Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Avril nk. 8-13
  • “Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu” mpo na biso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu” mpo na biso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” EPESAKA ESENGO
  • “KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” ESALISAKA BISO TÓZALA NA BOMOI YA MALAMU MPE NA ELIKYA
  • NDENGE YA KOKOBA “KOPUSANA EPAI YA NZAMBE”
  • TOKOKI KOPUSANA “EPAI YA NZAMBE” ATA NTANGO TOBƐTI LIBAKU
  • “KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” MPO NA LIBELA
  • Kopusana penepene na bandeko ezali malamu mpo na biso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge ya kosilisa bantembe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Avril nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 15

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe Moninga na ngai

“Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu” mpo na biso!

“Mpo na ngai, kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.”—NZ. 73:28.

NA MOKUSE

Ndenge ya kopusana lisusu penepene na Yehova mpe matomba oyo kosala yango ememaka.

1-2. (a) Milende nini esɛngaka mpo na kokóma moninga ya moto? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

OZALAKA na moninga moko ya motema? Osalaki nini mpo bókóma baninga? Mbala mosusu ozalaki kolekisa ntango elongo na ye, oyebaki mikakatano oyo azali na yango, mpe oyebaki makambo oyo alingaka mpe oyo ayinaka. Omonaki ete azali na bizaleli ya malamu oyo okoki komekola. Bongo okómaki kolinga ye.

2 Ya solo esɛngaka ntango mpe milende mpo na kokóma moninga ya moto. Ezali mpe bongo mpo na kokóma na boninga ya penepene na Yehova Nzambe. Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo tokoki kopusana lisusu penepene na Nzambe na biso mpe matomba oyo kosala yango ememaka. Kasi liboso, tólobela ntina oyo ezali malamu kopusana penepene ya Moninga na biso ya malamu koleka, Yehova.

3. Mpo na nini tosengeli kokanisaka matomba oyo kopusana penepene na Yehova ekopesa biso? Pesá ndakisa.

3 Na ntembe te ondimaka ete kopusana penepene na Yehova ezali malamu. Kasi soki okanisi mpenza bolamu na yango, yango ekoki kotinda yo okoba kopusana lisusu mingi penepene na ye. (Nz. 63:​6-8) Na ndakisa, toyebi ete kolya malamu, kosala ngalasisi mbala na mbala, kolala malamu, mpe komɛla mai mingi ezali malamu mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Kasi bato mingi bakipaka mpenza makambo yango te, mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango ezalaka malamu te. Nzokande, soki tozali mbala na mbala kokanisa ndenge mimeseno ya malamu epesaka biso matomba, tokokoba mpe kobatela mimeseno yango. Ndenge moko mpe, toyebi ete kopusana epai ya Yehova ezali malamu mpo na biso, kasi kokanisa matomba oyo yango ekopesa biso ekoki kotinda biso tókoba kopusana lisusu penepene ya Moninga na biso.—Nz. 119:​27-30.

4. Ndenge emonisami na Nzembo 73:​28, mokomi ya nzembo alobaki nini?

4 Tángá Nzembo 73:28. Mokomi ya Nzembo 73 azalaki Molevi mpe azalaki na mokumba ya kobɛta miziki na tempelo ya Yehova. Na ntembe te, asalelaki Yehova na bosembo bambula ebele. Atako bongo, amonaki ete asengeli komikundwela mpe kokundwela basusu ete “kopusana epai ya Nzambe” ezalaki malamu mpo na ye mpe mpo na bango. Wapi mwa matomba ya kopusana epai ya Nzambe?

“KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” EPESAKA ESENGO

5. (a) Mpo na nini kopusana lisusu penepene na Yehova epesaka biso esengo? (b) Na kotalela Masese 2:​6-16, pesá ndakisa ya makambo ya sikisiki mpo na komonisa ndenge bwanya ya Yehova ekoki kosalisa yo mpe kobatela yo.

5 Soki opusani mingi penepene na Yehova, okozala mpe na esengo mingi. (Nz. 65:4) Ezali bongo mpo na bantina mingi. Ya liboso, tozwaka matomba ntango tosalelaka toli ya bwanya oyo ezali na Liloba na ye, Biblia. Bwanya yango ebatelaka biso na makambo ya mabe mpe esalisaka biso tósala te mabunga ya minene. (Tángá Masese 2:​6-16.) Yango wana Biblia elobi: “Esengo na moto oyo azwi bwanya mpe na moto oyo azali kozwa bososoli.”—Mas. 3:13.

6. Nini esalaki ete mokomi ya nzembo azala lisusu na esengo te?

6 Ya solo, ata baninga ya Yehova mpe bayokaka mawa na bantango mosusu. Mokomi ya nzembo 73 azalaki lisusu na esengo te ntango akómaki na makanisi oyo ebongi te. Akómaki komitungisa mpe ayokaki likunya mpo azalaki komona ete bato mabe oyo bazalaki kokipe Nzambe te mpe mibeko na Ye, bazalaki na bomoi ya malamu. Akanisaki ete bato ya mobulu mpe ya lolendo bazalaki se kokóma na bomɛngo, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bazalaki ata komona mpasi te. (Nz. 73:​3-7, 12) Mokomi ya nzembo amitungisaki mingi tii na ntango moko amitunaki soki milende oyo azalaki kosala mpo na kosalela Yehova ezalaki na ntina. Na mawa na ye, alobaki: “Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.”—Nz. 73:13.

7. Ntango tozali na mawa, tokoki kosala nini mpo tóbungisa esengo na biso te? (Talá mpe elilingi.)

7 Mokomi ya nzembo atikaki te ete mawa ezindisa ye. Asalaki nini mpo na yango? “Akɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe,” mpe kuna Yehova asembolaki makanisi na ye. (Nz. 73:​17-19) Biso mpe ntango tozali na mawa, Yehova, Moninga na biso oyo aleki malamu, ayebaka yango. Soki tobondeli ye mpo apesa biso litambwisi mpe tondimi lisalisi oyo apesaka na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá, tokozwa makasi ya kokoba kosalela ye ata ntango tozali na mawa. Ata ntango totungisami koleka ndelo, Yehova akobɔndisa biso mpe akokitisa biso motema.—Nz. 94:19.a

Molevi moko atɛlɛmi kati na etumbelo ya kwivre mpe ndako ya kokɔtela ya tempelo.

Molevi oyo akomaki Nzembo 73 atɛlɛmi na “esika mosantu monene ya Nzambe” (Talá paragrafe 7)


“KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” ESALISAKA BISO TÓZALA NA BOMOI YA MALAMU MPE NA ELIKYA

8. Na makambo mosusu nini ya ntina kopusana epai ya Nzambe ezali malamu mpo na biso?

8 Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu mpo na biso na makambo mosusu mibale ya ntina mingi. Ya liboso, esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu. Ya mibale, epesaka biso elikya makasi mpo na mikolo oyo ekoya. (Yir. 29:11) Tótalela matomba yango na mozindo.

9. Na ndenge nini kopusana penepene na Nzambe esalisaka biso tózala na bomoi ya esengo?

9 Kopusana penepene na Nzambe esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu. Lelo oyo, bato mingi oyo bandimelaka Nzambe te bakanisaka ete bomoi ezali na ntina te mpe ete nsukansuka bato nyonso bakozala lisusu te. Kasi, na nzela ya boyekoli na biso ya Liloba ya Nzambe, tondimi ete Nzambe “azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Ebr. 11:6) Ata lelo oyo, tozali na bomoi ya esengo mpenza mpo tokokisaka mokano oyo Tata na biso ya likoló Yehova akelaki biso, elingi koloba, kosalela ye.—Mib. 10:​12, 13.

10. Nzembo 37:29 emonisi ete Yehova alaki nini epai ya baoyo batye elikya epai na ye?

10 Bato mingi lelo bazali na elikya te; bomoi na bango esuki kaka na kokende mosala, kosala libota mpe kobɔkɔla bana, mpe kobomba mbongo mpo na ntango oyo bakozwa pansiɔ. Batalelaka Nzambe te. Nzokande, biso basaleli ya Yehova totyaka elikya epai na ye. (Nz. 25:​3-5; 1 Tim. 6:17) Totyaka motema epai ya Nzambe oyo topusani penepene na ye, mpe tozelaka ete makambo oyo alaki biso ekokisama. Tozelaka mpenza ntango oyo tokozwa libaku ya kosambela ye mpo na libela na Paradiso.—Tángá Nzembo 37:29.

11. Kozala baninga ya Nzambe ezali na matomba nini, mpe Yehova ayokaka ndenge nini mpo na yango?

11 Kopusana epai ya Nzambe ezali malamu mpo na biso na makambo mosusu mingi. Na ndakisa, Yehova alaki kolimbisa masumu ya baninga na ye oyo babongoli motema. (Yis. 1:18) Na yango, ezali na ntina te tókoba kotungisama mpo na masumu oyo tosalá kala. (Nz. 32:​1-5) Longola yango, tozali na esengo ndenge tosepelisaka motema ya Yehova. (Mas. 23:15) Na ntembe te, okoki kokanisa mapamboli mosusu oyo tozwaka ndenge tozali na boninga makasi na Yehova. Kasi, ndenge nini okoki kokoba kopusana epai ya Nzambe?

NDENGE YA KOKOBA “KOPUSANA EPAI YA NZAMBE”

12. Makambo nini osalaki mpo na kopusana penepene na Nzambe?

12 Soki ozali mokristo oyo azwá batisimo, osili kosala mingi mpo na kopusana penepene na Yehova. Oyekolaki mateya mingi ya solo oyo etali Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo, obongolaki motema mpo na masumu na yo ya kala, omonisaki kondima makasi epai ya Nzambe, mpe osalaki makasi ya kosala makambo oyo eyokani na mokano ye. Kasi mpo na kopusana lisusu penepene na Nzambe, tosengeli kokoba kosala makambo wana.—Kol. 2:6.

13. Makambo nini misato ekoki kosalisa biso tókoba kopusana penepene na Yehova?

13 Nini ekosalisa biso tókoba kopusana penepene na Yehova? (1) Tosengeli kokoba kotánga mpe koyekola Biblia. Ntango tozali kosala yango, mokano na biso esengeli kosuka kaka te na koyeba mwa makambo oyo etali Nzambe. Kasi, tosengeli kosala makasi tósosola soki mokano ya Nzambe ezali nini mpo na biso, mpe tósalela mitinda oyo atye na Liloba na ye mpo etambwisa biso. (Ef. 5:​15-17) (2) Tosengeli komanyola na ebele ya makambo oyo emonisi ete alingaka biso, mpe yango ekokómisa kondima na biso makasi. (3) Tosengeli koyina makambo oyo epesaka Yehova mpasi mpe koboya kozala moninga ya bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana.—Nz. 1:1; 101:3.

14. Na boyokani na maloba ya 1 Bakorinti 10:​31, na makambo nini na bomoi ya mokolo na mokolo tokoki kosepelisa Yehova? (Talá mpe bililingi.)

14 Tángá 1 Bakorinti 10:31. Ezali na ntina mingi tókoba mpenza kosala makambo oyo esepelisaka Yehova. Yango esuki kaka te na kobima mosala ya kosakola mpe koyangana na makita. Misala ya malamu oyo esepelisaka Yehova esangisi mpe makambo oyo tosalaka na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, soki tozali sembo na makambo nyonso mpe tozali kokabela basusu, tokosepelisa Yehova. (2 Ko. 8:21; 9:7) Alingi mpe ete tózwaka likabo ya bomoi na motuya mingi. Na yango, tokopusana mingi penepene na Mopesi ya bomoi soki tozali na bokatikati na oyo etali kolya mpe komɛla, mpe soki tozali kokipe kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso na ndenge oyo ebongi. Milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kosepelisa Yehova, ata na makambo oyo ezali komonana mike, ekosala ete alinga biso mingi.—Luka 16:10.

Bililingi: Ndenge oyo tokoki kosepelisa Yehova. 1. Kokumba motuka na ekɛngɛ: Ndeko mobali moko oyo azali kokumba motuka atɛlɛmi mpo mwinda oyo emonisaka ete esengeli kotɛlɛma epeli. 2. Kosala ngalasisi: Ndeko mobali moko azali kotambola. 3. Kolya malamu: Saani ya bilei oyo etongaka nzoto. 4. Kokaba: Ndeko mwasi moko amemeli ndeko mwasi moko ya mobange bafololo mpe bilei.

Kokumba motuka na ekɛngɛ, kosala ngalasisi, kolya malamu, mpe kokaba ezali na kati ya makambo oyo esepelisaka Yehova (Talá paragrafe 14 )


15. Yehova alingi ete tózala ndenge nini epai ya basusu?

15 Yehova azali na boboto epai ya bato ya bosembo mpe bato oyo bazangi bosembo. (Mat. 5:45) Alingi ete biso mpe tózalaka na boboto epai ya basusu. Na ndakisa, tosengeli ‘kolobela moto mabe te, kozala te bato oyo baswanaka, mpe komonisela bato nyonso boboto.’ (Tito 3:2) Na yango, totyolaka basusu te kaka mpo bindimeli na bango ekeseni na oyo ya biso. (2 Tim. 2:​23-25) Tokopusana lisusu penepene na Yehova soki tozali ntango nyonso na boboto mpe na limemya epai ya basusu.

TOKOKI KOPUSANA “EPAI YA NZAMBE” ATA NTANGO TOBƐTI LIBAKU

16. Ndenge nini mokomi ya Nzembo 73 abandaki komiyoka nsima ya kosalela Yehova mwa bambula?

16 Bongo soki nsima ya kosalela Yehova mwa bambula, obandi komiyoka ete obongi te ete Yehova alinga yo mpo osali libunga? Ndenge tomonaki yango, likambo ya ndenge wana ekómelaki mpe mokomi ya Nzembo 73. Alobaki: “Etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela ya sembo, matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.” (Nz. 73:2) Ye moko andimaki ete motema na ye “ezokaki” mpe ete azalaki liboso ya Yehova lokola nyama oyo ‘ezangi mayele.’ (Nz. 73:​21, 22) Amonaki nde ete lokola asalaki libunga esili mpo na ye, abongi te Yehova alinga ye?

17. (a) Ata ntango alɛmbaki mpenza nzoto, emonani ete mokomi ya nzembo asalaki nini? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? (Talá mpe bililingi.)

17 Ata soki mokomi ya nzembo ayokaki lokola ete Yehova asundoli ye, na ntembe te mayoki yango eumelaki te. Emonani ete ntango alɛmbaki nzoto ndenge wana, andimaki ete asengeli kopusana lisusu penepene na Nzambe, ndenge amonisaki yango na maloba na ye oyo: “Kasi sikoyo nazali elongo na yo [Yehova] ntango nyonso; osimbi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okambaka ngai na toli na yo, mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.” (Nz. 73:​23, 24) Biso mpe, ntango tolɛmbi nzoto to makasi na biso ekiti, tosengeli kokende epai ya Yehova, mpo azali lokola libanga oyo ekosalisa biso tózala ngwi. (Nz. 73:26; 94:18) Ata soki makolo na biso ebungi nzela mwa ntango moke, tokoki kaka kozongela Yehova mpo toyebi ete ‘asepelaka kolimbisa.’ (Nz. 86:5) Mingimingi ntango tolɛmbi mpenza nzoto, tosengeli kopusana lisusu penepene na Nzambe na biso.—Nz. 103:​13, 14.

Bililingi: 1. Ndeko mobali moko oyo alɛmbi nzoto afandi na mbeto. 2. Na nsima, azali kopesa babalani moko mbote na esengo na makita.

Ntango tomiyoki ete tolɛmbi na elimo, tosengeli kopusana lisusu penepene na Yehova na komipesáká mingi na losambo na ye (Talá paragrafe 17)


“KOPUSANA EPAI YA NZAMBE” MPO NA LIBELA

18. Mpo na nini kopusana penepene na Yehova ezali na nsuka te?

18 Kopusana penepene na Yehova mpe koyekola koyeba ye ezali na nsuka te. Biblia elobi ete banzela ya Yehova, bwanya na ye, mpe boyebi na ye “ekoki koyebana te.”—Rom. 11:33.

19. Elikya nini mokanda ya Nzembo epesi biso?

19 Nzembo 79:13 elobi: “Biso bato na yo mpe etonga ya esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti, tokopesa yo matɔndi mpo na libela; mpe tokosanzola yo libota na libota.” Wana ozali kokoba kopusana epai ya Nzambe, yebá ete akopambola yo libela na libela mpe okoki koloba na kondima nyonso ete: “Nzambe azali libanga ya motema na ngai mpe eteni na ngai mpo na libela.”—Nz. 73:26.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini tosengeli kokanisaka matomba ya “kopusana epai ya Nzambe”?

  • Na ndenge nini “kopusana epai ya Nzambe” ezali malamu mpo na biso?

  • Ndenge nini tokoki kokoba “kopusana epai ya Nzambe”?

LOYEMBO 32 Poná nde Yehova!

a Bato mosusu oyo bazali kotungisama na makanisi mpe koyoka mawa oyo eumeli bakoki kokende epai ya monganga. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, No. 1 2023.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto