Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Décembre lok. 8
  • Mabele “emɛlaki ebale”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabele “emɛlaki ebale”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Kobosanaka te kobondela mpo na bandeko oyo bazali na minyoko
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Namoni mbongwana minene na Corée
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Décembre lok. 8
Badosye oyo euti na ONU elobeli makambo ya kokanga Batatoli ya Yehova na bolɔkɔ na Corée babambi yango na iniforme ya bandeko oyo bazali na bolɔkɔ

BOMOI YA BAKRISTO

Mabele “emɛlaki ebale”

Bakonzi ya Leta basalisi basaleli ya Yehova na bileko ndenge na ndenge. (Ezr 6:1-12; Est 8:10-13) Ata na mikolo na biso, tomoni ndenge “mabele;” elingi koloba bato ya mokili oyo bazali na mwa makanisi ya malamu, bamɛli “ebale” ya minyoko oyo “dragɔ,” to Satana Zabolo azali kobimisa. (Em 12:16) Na bantango mosusu Yehova, “Nzambe ya misala ya kobikisa,” akoki kosimba mitema ya bakonzi ya mokili mpo básalisa basaleli na ye.​—Nz 68:20; Mas 21:1.

Bongo soki okɔti bolɔkɔ mpo na kondima na yo? Ndimá na motema moko ete Yehova azali elongo na yo. (Eb 39:21-23; Nz 105:17-20) Yebá ete kondima na yo ekozwa mbano mpe bosembo na yo ekolendisa bandeko na yo ya mokili mobimba.​—Flp 1:12-14; Em 2:10.

TALÁ VIDEO BANDEKO YA CORÉE BABIMI NA BOLƆKƆ, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Mpo na nini ebele ya bandeko na biso na Corée du Sud bakɔtaki bolɔkɔ na boumeli ya bambula?

  • Bikateli nini ya batribinale esalaki ete bábimisa bandeko na biso mosusu na bolɔkɔ liboso ete mikolo oyo bakatelaki bango ekoka?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso ya mokili mobimba oyo bazali sikoyo na bolɔkɔ mpo na kondima na bango?

  • Ndenge nini tosengeli kosalela bonsomi oyo tozali na yango sikoyo?

  • Nani mpenza asalaka ete tólonga na kosamba nyonso oyo tosambaka na batribinale?

Bolɔkɔ moko na Corée epai bakangaki Batatoli ya Yehova; mikanda oyo Batatoli ya Yehova bakomelaki filiale ya Corée etindamaki epai ya bandeko oyo bakangamaki na bolɔkɔ; tata moko ná mwana na ye bazali koyambana nsima ya kobima na bolɔkɔ

Nazali kosalela bonsomi na ngai ndenge nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto