Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 124-lok. 127 par. 2
  • Bonsomi ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bonsomi ya kosakola
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Babomi Trujillo
  • Mosala ya kosakola ekei liboso
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 124-lok. 127 par. 2
Elilingi na lokasa 124

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bonsomi ya kosakola

Babomi Trujillo

Na 1960, bato ya mokili mobimba bazalaki se koloba mabe mpo na boyangeli mabe ya Trujillo mpe bana-mboka bakómaki kotɛmɛla ye. Na kati ya yikiyiki wana ya politiki, ndeko Milton Henschel oyo autaki na biro monene, ayaki na République dominicaine mpe akɔtaki liyangani ya mikolo misato na sanza ya yambo na 1961. Na diskur ya bato nyonso, bayangani bazalaki 957, mpe bato 27 bazwaki batisimo. Ndeko Henschel asalisaki bandeko ya République dominicaine bázongela kotambwisa mosala mpe kokabola teritware.

Etanda na lokasa 124

Bakɛngɛli ya zongazonga mibale, ndeko Enrique Glass ná ndeko Julián López, bazwaki mokumba ya kokende kotala masangá. Ndeko Julián alobaki boye: “Ngai nasengelaki kotala masangá mibale na ɛsti mpe masangá nyonso ya nɔrdi. Ndeko Enrique azalaki kotala masangá mosusu wana ya ɛsti mpe masangá nyonso ya sudi.” Bavizite yango esalisaki bandeko bázongela lisusu kosolola na biro mpe elendisaki bango na elimo.

Elilingi na lokasa 127

Salvino ná Helen Ferrari bazali kokende na République dominicaine, na 1961

Ndeko Salvino Ferrari ná mwasi na ye Helen oyo bakɔtaki kelasi ya mbala ya mibale ya Gileade, bakómaki na 1961. Lokola bazalaki liboso bamisionɛrɛ na Cuba, yango esalisaki bango mingi na mosala monene ya kobuka mbuma ya elimo na République dominicaine. Na nsima, ndeko Salvino akómaki kosala na Komite ya filiale tii liwa na ye na 1997, mpe Helen asali mosala ya ntango nyonso mbula 79, mingimingi na mosala ya misionɛrɛ.

Mwa moke nsima ya kokóma ya ndeko Ferrari ná mwasi na ye, boyangeli mabe ya Trujillo esukaki na ndenge ya nsɔmɔ na butu ya mokolo ya 30/05/1961; babɛtaki ye masasi na motuka na ye. Kasi, kobomama ya Trujillo ebongisaki makambo ya politiki te, na yango bomoi ya bato mpe makambo ya politiki na ekólo yango ezalaki yikiyiki bambula ebele.

Mosala ya kosakola ekei liboso

Na ntango yango, bamisionɛrɛ mosusu bayaki. William Dingman oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya liboso ya Gileade ná mwasi na ye Estelle, elongo na Thelma Critz mpe Flossie Coroneos balongwaki na Betele ya Porto Rico mpe batindaki bango na République dominicaine mikolo mibale mpamba nsima ya kobomama ya Trujillo. William alobi boye: “Mboka yango ezalaki na yikiyiki makasi ntango tokómaki, mpe basoda bazalaki bisika nyonso. Lokola bazalaki kobanga ete bato bakotomboka, basoda bazalaki kotɛlɛmisa moto nyonso na balabala monene. Bazalaki kotɛlɛmisa biso na bisika mingi, mpe bazalaki kofungola bavalizi na biso mokomoko. Bazalaki kobimisa eloko nyonso, ata biloko ya mikemike.” Ezalaki pɛtɛɛ te kosakola na mboka oyo makambo ya politiki ezali yikiyiki.

Elilingi na lokasa 127

Thelma Critz, mpe Estelle ná William Dingman bazali kaka na République dominicaine nsima ya kosala mbula 67 na mosala ya misionɛrɛ

William abakisaki ete: “Na boyangeli mabe ya Trujillo, bayebisaki bato ete Batatoli ya Yehova bazali Bakoministe mpe bazali bato oyo baleki mabe. . . . Kasi, mokemoke, tolongaki kolongola makanisi wana ya mabe na mitó ya bato.” Mosala ebotaki mbuma, mpo ebele ya bato ya mitema sembo bazalaki kondima nsango ya Bokonzi. Na nsuka ya mobu ya mosala ya 1961, babongisi-nzela monene bazalaki 33 na ekólo yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto