Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwhf lisolo 13
  • Tyá mosala na esika na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyá mosala na esika na yango
  • Lisalisi mpo na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo osengeli koyeba
  • Makanisi mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala
  • Mituna ya kotalela
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela libala na yo?
    Lamuká!—2021
  • “Libala ekumisama”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Ndenge ya kotika baaparɛyi na esika na yango
    Lisalisi mpo na libota
  • Nasala nini mpo nalekisaka ntango mingi elongo na molongani na ngai?
    Lisalisi mpo na libota
Makambo mosusu
Lisalisi mpo na libota
ijwhf lisolo 13
Mobali oyo ná mwasi na ye bazali komɛla kafe na esika balambaka. Batye mosala mpe batelefone na bango mosika na bango.

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Tyá mosala na esika na yango

Na eleko oyo teknoloji ekómi kosalelama mingi, patrɔ na yo, baninga ya mosala, to bakiliya bakoki kosɛnga yo osalaka mikolo nyonso mpe ngonga nyonso. Yango esalaka ete ezala mpasi oyeba kokabola mosala na yo ná makambo mosusu ya bomoi, na ndakisa, libala na yo, mpe kotya na esika ya liboso makambo oyo eleki ntina na bomoi.

  • Oyo osengeli koyeba

  • Makanisi mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala

  • Oyo babalani mosusu balobi

  • Mituna ya kotalela

Oyo osengeli koyeba

  • Teknoloji ekoki kosala ete olekisa na mosala ntango oyo osengeli kolekisa elongo na molongani na yo. Na yango, ntango nyonso babengi yo na telefone mpo na mosala, batindeli yo e-mail, to mesaje okozala ntango nyonso na mposa ya koyanola.

    “Bomoi ezangi mindɔndɔ, kozonga na ndako nsima ya ngonga ya mosala mpe kolekisa ntango elongo na bato ya libota ekómi sikoyo mpasi, mpamba te ntango babengi yo na telefone mpe ozali kozwa bamesaje ya mosala, makanisi na yo ekokende mingimingi na mosala na esika ya molongani na yo.”​—Jeanette.

  • Mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala mpe bomoi ya libota, osengeli kobongisa makambo liboso. Soki ozali na programɛ te, mosala na yo ekoki kozwa ntango oyo osengeli kolekisa elongo na molongani na yo.

    “Mbala mingi, okoki kobosana molongani na yo mpe kokanisa boye: ‘Oh, ayebi oyo nazali kosala. Akolimbisa ngai. Nakolekisa ntango elongo na ye ata nsima.’”​—Holly.

Makanisi mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala

  • Tyá libala na yo na esika ya liboso. Biblia elobi: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:6) Soki okotika te bato ‘bákabola’ yo ná molongani na yo, mpo na nini okotika ete mosala ekabola bino?

    “Bakiliya mosusu bakanisaka ete lokola bafutaka yo, bakoki kosalela yo ntango nyonso oyo bazali na bosɛnga na yo. Koyeba ete nasengeli kotya libala na ngai na esika ya liboso, nayebisaka bango ete nakoki te kosala mosala na ntango oyo nazali te na mosala, kasi nakobenga bango nsima.”​—Mark.

    Omituna boye: ‘Makambo oyo nasalaka emonisaka ete nazwaka libala na ngai na ntina mingi koleka mosala?’

  • Boyáká kosala mosala mosusu soki esengeli. Biblia elobi: “Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Masese 11:2) Bopɔlɔ ekosalisa yo ozala na bwanya ya koboya kosala mosala mosusu to kotikela yango moto mosusu.

    “Nabongisaka batiyo ya mai, yango wana soki moto moko azali na mposa nasalisa ye na lombangu, amitungisaka makasi. Soki nakoki te kosala yango na ntango oyo ye alingi, nayebisaka ye aluka moto mosusu.”​—Christopher.

    Omituna boye: ‘Naboyaka kosala mosala mosusu nsima ya ngonga ya mosala soki kondima yango ekosala ete molongani na ngai amiyoka ete asundolami? Molongani na ngai akoloba nini soki nandimi yango?’

  • Bósala programɛ elongo. Biblia elobi: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.” (Mosakoli 3:1) Soki omoni ete ozali na makambo mingi ya kosala na mosala, na ntango wana, bosengeli kobongisa programɛ elongo na molongani na yo mpe na nsima bosengeli kotosa programɛ yango.

    “Mbala mingi ntango tozalaka na makambo mingi ya kosala, totyaka ntango moko ya kolekisa elongo, ata soki ezali kaka kolya elongo to kotambola na libongo, yango esalaka ete tólekisa ntango elongo.”​—Deborah.

    Omituna boye: ‘Nabongisá ntango moko boye oyo natyaka likebi na ngai nyonso epai ya molongani na ngai? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

  • Kangáká baaparɛyi na yo. Biblia elobi: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Okoki kokanga baaparɛyi na yo na ntango moko boye mpo makanisi na yo eyengayenga te na telefone to bamesaje ya mosala oyo bazali kotindela yo?

    “Nasalaka makasi nasala te mosala na ntango oyo natyá mpo na makambo mosusu. Na ntango yango, nasalaka ete namona te bamesaje oyo ezali kokɔta na telefone na ngai.”​—Jeremy.

    Omituna boye: ‘Namiyokaka ete nasengeli kotika telefone ya kofungwama kaka mpo patrɔ to bakiliya bakozala na mposa na ngai? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

  • Kozala makambo makasimakasi te. Biblia elobi: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Na bantango mosusu, mosala ekoki kozwa ntango oyo bosengeli kolekisa elongo na molongani na yo. Na ndakisa, mbala mosusu na kotalela lolenge ya mosala oyo molongani na yo azali na yango ekoki kosɛnga ete azala na mosala to asololaka nsima ya ngonga ya mosala. Kosɛnga molongani na yo te makambo oyo akoki kosala te.

    “Mobali na ngai azalaka moto ya mombongo, mpe mbala mingi esɛngaka nsima ya bangonga asalaka makambo mosusu na lombangu. Na bantango mosusu, etungisaka ngai, kasi lokola tolekisaka ntango mingi elongo, namonaka yango mabe te.”​—Beverly.

    Omituna boye: ‘Namonisaka molongani na ngai ete nayebi ete azali na mosala mingi mpe nakoki te kosɛnga ye makambo oyo akoki te kosala? Eyano nini molongani na ngai akopesa?’

Pole ya mwinda.

Likanisi: Kobosana te ete kozala na bokatikati na oyo etali mosala ezali likambo oyo esengeli kotalela yango mbala na mbala. Bósalela Mituna ya kotalela oyo ezali na lisolo oyo mpo na komona esika nini yo ná molongani na yo bokoki kobongisa lisusu mpo bózala na bokatikati na oyo etali mosala.

Oyo babalani mosusu balobi

Joseph ná Hannah.

“Tosepelaka kosalela maloba ‘kotungisa te’ na baaparɛyi na biso mpo tómona te bamesaje oyo ekoki kolongola likebi na biso ntango tozali kolya elongo. Ngonga oyo totyá mpo na kolekisa na libota, tosengeli kozwa yango na valɛrɛ.”​—Joseph, elongo na mwasi na ye, Hannah.

Kara ná Daniel.

“Kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ esalisi biso mpenza. Soki ozali kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ, ekozala mpasi te kokoba kozala na bokatikati, mpo okozala na makambo mingi te oyo ekolongola yo likebi.”​—Kara, elongo na mobali na ye, Daniel.

Mituna ya kotalela

Ya liboso, mokomoko na bino akoki kotalela mituna oyo ye moko. Na nsima, bólobela biyano na bino elongo.

  • Mbala mingi molongani na yo amilelaka mpo okobaka kosala mosala tii na ndako? Soki bongo, ondimi yango?

  • Na makambo nini ya sikisiki omoni ete okoki kobongola mpo ozala na bokatikati na oyo etali mosala?

  • Esí ekómelá yo okanisa ete molongani na yo azali te kotya mosala na esika na yango? Soki bongo, makambo nini emonisi yango?

  • Soki mbongwana ezali, oyo wapi okosepela molongani na yo asala mpo atya mosala na esika na yango?

Bozongeli: Tyá mosala na esika na yango

  • Tyá libala na yo na esika ya liboso. Kotika te mosala ebebisa boyokani na bino.

  • Boyáká kosala mosala mosusu soki esengeli. Na bantango mosusu, ekoki kozala bwanya koboya kosala mosala mosusu to kotikela yango moto mosusu.

  • Bósala programɛ elongo. Mingimingi soki ozali na mosala mingi, kotika te yango esala ete obosana molongani na yo.

  • Kangáká baaparɛyi na yo. Na bantango mosusu, kangáká baaparɛyi na yo mpo makanisi na yo eyengayenga te na telefone to bamesaje ya mosala oyo bazali kotindela yo.

  • Kozala makambo makasimakasi te. Mpo na kozala na bokatikati na oyo etali mosala, esɛngaka kotalela makambo mbala na mbala mpe kobongola yango. Kosɛnga molongani na yo te makambo oyo akoki kosala te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto