Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb26 Mars nk. 6-7
  • 23-29/03

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 23-29/03
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
mwb26 Mars nk. 6-7

23-29/03

YISAYA 48-49

Loyembo 89 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Kotya likebi na mateya ya Yehova epesaka matomba

(Min. 10)

Yehova ateyaka basaleli na ye (Yis 48:17; it “Moteyi, Mateya” par. 2)

Tosengeli kopona kotya likebi na mateya ya Yehova (Yis 48:18a; ijwbq lisolo 44 par. 2-3)

Soki tosali bongo, kimya na biso ekokóma “lokola ebale” mpe bosembo na biso “lokola mbonge ya mbu” (Yis 48:18b; lv 199 par. 8)

Ndenge mwasi moko azali kotambola na zɛlo pene na mbu na ntango ya kolala ya moi.

NDIMBOLA YA MALOBA: Liloba ya Ebre oyo ebongolami “kimya” ekoki kopesa likanisi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, libateli, kozala malamu, bolamu, boninga, mpe oyo ezali mobimba to ekoká.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yis 49:8—Wapi ndenge misato oyo esakweli yango ekokisami? (it “Ntango oyo endimami” par. 1-3)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yis 48:​9-20 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bengisá ndeko moko ya libota oyo alɛmbá na elimo na diskur ya sipesiale mpe na Ekaniseli. (lmd liteya 5 pwɛ 3)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Yebisá moto oyo azali kokanisa koya na Ekaniseli makambo oyo akomona soki ayei. (lmd liteya 9 pwɛ 3)

6. Kolandela bokoli

(Min. 5) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Ntango Ekaniseli esili, yanolá na mituna ya moto oyo ayanganaki na Ekaniseli. (lmd liteya 8 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 107

7. Ndenge ya kozwa matomba na mokolo oyo eleki ntina na kati ya mbula

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Koyangana na Ekaniseli mbula na mbula epesaka biso libaku ya komonisa ete totosaka etinda ya Yesu mpe ya komonisa botɔndi mpo na likabo ya lisiko oyo Yehova apesá mpo na biso. (Lk 22:19) Kasi, ezalaka mpe libaku ya kokanisa lisusu ndenge Yehova ná Mwana na ye balingaka biso mingi. (Ga 2:20; 1Yoa 4:​9, 10) Tokoki kosala nini mpo tózwa matomba na likabo yango ya Yehova? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo basepelaka na solo bázwa mpe matomba?

  • Mpo na komibongisa, otángaka mokolo na mokolo bavɛrsɛ oyo etyami na Botángi ya Biblia mpo na Ekaniseli

  • Omanyola na likabo ya lisiko mpe na lolenge ya bomoi oyo osengeli kozala na yango mpo omonisa botɔndi na yo

  • Omipesa mobimba na kampanye mpo na kobengisa bato oyo oyebi, bandeko ya libota, mpe bato ya teritware na bino na diskur ya sipesiale mpe na Ekaniseli

  • Tombelá boyei malamu na bato oyo bayei na Ekaniseli mpe pesá bango mbote na esengo. Ata soki okotya likebi epai ya bato oyo obengisaki, kobosana te kosalisa baoyo bayei mpo bazwaki lokasa ya libyangi na kampanye, mpe sɛngá bango báfanda elongo na yo

  • Zwá ntango ya koyanola na mituna ya bato oyo bayei

  • Tyá mpe likebi mpo oyamba baoyo balɛmbá na elimo. Mingimingi bankulutu bakotya mpe likebi na baoyo balongolamá na lisangá

Elilingi euti na video: “Yesu ‘ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.’ ” Bandeko bazali na Ndako ya Bokonzi mokolo ya Ekaniseli, bazali kobɛta masolo.

Lakisá VIDEO Yesu “ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.” Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mateya nini ozwi na oyo etali ntina ya koyamba na esengo baoyo balɛmbá na elimo ntango bayei na Ekaniseli?

    A scene from the video: “Yesu ‘ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.’ ” Ndeko mwasi oyo alɛmbá na elimo ayei na Ekaniseli, ndeko mwasi mosusu ayambi ye na esengo.

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 72-73

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 134 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto