Mabe ná malamu: Biblia ekoki mpenza kosalisa yo
Tótalela makambo minei ya bomoi oyo Biblia esalisi bamilio ya bato.
1. Libala
Bato bazalaka na makanisi ekeseni na oyo etali libala mpe nini esengeli kosala mpo na kozala na libala ya esengo.
BIBLIA ELOBI: “Mokomoko na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.”—Baefese 5:33.
NDIMBOLA: Libala ezali ebongiseli oyo eutá epai ya Nzambe, yango wana ayebi nini esengeli mpo mwasi ná mobali bázala na esengo. (Marko 10:6-9) Libala ezalaka na esengo ntango mwasi ná mobali batye makanisi na bango, kaka te na matomba ya moko na moko, kasi nde na oyo mokomoko asengeli kosala mpo libala na bango ekóma makasi. Mobali oyo alingaka mwasi na ye abatelaka ye mpe asalelaka ye makambo na boboto. Mpe mwasi oyo amemyaka mobali na ye apesaka ye mabɔkɔ mpe alobaka na ye na boboto.
BIBLIA ESALISAKA MPENZA: Quang ná Thi, na ekólo Vietnam, bafandaki na libala oyo makambo ezalaki kosimba te. Mbala mingi Quang, mobali ya Thi, azalaki makambo mabe. Alobi boye: “Nazalaki kokipe mayoki ya Thi te mpe mbala mingi nazalaki koyokisa ye nsɔni.” Thi alingaki koboma libala. Alobi: “Namonaki ete nakokoka lisusu te kotyela mobali na ngai motema to komemya ye.”
Nsukansuka, Quang ná Thi bayekolaki oyo Biblia eteyaka mpe ndenge ya kosalela Baefese 5:33 na libala na bango. Quang alobi: “Vɛrsɛ yango esalisaki ngai namona ntina ya kozala na boboto, mpe kosala ete Thi amiyoka ete nalingaka ye mpe nakipaka bamposa na ye ya mosuni, ya nzoto mpe ya mayoki. Ntango nasalaka bongo, Thi akómaka kolinga ngai mpe komemya ngai lisusu mingi .” Mpe Thi alobi, “Ntango nazali kosalela Baefese 5:33 mpe komonisela mobali na ngai limemya, yango esalaka ete Quang alinga ngai mingi, abatela ngai mpe nazala na kimya.”
Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali libala, tángá Lamuká! No. 2 2018, oyo ezali na motó ya likambo “Sekele 12 mpo na libota ya esengo” na jw.org.
2. Ndenge ya kosalela basusu makambo
Mbala mingi bato basalelaka basusu mabe kaka mpo bazali ekólo moko te, lopɔsɔ moko te, komonana ndenge moko te, lingomba moko te, to mpo batalelaka ndenge moko te makambo etali kosangisa nzoto.
BIBLIA ELOBI: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso.”—1 Petro 2:17.
NDIMBOLA: Biblia eteyaka biso te tóyina bato mpo na lopɔsɔ na bango, ekólo na bango, to mpo na ndenge oyo batalelaka makambo ya kosangisa nzoto. Nzokande, elendisaka biso tómemya bato ya ndenge nyonso, kozanga kotala lopɔsɔ, ekólo, to mpe lolenge ya bomoi na bango. (Misala 10:34) Ata soki tondimi te makambo oyo bato mosusu bandimaka to basalaka, tokoki kokoba kosalela bango makambo na boboto mpe na limemya.—Matai 7:12.
BIBLIA ESALISAKA MPENZA: Bateyá Daniel ete bato oyo bautá na Asie bazali likama mpo na ekólo na ye. Akómaki koyina moto nyonso oyo autá na Asie mpe mbala mingi azalaki kofinga bango liboso ya bato. Alobi ete, “Mpo na ngai, yango ezalaki lolenge ya komonisa ‘bolingo mpo na ekólo na ngai.’ Nazalaki komona yango mabe ata moke te.”
Kendekende, Daniel ayaki koyekola makambo oyo Biblia eteyaka. Alobi: “Nasengelaki kobongola mpenza makanisi na ngai. Nasengelaki kotalela bato ndenge Nzambe atalelaka bango—ete tozali biso nyonso ndenge moko ata soki toutá wapi.” Daniel alobeli ndenge amiyokaka sikoyo soki akutani na bato. Alobi: “Mbala mingi nakipaka kutu te soki bautá wapi. Sikoyo, nakómá kolinga bato ya ndenge nyonso mpe nazali na baninga ya motema oyo bauti na mokili mobimba.”
Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá Lamuká! No. 3 2020, oyo ezali na motó ya likambo “Kokanisela baninga mabe ekosila?” na jw.org.
3. Mbongo
Bato mingi balukaka kaka kokóma bazwi mpo na kozala na esengo to mpe bomoi ya malamu na mikolo ekoya.
BIBLIA ELOBI: “Bwanya ebatelaka kaka ndenge mbongo ebatelaka; kasi litomba ya boyebi yango oyo: Bwanya ebatelaka bomoi ya moto oyo azali na yango.”—Mosakoli 7:12.
NDIMBOLA: Mbongo ezali na ntina, kasi ekoki te kopesa biso esengo ya solosolo mpe bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. (Masese 18:11; 23:4, 5) Nzokande, esengo ya solosolo mpe libateli mpo na mikolo ezali koya eutaka na kosalela bwanya ya Nzambe oyo ezali na Biblia.—1 Timote 6:17-19.
BIBLIA ESALISAKA MPENZA: Mobali moko na nkombo Cardo, na Indonesie, amipesaki na koluka bozwi. Alobi: “Nazalaki na nyonso oyo bato balukaka na mokili. Nazalaki na likoki ya kosala mibembo, kosomba biloko ya ntalo, mituka, mpe bandako.” Kasi bomengo yango eumelaki te. Cardo abakisi boye: “Mbongo nyonso oyo nasalaki na boumeli ya bambula mingi ekendaki kaka boye, miyibi bayibaki yango. Namipesaki bomoi mobimba na koluka mbongo, kasi na nsuka, nini nazwaki?—eloko te, nalɛmbaki nzoto mpe namimonaki mpamba.”
Cardo akómaki kosalela batoli ya Biblia oyo etali mbongo. Amipesaka lisusu te kaka na koluka mbongo, kasi aponá kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Asukisi na koloba boye: “Bomengo ya solosolo mpe oyo eumelaka libela ezali ya kozala na boyokani ya malamu na Nzambe. Nakómá kolala na kimya butu nyonso, mpe nazali mpenza na esengo.”
Mpo na koyeba makambo mosusu na ndenge Biblia etalelaka mbongo, tángá lisolo “Bakelasi ya milaimilai mpe mbongo ekoki kopesa moto bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 3 2021, na jw.org.
4. Kosangisa nzoto
Bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge na oyo etali kosangisa nzoto.
BIBLIA ELOBI: “Bóboya pite. Mokomoko na bino asengeli koyeba kopekisa nzoto na ye moko mpo ekoba kozala mosantu mpe na lokumu, na lokoso te, na mposa makasi te ya kosangisa nzoto ndenge bato ya bikólo oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango.”—1 Batesaloniki 4:3-5.
NDIMBOLA: Biblia epesi biso nzela te ya kosangisa nzoto na ndenge nyonso oyo tolingi. Liloba “pite” esangisi ekobo, bondumba, kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, kosangisa nzoto basi na basi to mibali na mibali, mpe kosangisa nzoto na banyama. (1 Bakorinti 6:9, 10) Kosangisa nzoto ezali likabo oyo Nzambe apesá kaka na mwasi ná mobali oyo babalaná.— Masese 5:18, 19.
BIBLIA ESALISAKA MPENZA: Mwasi moko na nkombo Kylie, na Australie, alobi boye: “Lokola nazalaki monzemba, nakanisaki ete nakozala na esengo mpe na kimya soki nazali kosangisa nzoto na moto. Kasi esalemaki bongo te, kutu nalɛmbaki nde nzoto mpe nazalaki lisusu na kimya te.”
Na nsima, Kylie ayekolaki Biblia mpe asalelaki makambo oyo yango eteyaka na oyo etali kosangisa nzoto. Alobi: “Namoni mpenza ete mibeko ya Nzambe ezalaka mpo na kobatela biso na makama mpe mpasi oyo ekoki kokómela biso. Sikoyo, nazali na kimya mpe nazali komona bolingo ya Yehova mpo nazali kosala makambo na ndenge oyo ye alingaka. Kolanda litambwisi ya Biblia ebateli ngai na makambo mingi ya mpasi!”
Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá na jw.org lisolo “Biblia elobi nini mpo na libala ya makango?”
Mozalisi na biso asalisi biso tóyeba likambo oyo ezali mabe to malamu. Atako kotosa mibeko na ye ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi ezali na ntina tósala milende. Tózala na kondima ete kotosa mibeko na ye ebimisaka ntango nyonso kimya ya solosolo.