Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 24-lok. 27 par. 1
  • Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • “Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”
    Lamuká!—2016
  • “Unis grâce à l’enseignement divin”​—Mwa ndakisa ya bomoko ya solosolo kati na bandeko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 24-lok. 27 par. 1
Elilingi na lokasa 24

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene

NA MOKOLO ya pɔsɔ, mwa 05/10/2013, bato 257 294 na mikili 21 bayanganaki na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ya mbala ya 129; bato mosusu bazalaki esika likita yango esalemaki, bamosusu balandaki yango mbala moko na nzela ya video. Bandeko mosusu balandaki likita yango na video mwa bangonga na nsima. Bato nyonso oyo balandaki programɛ yango bazalaki 1 413 676 na mikili 31​—Ezalaki mpenza liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo eleki monene.

Kobanda na bambula ya 1920, Batatoli ya Yehova basalaka ete bato ya mokili mobimba bálanda badiskur ya mayangani minene na nzela ya telefone to ya radio. Lelo, Internet ezali kosalisa ata bato ya mikili ya mosika mpenza báyoka mpe bámona makambo mbala moko ntango ezali kosalema to mwa bangonga na nsima.

Bandeko ya Babetele ebele basalaki mosala koleka mbula mobimba liboso mpo na kobongisa makambo mpo likita yango eleka na nzela ya Internet. Na mokolo ya likita yango, bandeko oyo basalaka na makambo ya Internet bazalaki kolandela makambo nyonso longwa na Brooklyn, (New York) mpe ndeko moko azalaki wana ntango nyonso mpo likita yango ezalaki koleka na bisika 15 oyo ezalaki na ngonga ekeseni.

Mitángo: Bisika balandaki na Internet

  • Esika esalemaki: Ndako ya mayangani ya Batatoli ya Yehova ya New Jersey, États-Unis Bayangani: 4 732

  • Bato balekaki ebele na Perth, na Australie Bayangani: 7 186

  • Mosika na nɔrdi Fairbanks, Alaska, États-Unis Bayangani: 255

  • Mosika na sudi Invercargill, Nouvelle-Zélande Bayangani: 190

  • Esika eleki mosika: Perth, na Australie, kilomɛtrɛ soki 18 700 longwa na Jersey City

Ndenge balekisaka makambo na Internet

  1. Bakamera ebele ezwaka bilili.

  2. Bilili ekɔtaka na aparɛyi moko mpo ekóma video mpe baponaka video ya malamu koleka.

  3. Na nsima, batindaka video yango na ordinatɛrɛ moko ya monene.

  4. Basalaka bavideo ya kotya na telefone, na tablɛti, to na ordinatɛrɛ.

  5. Bakabolaka video yango na biteni ya segɔnde 10.

  6. Batyaka biteni yango na Internet na nzela ya ordinatɛrɛ oyo babengi serveur.

  7. Na esika mokomoko, aparɛyi moko ezwaka biteni ya video yango na Internet na nzela ya serveur mpe ebombaka yango na esika ya malamu. Na nsima, aparɛyi yango esangisaka biteni yango mpo ekóma video mobimba.

  8. Bayangani bakoki kotala mpe kolanda likita.

Etanda na nkasa 26, 27
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto