1-7/07
BAKOLOSE 1-4
Loyembo 56 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Bólongola ya kala, mpe bólata ya sika”: (Min. 10)
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na Bakolose.]
Kol 3:5-9—“Bólongola bomoto ya kala” (w11 15/3 lok. 10 par. 12-13)
Kol 3:10-14—“Bólata bomoto ya sika” (w13 15/9 lok. 21 par. 18-19)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Kol 1:13, 14—“Bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye” ezali nini? (it-2-F lok. 833 par. 4-6)
Kol 2:8—“Makambo mikemike ya mokili” ezali nini? (w08 15/8 lok. 28 par. 8)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Kol 1:1-20 (th liteya 2)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Lakisá video Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa, mpe na nsima bólobela liteya 7 ya mwa buku Koteya.
Diskur: (Eleka min. 5 te) w04 1/5 nk. 19-20 par. 3-7—Motó ya likambo: Ndenge nini bakristo mosusu bakómaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa Paulo makasi’? (Kol 4:11) (th liteya 7)
BOMOI YA BAKRISTO
Lapolo ya 2018 ya Komite ya Mateya: (Min. 15) Lakisá video. Na nsima bólobela mituna oyo: Mpo na nini mibembo ezali na ntina mingi mpo na mosala ya ebongiseli na biso? Ndenge nini departema ya mibembo na Biro monene ebatelaka makabo mpo na mosala ya Bokonzi? Basakoli bakoki kosala nini mpo ebongiseli na biso ebimisaka mbongo mingi te mpo na mibembo? Ndenge nini departema ya mibembo ezali kosalisa bandeko oyo bakosala mibembo mpo na mayangani oyo ekosangisa mikili mingi na 2019?
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 73
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 102 mpe libondeli