Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb26 Mars nk. 4-5
  • 16-22/03

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 16-22/03
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2026
mwb26 Mars nk. 4-5

16-22/03

YISAYA 45-47

Loyembo 2 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. “Nazali Nzambe mpe mosusu lokola ngai azali te”

(Min. 10)

Bayisraele bazali kobima na Babilone.

Moko te azali lokola Yehova (Yis 46:9; w20.06 5 par. 14)

Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova akokisa mokano na ye (Yis 46:​10, 11; cl 42 par. 14; it “Baoyo bamemamaki na Babilone bazongi” par. 1)

Baoyo batyaka motema na banzambe ya lokuta bakozwa esengo ya solo te (Yis 46:​6, 7; w99 15/5 14 par. 18-19)

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yis 46:10—Yehova ayebaki “banda na ebandeli” ete Adama ná Eva bakosala lisumu? (w11 1/1 14 par. 2-3)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yis 45:​1-11 (th liteya 5)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Limbwelá moto oyo azali mokristo te soki Ekaniseli ezali nini. (lmd liteya 5 pwɛ 3)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Yebisá moto oyo andimaki lokasa ya libyangi ya Ekaniseli mbala eleki bóyekola Biblia. (lmd liteya 9 pwɛ 5)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 19 maloba ya ebandeli mpe pwɛ 1-3 (lmd liteya 11 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 38

7. Epai kaka moko oyo lisalisi ya solosolo eutaka

(Min. 7) Lisolo na bayangani.

Ntango tokutani na mikakatano, ebongi tótya motema kaka epai ya Nzambe na biso Yehova mpo na kozwa lisalisi ya solosolo.—Ebr 13:​5, 6.

Tángá Nzembo 55:22. Na nsima sɛngá bayangani bálobela makambo oyo elandi.

Bililingi: Bandeko mibali mpe bandeko basi bazali na mikakatano. 1. A Ndeko mobali moko afandi libándá na baeskalye azali na mawa mpo alongwe mosala. 2. Ndeko mobali moko na bolɔkɔ azali koyanola na mituna ya mokonzi moko. 3. Ndeko mwasi moko na lopitalo azali kobondela na nse ya motema pene na mbeto ya mobali na ye oyo azali kobɛla. 4. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye bauti kobima na likama oyo ebimaki yango moko.

Na likambo mokomoko, komá lolenge moko ya komonisa ete totyeli Yehova motema mpe lolenge moko oyo asalisaka biso.

  • Tozali lisusu na mosala te to tozali na mikakatano ya mbongo mpo na kosunga libota na biso

  • Bakonzi batyeli mosala na biso bipekiseli

  • Tozali na maladi moko ya makasi

  • Mpasi moko ekómeli biso, na ndakisa likama oyo ebimi yango moko to moto moko oyo tolingaka akufi

8. Lapolo ya 2026 ya Departema ya kosala baplan mpe kotonga na ekólo

(Min. 8) Diskur.

Lakisá VIDEO.

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) lfb liteya 70-71

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 148 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto