza te na mposa ya koyiba biyano na ntango ya ekzamɛ na kelasi, komɛla drɔgɛ mpe masanga, to kokolisa bizaleli mabe.

  • Mwana oyo amonaka ete bapesaka ye nyonso akoki kokóma moto ya kozanga botɔndi. Bana mingi bakanisaka ete basalelaka bango makambo ya malamu mpo babongi na yango. Kasi ezalaka mpasi mpenza komonisa botɔndi soki tomoni ete lipamboli oyo tozwi ezali nde lifuti, kasi likabo te.

    Bato mingi lelo batalelaka makambo bongo. Mama moko na nkombo Katherine alobi boye: “Mokili oyo ezali koteya bato kozanga botɔndi. Bapiblisite elakisaka mingi kaka biloko nyonso oyo ‘ebongi’ na biso mpe elobaka ete tosengeli kozala bato ya liboso mpo na kozwa yango.”

  • Bana bakoki koyekola komonisa botɔndi ntango bazali naino mike. Mama moko na nkombo Kaye alobi: “Bana bandimaka báteya bango. Koteya bango bizaleli ya malamu ntango bazali naino mike, ezali lokola kotya mwa nzete moko mpo na kosalisa molona ekola semba.”

Ndenge ya koteya bana komonisa botɔndi

  • Teyá bana makambo ya koloba. Ata bana ya mike bakoki koyekola koloba mersi ntango moto apesi bango eloko to amoniseli bango boboto. Wana bazali kokola mpe kozwa mayele, bakokóma mokemoke kosepela lisusu mingi ntango basusu bakabeli bango eloko.

    Mama moko amemi mwana na ye oyo azali kozwa mwana-popi oyo bakabeli ye. Bango nyonso mibale basepeli mpe bapesi mersi.

    Toli ya Biblia: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

    “Nkɔkɔ na biso moko ya mbula misato alobaka ntango nyonso ‘mersi,’ mpe soki asɛngi eloko na nsuka alobaka ‘soki olingi.’ Ayekolá yango epai ya baboti na ye. Ndenge basalaka makambo mpe bapesanaka matɔndi ezali koteya ye amonisaka botɔndi.”​—Jeffrey.

  • Teyá bana makambo ya kosala. Mbala ya nsima oyo moto moko akabeli bango eloko, okoki kosɛnga bango bákomela ye mwa maloba ya kopesa mersi! Longola yango, soki ozali kopesa bana misala ya ndako, okosalisa bango báyeba ete esɛngaka milende mpo na kobongisa ndako.

    Baboti bazali koteya bana na bango kokoma maloba bakomá mersi.

    Toli ya Biblia: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

    “Bana na biso mibale ya bilenge basalisaka libota: bapesaka makanisi mpo na biloko oyo tokolya, bapesaka mabɔkɔ na kolamba mpe na misala ya ndako. Yango esalisaka bango báyeba milende oyo biso baboti tosalaka, mpe yango etindaka bango bámonisa botɔndi mpo na yango.”​—Beverly.

  • Teyá bana ezaleli oyo basengeli komonisa. Nzete oyo elonami na mabele ya malamu ekolaka malamu; moto amonisaka botɔndi soki azali na ezaleli ya komikitisa. Bato ya komikitisa bayebaka ete bazali na mposa basusu básalisa bango bálonga likambo nyonso oyo bazali kosala, mpe yango etindaka bango bápesa basusu matɔndi mpo na lisalisi na bango.

    Tata moko azali kolakisa bana na ye mibale ya mibali ndenge ya kobongisa velo.

    Toli ya Biblia: “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:3, 4.

    “Na bantango mosusu tosalaka lisano ya kopesa matɔndi ntango tozali kolya na mpokwa. Moto na moto na ngala na ye alobelaka likambo moko oyo asepeli na yango. Esalisaka biso nyonso tózala na makanisi ya malamu, mpe ya komonisa botɔndi na esika ya kozala na makanisi ya mabe to ya moimi.”​—Tamara.

Likanisi: Zalá ndakisa. Bana bakoyekola noki kozala na botɔndi soki bayokaka ndenge yo opesaka basusu, ata mpe bango, matɔndi mbala na mbala.

a Euti na buku Merci ! Quand la gratitude change nos vies.

Oyo baboti mosusu balobi

Jeffrey ná Karen.

“Ngai ná mwasi na ngai toteyaki bana na biso ndenge ya kokomela bato mikanda mpo na kopesa bango matɔndi. Momeseno yango esalisaka bana bábosana te ete esengelaki kaka te ete moto akabelaka bango to asalelaka bango makambo; ebongi kopesa ye matɔndi mpo na boboto na ye.”​—Jeffrey ná mwasi na ye, Karen.

Susan ná Christopher.

“Soki toteyi bana koloba ‘soki olingi’ mpe ‘mersi’ ntango kaka bakoki kosala yango, ekozala mpasi te kosalisa bango báyeba kozala na botɔndi, mpe ntango bakokóma mikóló bakozala bato oyo bapesaka basusu matɔndi.”​—Susan ná mobali na ye, Christopher.

Bozongeli: Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi

  • Teyá bana makambo ya koloba. Ata bana oyo bazali naino mike bakoki koyekola koloba mersi ntango moto amoniseli bango boboto.

  • Teyá bana makambo ya kosala. Lakisá bana ndenge ya kokomela moto oyo akabeli ye eloko mokanda mpo na kopesa ye mersi. Kosala misala ya ndako ekosalisa bango báyeba ete esɛngaka molende mpo na kobongisa ndako.

  • Teyá bana ezaleli oyo basengeli komonisa. Komikitisa ekosalisa bana na yo bámonaka ete soki balongi na likambo moko, ezali mpo basusu basalisi bango, mpe bakozala na botɔndi mpo na lisalisi oyo bapesi bango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto