Oyo tokoki kosala lelo oyo ntango kelelo ebɛti
BISO nyonso tondimaka ete na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ Yehova azali kotambwisa bato na ye mpe kopesa bango nyonso oyo esengeli mpo bátikala penepene na ye. (2 Tim. 3:1) Kasi biso nyonso tosengeli kotosa Yehova. Tokoki koloba ete makambo ya bomoi na biso ekokani na oyo ya Bayisraele ntango bazalaki na esobe. Basengelaki kotosa ntango bayoki kelelo ebɛti.
Yehova ayebisaki Moize asala bakelelo mibale ya palata mpo na kobengisa liyangani mpe mpo na kolongola bakaa. (Mit. 10:2) Banganga-nzambe basengelaki koyula kelelo na lolenge esengeli mpo na komonisa oyo bato basengelaki kosala. (Mit. 10:3-8) Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazwaka malako na ndenge mingi. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge misato oyo tozwaka malako mpe tokokokanisa yango na kelelo oyo ezalaki kobɛta na Yisraele ya kala. Tozwaka malako ntango tokei na mayangani ya minene, ntango malako oyo ebongiseli ya Yehova etindaka na masangá esembolami, mpe bankulutu bazwaka malako na biteyelo ndenge na ndenge.
NTANGO TOBENGISAMI NA MAYANGANI YA MINENE
Ntango Yehova asɛngaki ete “liyangani mobimba” ekutana na ɛsti ya monɔkɔ ya hema, banganga-nzambe bazalaki koyula kelelo nyonso mibale. (Mit 10:3) Bituluku minei ya mabota nyonso oyo ezalaki kotya kaa na yango zingazinga ya hema ya kokutana ezalaki koyoka lokito yango. Baoyo bazalaki pene, bazalaki koumela te mpo na koya. Basusu bazalaki mosika mpenza mpe ezalaki kosɛnga basala milende mpe balekisa bangonga mingi mpo na kokóma. Ezala ndenge nini, Yehova alingaki ete bango nyonso báyangana mpe bázwa matomba.
Lelo oyo, toyanganaka te na hema ya kokutana, kasi basɛngaka biso tókendaka na mayangani ya basaleli ya Nzambe. Yango esangisi mayangani ya etúká, to mpe milulu mosusu ya minene epai tozwaka malako mosusu ya ntina mingi. Na mokili mobimba, basaleli ya Yehova balandaka kaka programɛ moko ya mateya. Na yango, bato nyonso oyo bakendaka na mayangani yango, basepelaka mingi. Basusu basalaka bakilomɛtrɛ ebele mpo na kokende na mayangani yango. Atako bongo, baoyo nyonso bakendaka na mayangani yango, bamonaka ete esengeli mpenza kozangaka yango te.
Bongo bandeko oyo bazalaka na bituluku ya mosika na esika oyo mayangani yango esalemaka? Baaparɛyi ya mikolo oyo esalisaka mingi na bango bálanda programɛ yango mpe bámiyoka ete bazali elongo na bandeko oyo bayangani. Na ndakisa, ntango momonisi ya Biro monene ayaki kotala filiale ya Bénin, bibongiseli ezwamaki mpo ete bandeko oyo bazali na Arlit, mwa engumba moko ya moke ya Niger oyo ezali na esobe ya Sahara, bálanda mbala moko programɛ. Bayangani 21 balandaki programɛ yango. Atako bazalaki mosika, bamiyokaki ete bazalaki elongo na bato 44 131 oyo bayanganaki. Ndeko mobali moko akomaki boye: “Matɔndi mingi ndenge bosalisi biso tólanda programɛ yango. Emonisi mpenza ete bolingaka biso.”
NTANGO BANKULUTU BABENGISAMI MPO NA KOZWA FORMASYO
Ntango banganga-nzambe na Yisraele bazalaki koyula kaka kelelo moko, “bankumu oyo bazali bankumu ya bato nkóto nkóto” nde basengelaki koya na hema ya kokutana. (Mit. 10:4) Ezalaki mpo na kozwa malako mpe formasyo epai ya Moize. Yango ezalaki kosalisa bango mpo bákokisa mikumba na bango na kati ya mabota na bango. Soki ozalaka moko ya bankumu yango, olingaki te kosala nyonso mpo ozala wana mpe ozwa matomba na programɛ yango?
Lelo oyo, bankulutu ya masangá bazali “bankumu” te; bamikómisaka mpe te bakonzi ya etonga oyo Nzambe apesi bango bábatela. (1 Pe. 5:1-3) Kasi, basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kobatela etonga. Yango wana, ntango babengisami mpo na kozwa formasyo, na ndakisa na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, basalaka nyonso mpo bázanga te. Formasyo yango esalisaka bankulutu mpe bandeko nyonso ya lisangá bápusana lisusu penepene na Yehova. Ata soki okɔtá naino te na moko ya biteyelo yango, na ntembe te ozwaka matomba epai ya bankulutu oyo bakɔtá na biteyelo yango.
NTANGO MAKAMBO MOSUSU ESENGELI KOSEMBOLAMA
Na libaku moko boye, lokito ya kelelo ya banganga-nzambe ezalaki kokita mpe komata. Yango ezalaki koyebisa bato ete basengeli kolongola bakaa nyonso. (Mit. 10:5, 6) Kolongola kaa ezalaki ebongiseli moko kitoko, kasi ezalaki mpe kosɛnga mosala makasi mpo na moto nyonso. Na bantango mosusu, Bayisraele bazalaki kokakatana mpo na kokende esika mosusu. Mpo na nini?
Mbala mosusu bazalaki komona ete bazali kosala mibembo mbala na mbala mpe na ndenge oyo bamizelaki te. “Ntango mosusu, lipata ezalaki kotikala banda na mpokwa tii na ntɔngɔ; mpe lipata ezalaki komata na ntɔngɔ.” Kasi na ntango mosusu, lipata yango ezalaki kotikala “mikolo mibale to sanza moko to mikolo mingi koleka” liboso ekende na esika mosusu. (Mit. 9:21, 22) Mbala boni balongolaki kaa mpo na kokende na esika mosusu? Mitángo mokapo 33 elobeli bisika 40 oyo Bayisraele batyaki kaa na bango.
Na bantango mosusu, Bayisraele bazalaki kotya kaa na bango na esika oyo elili ezalaki. Kotya kaa na esika ya ndenge wana esengelaki kozala malamu mpo na “esobe mobimba wana ya monene mpe ya nsɔmɔ.” (Mib. 1:19) Yango wana, bakokaki kokanisa ete soki balongwe na esika yango, bakokende na esika ya mabe.
Ntango bazalaki kolongwa na kaa, mabota mosusu esengelaki kozela tii ntango ngala na bango ekokoka. Bango nyonso bazalaki koyoka ndenge lokito ya kelelo ezalaki komata mpe kokita, kasi bazalaki te kokoka kolongwa mbala moko. Lokito ya kelelo yango oyo ezalaki komata mpe kokita, ezalaki mpo na koyebisa na mabota oyo etyaki kaa na yango na ɛsti, elingi koloba libota ya Yuda, ya Isakare, mpe ya Zebulone ete esengeli kolongwa. (Mit. 2:3-7; 10:5, 6) Na nsima, banganga-nzambe bazalaki koyula kelelo mpo na mbala ya mibale, mpo na koyebisa na mabota misato oyo etyaki kaa na yango na sudi ete elongwa. Banganga-nzambe bazalaki kosala bongo tii mabota nyonso ekolongwa.
Ntango mosusu ozali kokakatana mpo na kondima mbongwana mosusu oyo esalemi na ebongiseli ya Nzambe. Okoki kokanisa ete mbongwana yango ekómi mingi. To mpe mbala mosusu ozalaki kosepela ndenge oyo makambo ezalaki kosalema liboso mpe olingaki te ete ebongwana. Ezala mpo na ntina nini, okoki komona ete ezali mpasi komesana na mbongwana yango, mpe esɛngaka ntango mpo na komesana na yango. Kasi soki totosi, tokoki komona ete mbongwana yango ezalaki malamu mpo na biso mpe na ntembe te Yehova akopambola biso.
Na mikolo ya Moize, Yehova atambwisaki bamilio ya mibali, basi mpe bana na esobe. Soki Yehova abatelaka mpe atambwisaka bango te, balingaki kokufa. Lelo oyo, litambwisi oyo Yehova azali kopesa biso, nde ebatelaka biso na elimo. Asalisaka biso tózala penepene na ye mpe tóbatela kondima na biso makasi. Na yango, tiká ete biso nyonso tózwa ekateli ya kotosa lokito ya kelelo ndenge kaka Bayisraele ya sembo basalaki!