LISOLO YA BOYEKOLI 27
LOYEMBO 73 Pesá biso mpiko
Zalá na mpiko lokola Zadoke
“Zadoke, elenge mobali moko oyo azalaki elombe mpe mobali ya mpiko.”—1 NT. 12:28.
NA MOKUSE
Ndenge oyo ndakisa ya Zadoke ekoki kosalisa biso tózala na mpiko.
1-2. Zadoke azalaki nani? (1 Ntango 12:22, 26-28)
MOKOLO moko, mibali koleka 340000 bayanganaki mpo na kotya Davidi mokonzi na Yisraele mobimba. Na boumeli ya mikolo misato, mibali yango bazalaki na mwa bangomba ya mabanga pene na Hebrone. Bazalaki kobɛta masolo na esengo, koyemba banzembo ya masanzoli, mpe kosepela. (1 Nt. 12:39) Elenge mobali moko na nkombo Zadoke azalaki na kati ya ebele ya bato yango, kasi na ntembe te bato mingi bamonaki ye te. Kasi, Yehova amonaki ye mpe alingaki tóyeba ete Zadoke azalaki wana. (Tángá 1 Ntango 12:22, 26-28.) Zadoke azalaki nani?
2 Zadoke azalaki nganga-nzambe oyo asalaki elongo na Nganga-nzambe monene Abiatare. Zadoke azalaki mpe momoni-makambo; azalaki na likoki ya kososola mokano ya Nzambe mpe azalaki na mayele mingi mpenza. (2 Sa. 15:27) Bato bazalaki kokende epai ya Zadoke mpo na kotuna toli ya bwanya. Zadoke azalaki mpe mobali ya mpiko. Na lisolo oyo, tokolobela mingi nde mpiko na ye.
3. (a) Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kozala na mpiko? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?
3 Na mikolo oyo ya nsuka, Satana azali se kobundisa makasi basaleli ya Nzambe. (1 Pe. 5:8) Tosengeli kozala na mpiko wana tozali kozela Yehova abebisa Satana mpe mokili na ye ya mabe. (Nz. 31:24) Tótala ndenge misato oyo tokoki komekola mpiko ya Zadoke.
PESÁ BOKONZI YA NZAMBE MABƆKƆ
4. Mpo na nini esɛngaka basaleli ya Yehova bázala na mpiko mpo na kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ? (Talá mpe elilingi.)
4 Lokola tozali basaleli ya Yehova, topesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na motema mobimba, kasi mbala mingi esɛngaka mpiko mpo na kosala yango. (Mat. 6:33) Na ndakisa, na mokili oyo mabe, tosengeli kozala na mpiko mpo na kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na biso mpe mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (1 Tes. 2:2) Mpe mbala mingi, esɛngaka mpiko mpo na koboya kokɔta na makambo ya politiki oyo ezali se kokabola mokili. (Yoa. 18:36) Basaleli mingi ya Yehova bakutani na makambo lokola kozanga mbongo, minyoko, to mpe bakɔtisaki bango na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki to kosala mosala ya soda.
Ntango basusu baponi ngámbo moko na makambo ya politiki, yo okosala nini? (Talá paragrafe 4)
5. Mpo na nini esɛngaki ete Zadoke azala na mpiko mpo na kopesa Davidi mabɔkɔ?
5 Zadoke akendaki na Hebrone kaka te mpo na kosepela ndenge Davidi akómaki mokonzi. Akendaki kuna na bibundeli mpe azalaki pene mpo na kobunda. (1 Nt. 12:38) Amibongisaki mpo na kolanda Davidi na etumba mpe kobundisa banguna ya Yisraele. Ekoki kozala ete Zadoke azalaki na mayele mingi te ya etumba, kasi azalaki na mpiko mingi.
6. Na ndenge nini Davidi azalaki ndakisa malamu mpo na Zadoke na oyo etali kozala na mpiko? (Nzembo 138:3)
6 Ndenge nini Zadoke, moto oyo azalaki nganga-nzambe, akómaki na mpiko mingi boye? Ayebaki mibali ebele oyo bazalaki na makasi mpe na mpiko. Na ntembe te alandaki ndakisa na bango. Na ndakisa, ndenge Davidi azalaki “kokamba Yisraele na bitumba” na mpiko nyonso etindaki Bayisraele nyonso bápesa ye mabɔkɔ na motema moko. (1 Nt. 11:1, 2) Davidi azalaki ntango nyonso kotyela Yehova motema mpo asalisa ye abundisa banguna na ye. (Nz. 28:7; tángá Nzembo 138:3.) Zadoke azalaki na bandakisa mosusu pene na ye, lokola Yehoyada ná mwana na ye Benaya, oyo azalaki elombe ya etumba, mpe bankumu mosusu 22 ya libota ya tata na ye, oyo bamityaki na ngámbo ya Davidi. (1 Nt. 11:22-25; 12:26-28) Mibali yango nyonso bazwaki ekateli makasi ya kopesa bokonzi ya Davidi mabɔkɔ.
7. (a) Bandakisa nini ya mikolo na biso tokoki kotalela mpo na kozwa mpiko? (b) Ndenge emonisami na video, ndakisa ya ndeko Nsilu eteyi yo nini?
7 Tokozwa makasi mpe mpiko soki totaleli bandakisa ya baoyo bamonisaki mpiko mpo na kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ. Mokonzi na biso Yesu Kristo atɛmɛlaki mbamba ya kokɔta na makambo ya politiki ya mokili ya Satana. (Mat. 4:8-11; Yoa. 6:14, 15) Yesu azalaki ntango nyonso kotyela Yehova motema mpo na kozwa makasi ya kosala oyo ezali sembo. Tozali mpe na bandakisa ebele ya mikolo na biso ya bilenge mibali oyo bamonisaki mpiko mpe baboyaki kokɔta na mosala ya soda to kosala makambo oyo eyokani na politiki. Okoki kotala masolo na bango mosusu na jw.org!a
SALISÁKÁ BANDEKO
8. Ntango nini ekoki kosɛnga bankulutu bámonisa mpiko mpo na kosalisa bandeko na ndenge oyo ebongi?
8 Basaleli ya Yehova balingaka kosalisana. (2 Ko. 8:4) Kasi na bantango mosusu, esɛngaka mpiko mpo na kosala yango. Na ndakisa, na ntango ya etumba, bankulutu bamonaka ete esengeli kolendisa bandeko, kopesa bango lisungi, mpe mbala mosusu komemela bango bilei ya elimo to ya mosuni. Lokola bankulutu balingaka bampate, batyaka bomoi na bango na likama mpo na kosalisa bandeko na ndenge oyo esengeli. (Yoa. 15:12, 13) Ntango basalaka bongo, balandaka ndakisa ya mpiko ya Zadoke.
9. Ndenge emonisami na 2 Samwele 15:27-29, Davidi asɛngaki Zadoke asala nini? (Talá mpe elilingi.)
9 Talá ndenge Zadoke asalisaki basusu na ntango ya likama. Bomoi ya Davidi ezalaki na likama mpo mwana na ye Abisalome azwaki ekateli ya kobɔtɔla ye bokonzi. (2 Sa. 15:12, 13) Davidi asengelaki kolongwa nokinoki na Yerusaleme! Apesaki basaleli na ye mitindo oyo: “Bótɛlɛma mpe tókima, mpo moto moko te akobika na mabɔkɔ ya Abisalome!” (2 Sa. 15:14) Ntango basaleli na ye bazalaki kokende, Davidi amonaki ete esengeli moto moko atikala kuna mpo akoba koyebisa bango makambo oyo Abisalome azalaki kokana kosala. Na yango, asɛngaki Zadoke ná banganga-nzambe mosusu bázonga na Yerusaleme mpo bázala lokola banɔngi. (Tángá 2 Samwele 15:27-29.) Basengelaki kozala ekɛngɛ mpenza. Likambo oyo Davidi ayebisaki banganga-nzambe yango básala ezalaki likama mpenza, mpe bakokaki kutu koboma bango. Kanisá oyo elingaki kokómela bango soki Abisalome, moto ya moimi, ya nkanda, mpe oyo azalaki kobɔtɔla bokonzi, ayebaka ete Zadoke ná banganga-nzambe mosusu bazalaki kolandela makambo na ye mpo na kobatela Davidi!
Likambo oyo Davidi asɛngaki Zadoke asala ezalaki likama (Talá paragrafe 9)
10. Ndenge nini Zadoke ná bato mosusu babatelaki Davidi?
10 Davidi asɛngaki mpe lisalisi ya Zadoke ná Hushai, oyo azalaki moninga mosusu ya sembo ya Davidi. (2 Sa. 15:32-37) Davidi asɛngaki Hushai amikómisa moninga ya motema ya Abisalome mpe apesa ye mayele mosusu ya etumba, oyo ekopesa Davidi ntango ya komibongisa mpo na etumba. Na nsima, Hushai ayebisaki Zadoke ná Abiatare ete Abisalome andimaki kosalela mayele yango. (2 Sa. 17:8-16) Mibali yango mibale bakendaki kopesa Davidi nsango yango. (2 Sa. 17:17) Na lisalisi ya Yehova, Zadoke ná banganga-nzambe mosusu basalisaki mingi mpo na kobatela bomoi ya Davidi.—2 Sa. 17:21, 22.
11. Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Zadoke ntango tozali kosalisa bandeko?
11 Soki basɛngi biso tósalisa bandeko ntango bomoi na bango ezali na likama, ndenge nini tokoki komonisa mpiko lokola Zadoke? (1) Landá malako. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka na ntina mingi kotosa mpo tóbatela bomoko. Tosá malako oyo euti na Betele. (Ebr. 13:17) Bankulutu basengeli mbala na mbala kozongelaka bibongiseli oyo lisangá ezwá na oyo etali komibongisa na makama, mpe malako ya ebongiseli ya Yehova mpo na ndenge ya kosala na ntango ya likama. (1 Ko. 14:33, 40) (2) Zalá na mpiko kasi mpe ekɛngɛ. (Mas. 22:3) Salelá bososoli. Komitya na likama ezangá ntina te. (3) Tyelá Yehova motema. Kobosana te ete Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na bolamu na yo moko mpe ya bandeko. Akoki kosunga yo osalisa bandeko kozanga omitya na likama.
12-13. Ndakisa ya Viktor ná Vitalii eteyi yo nini? (Talá mpe elilingi.)
12 Tózwa ndakisa ya Viktor ná Vitalii, bankulutu mibale oyo bazalaki kokende kotikela bandeko ya Ukraine bilei ná mai. Viktor alobi boye: “Tozalaki koluka biloko ya kolya bisika nyonso. Mbala mingi masasi ezalaki kobɛta zingazinga na biso. Ndeko moko apesaki bilei oyo ezalaki na magasin na ye. Likabo yango esalisaki bandeko mingi bázwa bilei oyo basengelaki na yango mpo na mwa ntango. Wana tozalaki komatisa biloko na motuka na biso, bɔmbi moko ekweaki na mɛtrɛ soki 20 na esika tozalaki. Mokolo wana mobimba, nazalaki kobondela Yehova apesa ngai mpiko oyo esengeli mpo nakoba kosalisa bandeko.”
13 Vitalii alobi boye: “Ezalaki kosɛnga mpiko mingi. Mobembo ya liboso oyo nasalaki ezwaki ngonga 12. Nazalaki kobondela Yehova nzelanzela.” Vitalii azalaki na mpiko, kasi azalaki mpe ekɛngɛ. Abakisi boye: “Nazalaki se kosɛnga Yehova apesa ngai bwanya mpe asalisa ngai nazala na bopɔlɔ. Natambwisaki motuka kaka na babalabala oyo bakonzi bapesaki ndingisa. Kondima na ngai ekómaki makasi ntango namonaki ndenge bandeko basi mpe bandeko mibali bazalaki kosala elongo. Balongolaki biloko oyo ekangaki nzela, basangisaki biloko ya kopesa lisungi mpe batyaki yango na motuka, na nsima bapesaki biso biloko ya kolya mpe bisika ya kopema na nzela.”
Na ntango ya makama, zalá na mpiko kasi mpe ekɛngɛ ntango ozali kosalisa bandeko (Talá paragrafe 12-13)
TIKALÁ SEMBO EPAI YA YEHOVA
14. Tokoki komiyoka ndenge nini ntango moto oyo tolingaka azali lisusu sembo te epai ya Yehova?
14 Moko ya makambo oyo elɛmbisaka mpenza nzoto ezali ntango moto moko ya libota to moninga moko ya motema atiki Yehova. (Nz. 78:40; Mas. 24:10) Soki tozalaki kolinga moto yango mingi, ezalaka mpe mpasi mingi tóyika mpiko ntango azali lisusu sembo te. Soki okutaná na likambo yango, ndakisa ya bosembo ya Zadoke ekoki kopesa yo makasi.
15. Mpo na nini Zadoke asengelaki na mpiko mpo atikala sembo epai ya Yehova? (1 Bakonzi 1:5-8)
15 Zadoke atikalaki sembo epai ya Yehova ntango moninga na ye ya motema azangaki bosembo. Likambo yango esalemaki na nsuka ya boyangeli ya Davidi. Ntango Davidi akómaki mobange mpe pene ya kokufa, mwana na ye Adoniya alukaki kozwa kiti ya bokonzi, nzokande Yehova alakaki ete Salomo nde akozwa yango. (1 Nt. 22:9, 10) Abiatare aponaki kopesa Adoniya mabɔkɔ. (Tángá 1 Bakonzi 1:5-8.) Na ndenge yango, Abiatare azangaki bosembo kaka epai ya Davidi te, kasi mpe epai ya Yehova! Kanisá mpasi mpe mawa oyo Zadoke ayokaki! Na boumeli ya mbula soki 40, ye ná Abiatare basalaki elongo lokola banganganzambe. (2 Sa. 8:17) Babatelaki “Sanduku ya Nzambe ya solo” elongo. (2 Sa. 15:29) Liboso, Zadoke ná Abiatare bapesaki bokonzi ya Davidi mabɔkɔ, mpe basalaki makambo mosusu mingi na mosala ya Yehova.—2 Sa. 19:11-14.
16. Ekoki kozala nini esalisaki Zadoke atikala sembo?
16 Zadoke atikalaki sembo epai ya Yehova atako Abiatare aponaki kosundola Davidi. Davidi azalaki kotya motema ntango nyonso na bosembo ya Zadoke. Ntango mayele mabe ya Adoniya eyebanaki, Davidi abengaki Zadoke, Natane, mpe Benaya bátya Salomo mafuta mpo azala mokonzi. (1 Bak. 1:32-34) Na ntembe te kozala elongo na basaleli ya Yehova ya sembo lokola Natane mpe bato mosusu oyo bapesaki Mokonzi Davidi mabɔkɔ, epesaki Zadoke makasi mpe elendisaki ye. (1 Bak. 1:38, 39) Ntango Salomo akómaki mokonzi, “apesaki nganga-nzambe Zadoke mosala oyo Abiatare azalaki kosala.”—1 Bak. 2:35.
17. Ndenge nini okoki komekola Zadoke soki moto oyo olingaka azali lisusu sembo te epai ya Yehova?
17 Ndenge nini tokoki komekola Zadoke? Soki moto moko oyo olingaka aponi kotika Yehova, yo monisá polele ete otikali sembo. (Yos. 24:15) Yehova akopesa yo makasi mpe mpiko oyo osengeli na yango. Bondeláká ye mpe zalá ntango nyonso moninga ya baoyo bazali sembo epai ya Yehova. Yehova asepelaka mingi na bosembo na yo, mpe akopesa yo mbano mpo na yango.—2 Sa. 22:26.
18. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Marco ná Sidse?
18 Tózwa ndakisa ya Marco ná mwasi na ye Sidse, oyo bana na bango mibale ya basi batiká solo. Marco alobi boye: “Baboti balingaka bana na bango mingi ntango kaka babotami. Tosalaka nyonso mpo na kobatela bango. Na yango, ntango baponi kotika Yehova, epesaka motema mpasi mingi.” Abakisi boye: “Kasi Yehova atikaki biso te. Mbala mingi, soki ngai nalɛmbi, okomona mwasi na ngai azali na makasi, mpe ntango ye nde alɛmbi, okomona ngai nazali na makasi.” Sidse abakisi boye: “Tolingaki kokoka te koyika mpiko soki Yehova apesaki biso te makasi oyo tosengelaki na yango. Nazalaki komitungisa mingi mpo namonaki ete ezalaki foti na ngai, mpe nayebisaki Yehova ndenge oyo nazalaki komiyoka. Nsima ya mwa ntango moke, ndeko mwasi moko oyo namonaki ye te elekaki bambula mingi ayaki epai na ngai, asimbaki ngai na mapeka, atalaki ngai na miso, mpe alobaki na ngai: ‘Kobosana te Sidse, ezali foti na yo te!’ Na lisalisi ya Yehova, nalongaki kobatela esengo na ngai mpe kokoba kosalela ye.”
19. Ozwi ekateli ya kosala nini?
19 Yehova alingi ete basaleli na ye nyonso bázala na mpiko lokola Zadoke. (2 Tim. 1:7) Kasi, alingi te tómityela motema. Alingi nde tótyela ye motema mpo na kozwa makasi. Na yango, ntango okutani na likambo oyo esɛngi ozala na mpiko, bondelá Yehova. Okoki kotya motema ete akosalisa yo ozala na mpiko kaka lokola Zadoke!—1 Pe. 5:10.
LOYEMBO 126 Kɛngɛláká, tɛlɛmá ngwi, zalá makasi
a Talá na jw.org video Bakristo ya solo basengeli kozala na mpiko—Mpo bákɔta na makambo ya mokili te.