BOMOI YA BAKRISTO
‘Komitungisa ata moke te’
Yehova azalaki kosalisa babola na Yisraele ya kala. Lelo oyo, ndenge nini azali kosalisa basaleli na ye oyo bazali babola?
Azali koteya bango bázala na bokatikati na makambo etali mbongo.—Lk 12:15; 1Ti 6:6-8
Azali kosalisa bango bámimona ete bazali na valɛrɛ.—Yb 34:19
Azali koteya bango básalaka mosala makasi mpe báboya mimeseno ya mabe.—Mas 14:23; 20:1; 2Ko 7:1
Azali kobenda bango na lisangá ya bakristo oyo balinganaka.—Yn 13:35; 1Yn 3:17, 18
Apesi bango elikya.—Nz 9:18; Yis 65:21-23
Atako makambo ya bomoi na biso ekoki kozala mpasi ndenge nini, tosengeli te komitungisa koleka ndelo. (Yis 30:15) Yehova akokokisa bamposa na biso ya mosuni wana tozali kokoba kotya matomba ya Bokonzi na ye na esika ya liboso.—Mt 6:31-33.
TALÁ VIDEO BOLINGO ESILAKA SOKI MOKE TE ATAKO . . . BOBOLA—CONGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndenge nini bandeko oyo bafandi esika mayangani esalemaka bamonisaki bolingo mpe ezaleli ya koyamba bapaya epai ya bandeko oyo basalaki mibembo mpo na koya na mayangani?
Ndenge nini video oyo emonisi ete Yehova alingaka babola?
Tózala babola to bazwi, ndenge nini tokoki komekola Yehova?