Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Décembre nk. 2-7
  • Mokanda ya Yobo ekoki kosalisa yo ntango ozali na mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Yobo ekoki kosalisa yo ntango ozali na mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NZAMBE ATIKI ETE YOBO AMONA MPASI
  • NDENGE OYO LISOLO YA YOBO EKOKI KOSALISA BISO TÓYIKA MPIKO
  • SALELÁ MOKANDA YA YOBO MPO NA KOSALISA BASUSU
  • Yobo akumisaki nkombo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Tyelá Yehova elikya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yobo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Décembre nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 48

LOYEMBO 129 Tokoyika mpiko tii na nsuka

Mokanda ya Yobo ekoki kosalisa yo ntango ozali na mpasi

“Ya solo, Nzambe asalaka makambo na motema mabe te.”—YOBO 34:12.

NA MOKUSE

Tokolobela makambo oyo mokanda ya Yobo ekoki koteya biso mpo na ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe ndenge oyo tokoki koyika mpiko ntango tozali na mpasi.

1-2. Wapi mwa bantina oyo ebongi tótánga mokanda ya Yobo?

OTÁNGAKI mokanda ya Yobo mikolo eleki? Atako mokanda yango ekomamá kala mpenza, eleki sikoyo mbula soki 3500, mbala mingi batángaka yango na molɔngɔ ya babuku oyo ekomamá malamu mpenza. Lokola maloba ya mokanda ya Yobo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina mpe elobeli na yango ezali kitoko, buku moko elobaki ete mokomi na yango “azali mpenza na mayele ya kokoma.” Moize nde akomaki mokanda yango oyo ekamwisaka bato, kasi makambo oyo akomaki eutaki nde epai ya Yehova Nzambe.—2 Tim. 3:16.

2 Mokanda ya Yobo ezali mokanda ya ntina mingi na Biblia. Mpo na nini? Ya liboso, emonisi polele ntembe monene oyo etali bikelamu nyonso ya mayele: kosantisama ya nkombo ya Yehova. Ya mibale, eteyaka biso bizaleli malamu ya Yehova, lokola bolingo, bwanya, bosembo, mpe nguya na ye. Na ndakisa, mokanda ya Yobo elobeli Yehova lokola “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” mbala 31, koleka mikanda mosusu nyonso ya Biblia ata soki basangisi yango. Ya misato, mokanda ya Yobo epesi biyano na mituna mingi oyo etali bomoi, ata mpe motuna oyo ebulunganisaka bato mingi: Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

3. Makambo nini tokoki koyekola na mokanda ya Yobo?

3 Kaka ndenge tomonaka biloko ndenge na ndenge soki tozali likoló ya ngomba, mokanda ya Yobo esalisaka biso tótalela mikakatano ya bomoi lokola tozali likoló na yango, elingi koloba ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Tólobela ndenge oyo mokanda ya Yobo ekoki kosalisa biso ntango tozali na mpasi. Tokoyekola ndenge oyo mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki Bayisraele mpe ndenge oyo ekoki kosalisa biso lelo oyo. Na nsima, tokolobela ndenge oyo tokoki kosalela lisolo yango mpo na kosalisa basusu.

NZAMBE ATIKI ETE YOBO AMONA MPASI

4. Bokeseni nini ezalaki kati na Yobo mpe Bayisraele oyo bazalaki na Ezipito?

4 Na eleko oyo Bayisraele bazalaki baombo na Ezipito, mobali moko na nkombo Yobo azalaki kofanda na engumba Uze, oyo mbala mosusu ezalaki na ɛsti ya Mokili ya Ndaka, esika moko boye na nɔrdi ya Arabia. Na bokeseni makasi na Bayisraele oyo bakómaki kosambela bikeko na Ezipito, Yobo azalaki kosalela Yehova na bosembo. (Yos. 24:14; Ezk. 20:8) Yehova alobaki mpo na Yobo ete: “Na mabele moto moko lokola ye azali te.”a (Yobo 1:8) Yobo azalaki na bozwi mingi mpe azalaki moto oyo bazalaki komemya koleka moto mosusu nyonso na Ɛsti. (Yobo 1:3) Na ntembe te, Satana azalaki na nkanda makasi komona ete mobali yango ya lokumu mpe oyo basusu bazalaki komemya mingi asalelaka Yehova na bosembo!

5. Mpo na nini Yehova atikaki ete Yobo amona mpasi? (Yobo 1:​20-22; 2:​9, 10)

5 Satana alobaki ete soki Yobo akómi komona mpasi, akotika kosambela Yehova. (Yobo 1:​7-11; 2:​2-5) Yehova alingaki Yobo mingi, kasi lokola lokuta oyo Satana alobaki ebimisaki bantembe ya ntina mingi, Yehova atikaki ete Satana ameka komonisa soki makambo oyo alobaki ezalaki solo. (Yobo 1:​12-19; 2:​6-8) Satana abebisaki bitonga ya bampate mpe ya bangɔmbɛ ya Yobo, abomaki bana na ye zomi, mpe abwakelaki ye maladi ya babibɔ oyo enyokolaka mpenza banda na motó tii na misapi ya makolo. Kasi bampasi wana nyonso elongaki te kobebisa bosembo ya Yobo. (Tángá Yobo 1:​20-22; 2:​9, 10.) Na nsima, Yehova abikisaki Yobo, azongiselaki ye bozwi mpe lokumu na ye, mpe apesaki ye bana mosusu 10. Lisusu, abakiselaki ye mbula 140 ya bomoi; na yango Yobo amonaki molɔngɔ ya mabota minei ya bana ya bana na ye. (Yobo 42:​10-13, 16) Ndenge nini mbala mosusu lisolo yango esalisaki bato ya Nzambe na ntango ya kala, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso lelo?

6. Ndenge nini lisolo ya Yobo ekokaki kosalisa Bayisraele? (Talá mpe elilingi.)

6 Ndenge nini mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki Bayisraele? Bomoi ya Bayisraele na Ezipito ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, Yosua ná Kalebe balekisaki bolenge na bango nyonso na boombo. Na nsima, atako bango basalaki libunga te, balekisaki mbula 40 na esobe. Soki Bayisraele bayebaki lisolo ya komekama ya Yobo mpe ndenge bomoi na ye esukaki, boye esalisaki bango, mpe mabota ya Bayisraele oyo eyaki nsima na bango báyeba soki nani mpenza nde abimiselaka bato bampasi. Bakokaki mpe kokanga malamu ntina oyo Nzambe atiki ete bampasi ezala mpe ndenge azwaka bosembo mpe boyengebene ya bato na motuya mingi.

Moyisraele moko azali kokanisa wana azali komema babriki na Ezipito. Pembeni wana, Baezipito bazali kobɛta Bayisraele mosusu oyo bazali kosala mosala.

Nsukansuka Bayisraele, oyo balekisaki ntango molai ya boombo na Ezipito, bakokaki kozwa matomba na lisolo ya Yobo (Talá paragrafe 6)


7-8. Ndenge nini mokanda ya Yobo ekoki kosalisa baoyo bazali komona mpasi? Pesá ndakisa.

7 Ndenge oyo ekoki kosalisa biso. Likambo ya mawa, bato mingi lelo oyo bandimelaka lisusu Nzambe te mpo bazali koyeba te ntina oyo makambo ya mabe ezali kokómela bato malamu. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi Hazelb oyo afandaka na Rwanda. Ntango azalaki elenge, azalaki kondimela Nzambe. Kasi na nsima makambo mingi ya mabe ekómelaki ye. Baboti na ye babomaki libala, mama na ye azwaki mobali mosusu mpe mobali yango azalaki konyokola Hazel. Na nsima, mobali moko asangisaki na ye nzoto na makasi. Ntango Hazel azalaki kokende na ndako-nzambe na bango mpo na kozwa libɔndisi, azwaki yango te. Na nsima, akomelaki Nzambe mokanda. Akomaki boye: “Nzambe, nazalaki kobondela yo mpe kosala makasi ya kosala makambo ya malamu, kasi ofuti ngai makambo ya mabe. Nazali sikoyo kotika yo, mpe nakosala nyonso oyo namoni ete ekopesa ngai esengo.” Ya solo, toyokaka mawa mpenza mpo na bato lokola Hazel, oyo bayoká makambo ya lokuta mpe bakómá kondima ete Nzambe nde abimiselaka bango bampasi!

8 Nzokande, toyekoli na mokanda ya Yobo ete bampasi eutaka epai ya Nzambe te, kasi epai ya Satana nde! Toyekoli mpe ete tosengeli te kokanisa ete baoyo bazali kokutana na bampasi bazali kobuka oyo balonaki. Biblia elobi ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela moto nyonso mpe ntango nyonso. (Mos. 9:11; Yobo 4:​1, 8) Toyekoli mpe ete ntango tozali koyika mpiko na bosembo nyonso, Yehova azwaka eyano ya kopesa Satana, moto oyo atumolaka ye. Yango esalisaka na kolongisa lokumu ya Yehova. (Yobo 2:3; Mas. 27:11) Tozali na botɔndi mingi mpo na makambo oyo toyekoli na mokanda ya Yobo; esalisaka biso tóyeba ntina oyo biso mpe bato oyo tolingaka tomonaka mpasi. Tózongela Hazel; ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova mpe akangaki ntina ete bampasi na ye eutaki epai ya Nzambe te. Alobaki boye: “Nabondelaki lisusu Nzambe na motema mobimba. Nayebisaki Yehova ete ntango nalobaki ete nazali kotika yo, nazalaki mpenza na mposa ya kosala yango te. Tókende tózonga, nayebaki ye mpenza te. Sikoyo namoni ete Yehova alingaka ngai. Sikoyo nazali mpenza na esengo.” Tozali na botɔndi mingi ndenge tokangi ntina oyo Nzambe atiki ete bampasi ezala! Tótalela sikoyo ndenge lisolo ya Yobo ekoki kosalisa biso ntango tokutani na bampasi.

NDENGE OYO LISOLO YA YOBO EKOKI KOSALISA BISO TÓYIKA MPIKO

9. Yobo azalaki kosala nini ntango afandaki na putulu ya mɔtɔ? (Yakobo 5:11)

9 Meká kokanisa Yobo afandi kaka ye moko na putulu ya mɔtɔ, nzoto etondi na babibɔ mpe amigumbi mpo mpasi eleki. Loposo na ye oyo eyindaki mpo na maladi, ekómaki kolongwa mpe akɔndaki mpenza. Lokola asilaki makasi, emonanaki lokola ete mosala na ye kaka komikwanza na mwa biteni ya mbɛki mpe komilela ete azangi elikya. Kasi Yobo andimaki mpasi kaka boye te, azalaki koyika mpiko. (Tángá Yakobo 5:11.) Nini esalisaki ye ayika mpiko?

10. Boyokani ya ndenge nini Yobo azalaki na yango na Yehova? Limbolá.

10 Yobo ayebisaki Yehova ndenge oyo azalaki komiyoka. (Yobo 10:​1, 2; 16:20) Na ndakisa, mokapo 3 elobi ete Yobo amilelaki makasi mpo na makama oyo ekómelaki ye, mpe akanisaki ete Yehova nde abimisaki yango. Na nsima, ntango abendanaki mbala na mbala na baninga na ye misato, Yobo alukaki mpenza kolongisa bosembo na ye, mpe mbala mingi azalaki koloba na Yehova. Maloba ya Yobo emonisi ete na ntango moko boye amimonaki sembo koleka Nzambe. (Yobo 10:​1-3; 32:​1, 2; 35:​1, 2) Kasi, andimaki ete makambo mosusu oyo alobaki mpo na kolongisa bosembo na ye ezalaki “bilobaloba mpamba.” (Yobo 6:​3, 26) Na nsima, na mokapo 31, Yobo alobaki ete alingi Nzambe ayanola ye mpe aloba ete asali mabe te. (Yobo 31:35) Kasi esengelaki te ete Yobo asɛnga Nzambe na makasi ete ayebisa ye ntina oyo azalaki komona mpasi.

11. Yehova asalaki nini lokola Yobo azalaki koluka komonisa bosembo na ye?

11 Soki totali malamu, tokoki komona ete nyonso oyo Yobo alobaki emonisaki ete akangami mpenza na Yehova mpe azali na elikya makasi ete na lolenge moko boye Nzambe akomona bosembo na ye. Nsukansuka ntango Yehova ayanolaki Yobo na kati ya mopɛpɛ makasi, alobaki polele te ntina oyo Yobo azalaki komona mpasi. Apamelaki mpe Yobo te ndenge amilelaki to ndenge alobaki ete asalaki likambo ya mabe te. Kasi, ndenge tata ya malamu asalaka, Yehova ateyaki Yobo mpo akóma na makanisi ya malamu. Mpe yango ezalaki lolenge eleki malamu ya kosalisa Yobo. Na yango na komikitisa nyonso, Yobo andimaki ete ayebaki makambo moke kaka mpe asɛngaki bolimbisi mpo alobaki kozanga kokanisa. (Yobo 31:6; 40:​4, 5; 42:​1-6) Ndenge nini lisolo yango ekokaki kosalisa bato ya Nzambe na ntango ya kala, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso lelo oyo?

12. Ndenge nini mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki Bayisraele?

12 Ndenge oyo mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki Bayisraele. Bayisraele bakokaki kozwa mateya na likambo oyo ekómelaki Yobo. Tótalela ndakisa ya Moize. Ntango azalaki mokambi ya ekólo Yisraele, ayikaki mpiko na makambo mingi ya mpasi, Bayisraele bazalaki kotosa Yehova te, mpe yango ezalaki kolɛmbisa Moize nzoto. Bayisraele mosusu bazalaki batomboki mpe mbala mingi bazalaki koimaima mpo na Yehova, kasi Moize azalaki kosolola na Yehova mpe koyebisa ye mitungisi na ye. (Kob. 16:​6-8; Mit. 11:​10-14; 14:​1-4, 11; 16:​41, 49; 17:5) Moize asengelaki mpe koyika mpiko ntango Yehova asembolaki ye. Na ndakisa, ntango Bayisraele batyaki kaa na Kadeshe, mbala mosusu na mbula ya 40 ya koyengayenga na bango na esobe, Moize alobaki “maloba oyo akanaki te na mbɛbu na ye” mpe apesaki nkombo ya Yehova lokumu te. (Nz. 106:​32, 33) Na yango, Yehova alobaki ete Moize akokɔta te na Mokili ya Ndaka. (Mib. 32:​50-52) Na ntembe te disiplini yango epesaki Moize mpasi; kasi andimaki yango na komikitisa nyonso. Mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki mabota ya Bayisraele oyo eyaki na nsima eyika mpiko na mikakatano oyo bakutanaki na yango. Soki bamanyolaki lisolo yango, baoyo bazalaki sembo bakokaki koyekola ndenge ya koyebisa Yehova mayoki na bango mpe koboya komilongisa liboso ya Yehova. Bakokaki mpe koyekola kondima disiplini na komikitisa nyonso.

13. Ndenge nini lisolo ya Yobo ekoki kosalisa biso? (Baebre 10:36)

13 Ndenge oyo ekoki kosalisa biso. Biso bakristo mpe tosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko. (Tángá Baebre 10:36.) Na ndakisa, basusu kati na biso bazali kobɛla na nzoto to na makanisi, basusu bazali na mikakatano na libota, babungisi moto oyo balingaki, to bazali na mikakatano mosusu ya makasi. Mpe na bantango mosusu, maloba to misala ya basusu ekoki kobakisela biso lisusu mpasi. (Mas. 12:18) Kasi, mokanda ya Yobo ezali koteya biso ete tokoki koyebisa Yehova mayoki na biso ya kati mpenza na elikya ete akoyoka biso. (1 Yoa. 5:14) Yehova akopamela biso te soki tozali koyebisa ye makambo oyo ezali na motema na biso, ata soki na bantango mosusu emonani lokola “bilobaloba mpamba,” ndenge ekómelaki Yobo. Kasi, Nzambe akopesa biso makasi mpe bwanya oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. (2 Nt. 16:9; Yak. 1:5) Akoki mpe kosembola biso soki esengeli, ndenge asalaki epai ya Yobo. Mokanda ya Yobo ezali mpe koteya biso ndenge ya koyika mpiko ntango bapesi biso toli to disiplini oyo euti na Liloba ya Yehova, na ebongiseli na Ye, to epai ya bandeko oyo bakɔmɛli na elimo. (Ebr. 12:​5-7) Mpe kaka ndenge Yobo asalaki malamu ndenge andimaki disiplini na komikitisa nyonso, biso mpe tokozwa matomba soki tondimi kosembolama. (2 Ko. 13:11) Wana ezali mateya ya malamu mpenza na mokanda ya Yobo! Sikoyo tótala ndenge oyo tokoki kosalela lisolo ya Yobo mpo na kosalisa basusu.

SALELÁ MOKANDA YA YOBO MPO NA KOSALISA BASUSU

14. Tokoki koloba nini na mosala ya kosakola soki moto atuni biso ntina oyo bampasi ezali?

14 Na mosala ya kosakola, osilá kokutana na moto oyo atunaki yo mpo na nini bampasi ezali na mokili? Eyano nini opesaki ye? Mbala mosusu olobelaki makambo oyo Biblia elobi ete esalemaki na elanga ya Edene. Ekoki kozala ete olobaki liboso ete Satana, ekelamu moko mabe ya elimo, ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso lokuta oyo ememaki bango na kotombokela Nzambe. (Eba. 3:​1-6) Na nsima, mbala mosusu olobaki ete lokola Adama ná Eva batombokelaki Nzambe, yango wana mokili etondi na bampasi mpe liwa. (Rom. 5:12) Na nsuka, mbala mosusu omonisaki ye ete Nzambe atiki ntango oyo ekoki mpo na kobimisa lokuta ya Satana mpe nsango malamu ete na mikolo ezali koya bato bakokóma lisusu bato ya kokoka esakolama. (Em. 21:​3, 4) Yango ezali ndenge malamu ya kopesa eyano na motuna yango, mpe ekoki kosalisa bato báyeba ntina oyo bampasi ezali.

15. Ndenge nini tokoki kosalela mokanda ya Yobo mpo na kosalisa moto oyo atuni mpo na nini bampasi ezali na mokili? (Talá mpe bililingi.)

15 Tótala makanisi mosusu oyo euti na mokanda ya Yobo, oyo okoki kosepela kosalela mpo na kolimbwela bato ntina oyo bampasi ezali. Okoki naino kopesa moto yango longonya ndenge atuni motuna yango ya ntina mingi. Na nsima, lobá ete Yobo, moto moko ya sembo oyo amonaki mpasi mingi, atunaki mpe ntina oyo azalaki konyokwama. Akanisaki kutu ete Nzambe nde abimiselaki ye mpasi yango. (Yobo 7:​17-21) Mbala mosusu moto yango akokamwa ete banda kala bato bamitunaka soki bampasi na biso eutá wapi. Na nsima, okoki kolimbwela ye na mayele mpenza ete ezalaki Satana nde abimiselaki Yobo mpasi kasi Nzambe te. Zabolo asalaki yango mpo na komeka komonisa ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na kozwa matomba. Okoki kobakisa ete atako Nzambe te nde abimiselaki Yobo bampasi, apesaki nzela ete ekómela ye; na ndenge yango amonisaki ete atyelaka bato ya sembo motema ete bakomonisa ete Satana azali mobuki-lokuta. Na nsuka, okoki koloba ete na nsima Nzambe apambolaki Yobo mpo atikalaki sembo. Na bongo, tokoki kobɔndisa basusu soki tomonisi bango ete bampasi eutaka epai ya Yehova te.

Bililingi: 1. Mwasi moko oyo abiki na likama ya mɔtɔ azali kotala fɔtɔ. 2. Na nsima, mwasi yango atɛlɛmi esika bandeko batandi mikanda pene na esika oyo basalisaka bato oyo bazwi likama; azali koyoka ndenge ndeko mwasi azali kotánga vɛrsɛ.

Ndenge nini okoki kosalela mokanda ya Yobo mpo na komonisa basusu ete “Nzambe asalaka makambo na motema mabe te”? (Talá paragrafe 15)


16. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge mokanda ya Yobo ekoki kosalisa moto oyo azali komona mpasi.

16 Tótala ndenge mokanda ya Yobo esalisaki Mario. Mokolo moko na 2021, ndeko mwasi moko azalaki kopesa litatoli na nzela ya telefone. Moto ya liboso oyo abengaki ezalaki mobali moko na nkombo Mario; atángelaki ye vɛrsɛ moko ya Biblia mpe ayebisaki ye ete Nzambe ayokaka mabondeli na biso, mpe apesi biso elikya ya bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Ntango atunaki Mario soki akanisi nini, Mario ayebisaki ye ete ntango telefone elelaki, azalaki kokoma mokanda oyo akotika mpo alingaki komiboma. Alobaki: “Nandimelaka Nzambe, kasi na ntɔngɔ oyo nazalaki komituna soki asundolá ngai.” Na mbala ya mibale oyo ndeko wana abengaki, basololaki likambo etali mpasi ya Yobo. Mario azwaki ekateli ya kotánga mokanda mobimba ya Yobo. Na yango, ndeko mwasi atindelaki ye lien ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika. Yango ebimisaki matomba nini? Mario andimaki koyekola Biblia mpe azalaki na mposa makasi ya koyekola makambo mosusu mingi oyo etali Nzambe ya bolingo oyo atyelaki ye likebi.

17. Mpo na nini ozali na botɔndi epai ya Yehova ndenge atyaki mokanda ya Yobo na kati ya Liloba na Ye mosantu? (Yobo 34:12)

17 Ezali polele ete Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya ya kosalisa bato, ata baoyo bazali komona mpasi. (Ebr. 4:12) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova akomisaki lisolo ya Yobo na Liloba na Ye! (Yobo 19:​23, 24) Mokanda ya Yobo endimisaka biso ete “ya solo, Nzambe asalaka makambo na motema mabe te.” (Tángá Yobo 34:12.) Eteyaka biso mpe ntina oyo Nzambe atiki ete bampasi ezala mpe ndenge tokoki koyikela yango mpiko. Mpe esalisaka biso tóbɔndisa baoyo bazali komona mpasi. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge mokanda ya Yobo ekoki kosalisa biso tózala na bososoli, na ndakisa mpo na ndenge ya kopesa toli ya malamu.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini ezali malamu ndenge toyebi ntina oyo Nzambe atikaki ete Yobo amona mpasi?

  • Ndenge nini lisolo ya Yobo esalisaka biso tóyika mpiko?

  • Ndenge nini tokoki kosalela mokanda ya Yobo mpo na kosalisa basusu?

LOYEMBO 156 Na Kondima . . .

a Emonani ete Yobo azalaki na bomoi na eleko oyo ezali kati na liwa ya Yozefe moto ya sembo (1657 L.T.B.) mpe ntango oyo Moize akómaki mokambi ya Yisraele (s. 1514 L.T.B.). Ekoki kozala ete masolo ya Yehova ná Satana mpe mpasi oyo Yobo akutanaki na yango esalemaki na eleko yango.

b Topesi bango bankombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto