Etanda ya makambo ezali na kati
15/03/2015
© 2015 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
NIMERO YA BOYEKOLI
4-10/05/2015
LOKASA 3 • NZEMBO: 65, 64
11-17/05/2015
LOKASA 9 • NZEMBO: 108, 24
18-24/05/2015
Zwá liteya na ndakisa ya batalanta
LOKASA 17 • NZEMBO: 101, 116
25-31/05/2015
Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo
LOKASA 24 • NZEMBO: 107, 63
MASOLO YA BOYEKOLI
▪ “Omonaki malamu kosala bongo”
▪ Okokoba ‘kosɛnzɛla’?
Na lisolo ya liboso, tokolobela ndenge Yehova atambwisaki basaleli na ye mpo bákanga ntina ya mateya mozindo ya Biblia na lolenge moko ya pɛtɛɛ mpe polele na boumeli ya bambula. Na lisolo ya mibale, tokolobela ndakisa ya bangɔndɔ zomi mpe tokomona ndenge ekoki kosalisa biso tókoba kosɛnzɛla lelo oyo.
▪ Zwá liteya na ndakisa ya batalanta
▪ Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo
Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye elembo ya ntango ya nsuka, ayebisaki bango ndakisa mibale. Moko na yango ezali ndakisa ya batalanta, mpe mosusu ezali ndakisa ya bampate ná bantaba. Tokoyeba mpo na nini Yesu apesaki bandakisa yango mpe ntina na yango mpo na biso.
EZIPELI: Baturiste mingi bakendeke esika engumba ya kala Copán ezalaki, mpo na kotala ndenge Amerika ebebaki na ntango ya kala liboso Christophe Colombe aya. Kasi Batatoli ya Yehova kuna, bazali kosalisa bato bátya makanisi na bango na mikolo ezali koya
HONDURAS
MOTÁNGO YA BATO
8 111 000
BASAKOLI
22 098
BABONGISI-NZELA YA SANZA NA SANZA
3 471
Na Honduras, Espagnol ezali monɔkɔ oyo esalelamaka na misala ya Leta mpe oyo bana batángelaka na yango kelasi. Kasi basakoli 365 ya masangá 12 basalelaka monɔkɔ ya Garifuna. Ezali mpe na masangá 11 mpe bituluku 3 oyo esalelaka elobeli ya jɛstɛ ya Honduras