Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Janvier lok. 5
  • Kómisá kondima na yo makasi na Liloba ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kómisá kondima na yo makasi na Liloba ya Nzambe
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koluka bwanya
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Tikalá sembo ntango kondima na yo emekami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Janvier lok. 5
Bililingi: Ndeko mwasi moko ya elenge azali kotánga mpe koyekola Biblia. 1. Azali kokoma badati ya bato oyo Biblia elobeli na tablo moko ya mpɛmbɛ. 2. Azali kotanga Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli na jw.org. 3. Azali kosalela karte oyo elakisi mikili oyo Biblia elobeli. 4. Asali liyemi ya nganga-nzambe monene mpe biloko oyo ezali na bilamba na ye.

BOMOI YA BAKRISTO

Kómisá kondima na yo makasi na Liloba ya Nzambe

Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kobongola bomoi na biso. (Ebr 4:12) Kasi, mpo tózwa matomba na litambwisi, malako mpe toli na yango, tosengeli kondima ete ezali mpenza “liloba ya Nzambe.” (1Te 2:13) Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi na Biblia?

Tángáká eteni moko ya Biblia mokolo na mokolo. Ntango ozali kotánga, luká makambo oyo endimisi yo ete Yehova nde azali Mobandisi na yango. Na ndakisa, talelá batoli oyo ezali na mokanda ya Masese mpe luká koyeba ndenge bwanya na yango ezali na ntina mpo na biso lelo oyo.​—Mas 13:20; 14:30.

Salá programɛ na yo ya boyekoli. Luká koyeba malamumalamu makambo oyo endimisi yo ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova, luká na motó ya likambo “Biblia” mpe na nsima na motó moke ya likambo “Ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” Okoki mpe kokómisa kondima na yo makasi ete nsango ya Biblia ebongwani te ntango ozali kotalela malamumalamu makambo oyo ezali na Lamuká! ya 04/2008, lokasa 12.

TALÁ VIDEO NTINA OYO TONDIMAKA LILOBA YA NZAMBE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini makambo oyo bamoni na efelo moko ya tempelo na Karnak, na Ezipito, emonisi ete Liloba ya Nzambe elobaka solo?

  • Ndenge nini toyebi ete nsango ya Biblia ebongwani te?

  • Lokola Biblia ezali tii lelo oyo, ndenge nini endimisi yo ete ezali Liloba ya Nzambe?​—Tángá Yisaya 40:8

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto