Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Octobre nk. 6-11
  • Yehova azali ‘esengo na biso mpenza’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali ‘esengo na biso mpenza’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EPAI ESENGO YA SOLOSOLO EUTAKA
  • KOTIKA ELOKO TE EYIBA ESENGO NA YO
  • Esengo—Ezaleli oyo eutaka epai ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ndenge ya kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Kopesa ememaka esengo mingi koleka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Octobre nk. 6-11

LISOLO YA BOYEKOLI 40

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

Yehova azali ‘esengo na biso mpenza’

“ Nakoya . . . epai ya Nzambe, oyo azali esengo na ngai mpenza.”—NZ. 43:4.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekosalisa biso tómona makambo oyo ekoki koyiba esengo na biso mpe oyo tokoki kosala mpo na kozongela esengo na biso.

1-2. (a) Bato mingi bazali komiyoka ndenge nini lelo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

BATO mingi lelo oyo bazali kosala nyonso mpo bázala na esengo. Kasi, bazali kozwa esengo ya solosolo te. Bato mingi bazali koyoka kaka ete bazangi eloko moko mpe bazali mawamawa. Basaleli ya Yehova mpe bakoki komiyoka ndenge wana. Lokola tozali na “mikolo ya nsuka,” toyebaka ete tokokutana na makambo mpe mayoki “ya mpasi mpenza.”—2 Tim. 3:1.

2 Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo ekoki koyiba esengo na biso, mpe oyo tokoki kosala mpo na kozongela esengo na biso soki tobungisaki yango. Kasi liboso, tosengeli koyeba naino soki esengo ya solosolo eutaka wapi.

EPAI ESENGO YA SOLOSOLO EUTAKA

3. Biloko oyo ekelamá eteyaka biso nini mpo na Yehova? (Talá mpe bililingi.)

3 Yehova azalaka ntango nyonso na esengo. Mpe alingi ete biso mpe tózalaka na esengo. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ndenge akelá biloko ebele mpo epesa biso esengo; na ndakisa tosepelaka na planɛti na biso ya kitoko mabele, epai tomonaka langi ndenge na ndenge, ndenge banyama esakanaka mpe yango esɛkisaka biso, mpe ebele ya biloko kitoko ya kolya. Ya solo, Nzambe alingaka biso, mpe alingi ete tózala na bomoi ya esengo!

Bililingi: Nyama ndenge na ndenge esakanaka. 1. Mwana ya nzoku ezali kosakana na mai. 2. Bana ya Penguin ezali kodenda na nɛjɛ. 3. Bana ya ntaba ezali kopumbwapumbwa na matiti. 4. Dauphin ezali komibwaka na mai.

Mwana ya nzoku: Image © Romi Gamit/Shutterstock; bana ya penguin: Vladimir Seliverstov/500px via Getty Images; bana ya ntaba: Rita Kochmarjova/stock.adobe.com; dauphin mibale: georgeclerk/E+ via Getty Images

Ndenge banyama esakanaka emonisaka ete Yehova azali Nzambe ya esengo (Talá paragrafe 3)


4. (a) Mpo na nini Yehova azali kaka na esengo atako mpasi oyo etondi na mokili? (b) Likabo nini Yehova apesaka biso? (Nzembo 16:11)

4 Atako Yehova azali “Nzambe ya esengo,” ayebi malamu mpasi mpe minyoko oyo ezali na mokili. (1 Tim. 1:11) Kasi, atiká te ete makambo yango ekitisa esengo na ye. Ayebi ete bampasi nyonso ezali mpo na ntango mokuse, mpe ye moko atyá dati oyo ekosila. Na yango, azali komonisa motema molai mpe koyika mpiko tii mokolo oyo akosilisa mawa mpe mpasi mpo na libela. Kasi, liboso mokolo yango ekoka, Yehova atyaka likebi mpenza na makambo ya mpasi oyo tokutanaka na yango mpe alingaka kosalisa biso. Ndenge nini asalisaka biso? Lolenge moko ezali ete apesaka biso likabo ya kozala na esengo. (Tángá Nzembo 16:11.) Tótala ndenge asalaki yango epai ya Mwana na ye, Yesu.

5-6. Mpo na nini Yesu azalaka na esengo?

5 Na bikelamu nyonso ya Yehova, Yesu nde aleki na esengo. Mpo na nini? Tótalela bantina mibale. (1) “Azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te” mpe amonisaka bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka na makambo nyonso. (Kol. 1:15; 1 Tim. 6:15) (2) Yesu alekisá ntango mingi mpenza elongo na Tata na ye, oyo azali Liziba ya esengo.

6 Yesu azalaka na esengo ntango nyonso mpo asalaka oyo Tata na ye asɛngi ye. (Mas. 8:​30, 31; Yoa. 8:29) Lokola azalaka sembo ntango nyonso, Yehova asepelaka na ye mingi mpe andimaka ye.—Mat. 3:17.

7. Ndenge nini tokoki kozwa esengo ya solosolo?

7 Biso mpe tokoki kozala na esengo ya solosolo soki tozali penepene na Yehova, epai esengo ya solosolo eutaka. Soki tozali kolekisa ntango mingi mpo na koyekola makambo ya Yehova mpe tozali komekola ye, tokozala mpe na esengo mingi. Lisusu, tokozala mpe na esengo ntango tozali kosala mokano ya Nzambe mpe ntango toyebi ete andimaka biso.a (Nz. 33:12) Bongo soki na ntango moko boye tobungisi esengo na biso to ete tosali ntango mingi tozali na esengo te? Yango elakisi nde ete Nzambe atiki kondima biso? Te! Tozali bato ya kozanga kokoka mpe na bantango mosusu toyokaka mpasi, mawa, mpe tonyokwamaka na makanisi. Yehova ayebi yango malamu. (Nz. 103:14) Tólobela sikoyo makambo oyo ekoki koyiba esengo na biso, mpe oyo tokoki kosala mpo na kozongela esengo na biso.

Luká esengo epai ya Yehova

Sɛngá Yehova elimo santu. Tosengeli koluka esengo ya solosolo epai ya Yehova mpo esengo ezali na kati ya mbuma ya elimo santu na ye. (Gal. 5:22) Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, tokoki ‘koyika mpenza mpiko na motema molai ná esengo’ ata ntango tokutani na mikakatano.—Kol. 1:11.

Tyá losambo ya Yehova na esika ya liboso. Yekoláká mbala na mbala Liloba ya Nzambe mpe mikanda na biso. Salelá libaku nyonso mpo na koyebisa basusu “nsango malamu oyo ekopesa bato nyonso esengo mingi.” (Luka 2:10) Baoyo batyaka losambo ya Yehova na sika ya liboso bazalaka na esengo mingi.—Nz. 65:4.

Tosáká Yehova ntango nyonso. Kobosanaka te ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na yo. Kotosa Yehova epekisaka biso te kosepela na bomoi, kutu epesaka biso nde esengo.—Luka 11:28.

KOTIKA ELOKO TE EYIBA ESENGO NA YO

8. Mikakatano ya bomoi ekoki kosala nini epai na biso?

8 Moyibi ya liboso: Mikakatano ya bomoi. Ozali komona mpasi mpo na monyoko, makama, bobola, maladi, to bobange? Mikakatano ya ndenge wana ekoki koyiba esengo na biso, mingimingi soki tozali na makoki mingi te to mpe ata moke te mpo na kosilisa makambo oyo tokutani na yango. Biblia mpe elobi ete “mawa elɛmbisaka moto nzoto.” (Mas. 15:13) Babis, nkulutu moko oyo na boumeli ya mbula 4 mpamba abungisaki na liwa yaya na ye oyo babotamaki kaka bango mibale, tata na ye, mpe mama na ye, alobi boye: “Nayokaki ete natikali kaka ngai moko mpe nazangi lisalisi. Na bantango mosusu, makanisi na ngai ezalaki kobulungana mpenza mpo nazwaki libaku te ya kolekisa ntango mingi elongo na baboti na ngai mpe yaya na ngai liboso bákufa.” Ya solo, mikakatano ya bomoi ekoki mpenza kolya biso nzoto mpe kotungisa biso makasi.

9. Nini ekoki kosalisa biso tózongela esengo na biso? (Yirimia 29:​4-7, 10)

9 Nini ekoki kosalisa biso tózongela esengo na biso? Tokoki kozongela esengo na biso soki tondimi makambo oyo ekómeli biso mpe soki tozali na botɔndi. Mokili elobaka ete mpo tózala na esengo, makambo ya bomoi na biso esengeli kozala ya kokoka. Kasi likanisi yango ezali solo te. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Bayuda oyo bamemamaki na Babilone ete bándima bomoi na bango ya sika lokola bakangami na mboka mopaya mpe básala nyonso básepela na bomoi kuna atako makambo ezalaki mpasi. (Tángá Yirimia 29:​4-7, 10.) Liteya ezali nini? Salá makasi ondima makambo ya bomoi na yo, mpe zalá na botɔndi mpo na makambo ya malamu oyo ozali na yango. Kobosana te, Yehova akozanga te kosalisa yo ntango nyonso. (Nz. 63:7; 146:5) Ndeko mwasi Effie, oyo asalaki aksida mpe atikalá ebɔsɔnɔ, alobi boye: “Nazwaki lisalisi mpe lisungi mingi epai ya Yehova, bandeko ya libota mpe na lisangá. Na yango, namonaki ete soki nalɛmbisi mabɔkɔ ekomonisa ete nazali na botɔndi te. Yehova ná baninga na ngai basalisi ngai mingi mpe nalingaka komonisa botɔndi mpo na yango.”

10. Mpo na nini tokoki kozala na esengo ata ntango tokutani na mikakatano?

10 Ata soki tozali na mikakatano to makambo ya nsɔmɔ ekómeli biso to libota na biso, tokoki kaka kozala na esengo.b (Nz. 126:5) Mpo na nini? Mpo esengo na biso etaleli te makambo oyo tozali na yango. Ndeko Maria, oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Soki obateli esengo na yo ntango okutani na mikakatano, yango elimboli te ete oboyi kondima mayoki na yo. Kasi, elimboli nde ete obosani te bilaka ya Yehova. Tata na biso akosalisa biso tóbatela esengo na biso.” Kobosana te, ata soki makambo ezali mpasi ndenge nini sikoyo, mikakatano na biso nyonso ezali ya ntango mokuse, kaka lokola bilembo ya makolo na zɛlo ya libongo. Mosika te, Yehova akolongola bampasi nyonso, mpe ata elembo moko ekotikala te.

11. Ndenge nini ndakisa ya ntoma Paulo elendisi yo?

11 Bongo soki tobandi komituna soki mikakatano na biso emonisi ete Yehova azali kondima biso lisusu te? Tokoki kokanisa basaleli mosusu ya sembo ya Yehova oyo bakutanaki mpe na mikakatano ya makasi. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Yesu ye moko nde aponaki ye mpo asakola nsango malamu “epai ya bikólo, epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.” (Mis. 9:15) Ezalaki libaku malamu mpenza! Atako bongo, bomoi ya Paulo ezangaki mikakatano te. (2 Ko. 11:​23-27) Ebele ya mikakatano oyo Paulo akutanaki na yango emonisaki nde ete Yehova atikaki kondima ye? Ezali bongo te! Kutu, ndenge ayikelaki yango mpiko emonisaki ete Yehova azalaki kopambola ye. (Rom. 5:​3-5) Kanisá sikoyo likambo na yo. Ozali koyika mpiko na bosembo nyonso atako mikakatano nyonso oyo ozali na yango. Na yango, yebá ete Yehova azali mpe kosalisa yo mpe kondima yo.

12. Tokoki komiyoka ndenge nini soki bilikya na biso ekokisami te?

12 Moyibi ya mibale: Bilikya oyo ekokisami te. (Mas. 13:12) Bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Yehova etindaka biso tómityela mikano na mosala na ye. Kasi, soki mikano yango ekokisami te na kotalela makambo ya bomoi na biso, tokoki kolɛmba nzoto. (Mas. 17:22) Ndeko moko ya mobongisi-nzela na nkombo Holly alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kokɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, kokende kosala na mboka mopaya, to kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Ramapo. Kasi, makambo ya bomoi na ngai ebongwanaki, mpe nakokaki lisusu kokokisa mikano yango te. Na yango nalɛmbaki nzoto. Esalaka mabe ntango olingi kosala makambo mosusu, kasi ozwi libaku te.” Mingi na biso tozalaka na mayoki ya ndenge wana.

13. Soki bomoi na biso ezali kopekisa biso kosala mingi, mikano nini tokoki komityela?

13 Nini ekoki kosalisa biso tózongela esengo na biso? Tóbosana te ete Yehova azalaka makambo makasimakasi te. Asɛngaka biso te tósala oyo eleki makoki na biso; motuya oyo tozali na yango na miso na ye etaleli mpe te makambo oyo tosalaka mpo na ye. Yehova alingi kaka tózala na bopɔlɔ mpe sembo. (Mika 6:8; 1 Ko. 4:2) Atyaka likebi mingimingi na bomoto na biso ya kati koleka na makambo oyo tozali kosala. Na yango, ebongi mpenza tómityelaka mikano oyo eleki ndenge oyo Yehova atalelaka makoki na biso?c Ebongi tósala bongo te! Yango wana, soki bomoi na yo ezali kopesa yo nzela te ya kosala mingi mpo na Yehova, tyá makanisi nyonso na oyo okoki kosala. Mbala mosusu okoki komityela mokano ya kopesaka bilenge formasyo, to soki ozali elenge, kosalisa bandeko oyo mbula epusani! Okoki mpe komityela mokano ya kolendisa moto moko ntango okutani na ye, na nzela ya telefone, to ata na mesaje! Yehova akopesa yo esengo ntango ozali komityela mikano ya ndenge wana mpe oyo ekokani na makoki na yo. Mpe yebá ete mosika te, na mokili ya sika, tokozwa mabaku ebele mpenza ya kosalela Yehova na ndenge oyo tokoki ata kokanisa te. Ndeko Holly, oyo tolobelaki liboso, asukisaki boye: “Nafandaka mpe nalobaka na nse ya motema ete, ‘Bomoi ya seko ezali.’ Na lisalisi ya Yehova, nakoki kokokisa mikano na ngai mosusu na mokili ya sika.”

14. Nini lisusu ekoki koyiba esengo na biso?

14 Moyibi ya misato: Koluka kaka bisengo na biso moko. Na basite Internet ya kosolola na bato, bato mosusu balobaka ete okozwa esengo ya solosolo soki ozali komisepelisa. Balendisaka bato bámipesa libosoliboso na makambo oyo balingaka kosala mpo na kolekisa ntango, kosomba biloko, mpe kosala mibembo. Ezali mabe te kosepela na makambo yango. Yehova akelá biso na likoki ya kosepela na makambo ya malamu. Kasi, bato mingi bamoni ete makambo oyo bakanisaki ete ekopesa bango esengo, eyibaki bango nde esengo. Ndeko mwasi moko na nkombo Eva, oyo azali mobongisi-nzela, alobi boye: “Soki moto azali koluka libosoliboso komisepelisa, atondaka lisusu eloko te.” Koluka kaka bisengo na biso moko ekoki kokómisa biso mawamawa mpe kolɛmbisa biso nzoto.

15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Salomo?

15 Ndakisa ya Mokonzi Salomo emonisi ete soki moto azali koluka kaka bisengo na ye moko ekomemela ye mawa. Salomo alukaki kokokisa bamposa na ye nyonso mpo na kozwa esengo, na ndakisa azalaki kolya bilei ya malamu, kosepela na miziki kitoko, mpe azwaki eloko nyonso ya malamu oyo mbongo ekokaki kosomba na mikolo na ye. Kasi, ayokaki te ete atondi. Alobaki: “Liso elɛmbaka kotala te, litoi mpe elɛmbaka koyoka te.” (Mos. 1:8; 2:​1-11) Biloko oyo mokili elobaka ete epesaka esengo ya solosolo ezali lokola mbongo ya monyato. Emonanaka lokola ezali na motuya; kasi ezalaka na ntina moko te.

16. Na ndenge nini kosalela basusu ekoki kosalisa biso tózongela esengo na biso? (Talá mpe bililingi.)

16 Nini ekoki kosalisa biso tózongela esengo na biso? Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Nkulutu moko na nkombo Alekos alobi boye: “Natyaka makanisi na kosala mwa makambo mpo na kosalisa basusu. Ntango nazali kopesa basusu, natyaka likebi kaka epai na ngai moko te, mpe yango epesaka ngai esengo.” Na yango, makambo nini okoki kosala mpo na basusu? Na ndakisa, soki omoni moto azali kobundabunda na mikakatano, meká kolendisa ye. Mbala mosusu okokoka kosilisa mikakatano na ye te, kasi okoki kobɔndisa ye soki oyoki ye na boboto, omitye na esika na ye, mpe oyebisi ye ete abwakela Yehova mokumba na ye ya kilo. (Nz. 55:22; 68:19) Okoki mpe kosalisa ye amona ete Yehova asundoli ye te. (Nz. 37:28; Yis. 59:1) Okoki ata kosɛnga ye soki okoki kosunga ye na mwa misala, na ndakisa kolambela ye mwa eloko, to kobima na ye kaka mpo na kotambola elongo. Sɛngá ye bóbima na mosala ya kosakola; kosakola ekopesa ye esengo. Na yango, tiká ete Yehova asalela yo mpo na kolendisa basusu. Soki tozali kotyela basusu likebi mingi koleka biso moko, tokozala na esengo ya solosolo!—Mas. 11:25.

Bililingi: 1. Ndeko mwasi moko afandi kaka ye moko na restora mpe azali kosalela aparɛyi na ye. Basaki ya biloko oyo auti kosomba ezali pembenipembeni. 2. Ndeko mwasi yango akei kotala ndeko mwasi moko ya mokóló na ndako na ye mpe amemeli ye bafololo.

Na esika osalaka kaka oyo esepelisaka yo, tyeláká nde bamposa ya basusu likebi (Talá paragrafe 16)d


17. Soki tolingi kozala na esengo, tosengeli kosala nini? (Nzembo 43:4)

17 Tokoki kozala mpenza na esengo soki tokobi kopusana penepene na Tata na biso ya likoló. Biblia elobi ete Yehova azali “esengo na [biso] mpenza.” (Tángá Nzembo 43:4.) Na yango, ata soki tokutani na makambo nini na bomoi, ntina ya kobulungana ezali te. Boye, tókoba kotya makanisi epai ya Yehova, Ye oyo akoki kosalisa biso tózala na esengo ya seko!—Nz. 144:15.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini Yehova ná Yesu bazalaka na esengo?

  • Nini ekoki koyiba esengo na biso?

  • Ndenge nini tokoki kozongela esengo na biso soki tobungisi yango?

LOYEMBO 155 Esengo ya seko

a Talá etanda “Luká esengo epai ya Yehova.”

b Na ndakisa, talá na jw.org mituna-lisolo ya Dennis ná Irina Christensen na Lapolo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi No. 5 ya 2023.

c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Omityela mikano oyo ekoki na yo mpo okoba kosalela Yehova na esengo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2008.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko asombi biloko mpo na ye moko, kasi ayoki esengo mingi ndenge asombeli mpe ndeko mwasi moko ya mokóló fololo mpo na kolendisa ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto