OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA
Saleláká bisaleli ya bolukiluki
Yehova azali kopesa biso bisaleli mpo tózala na makoki ya koteya malamu, na ndakisa bavideo, batrakte, bazulunalo, mwa babuku, babuku, mpe Biblia, oyo ezali esaleli na biso ya libosoliboso. (2Ti 3:16) Apesi biso mpe bisaleli ya bolukiluki oyo esalisaka biso mpo na kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia malamu. Na ndakisa, Watchtower Library, Watchtower—MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET™, JW Library®, mpe Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova.
Okozala mpenza na esengo soki ozali kosalela bisaleli nyonso wana oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá mpo na kosalisa biso tókɔta na mozindo ntango tozali koyekola Biblia. Lakisá bayekoli na yo ya Biblia ndenge ya kosalela bisaleli yango. Na nsima, bango mpe bakozala na esengo ntango bazali kozwa bango moko biyano ya Biblia na mituna na bango.
TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI—NDIMÁ LISALISI OYO YEHOVA APESI—BISALELI YA BOLUKILUKI, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ntembe nini Rose abimisaki na oyo etali bozalisi?
Neeta azwaki makanisi wapi mpo na lisolo yango?
Kozwa biloko ya motuya na Biblia mpe koyebisa yango bato epesaka biso esengo
Ndenge nini aponaki makambo oyo ebongaki mpenza mpo na Rose?
Matomba nini Neeta azwaki ndenge asalelaki bisaleli ya bolukiluki?