27/05–2/06
BAGALATIA 1-3
Loyembo 106 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Natɛmɛlaki ye na miso boye”: (Min. 10)
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na Bagalatia.]
Ga 2:11-13—Ntango bakristo oyo bazalaki Bayuda bayaki kotala Petro, kobanga bato esalaki ete Petro akima bandeko ya bikólo mosusu (w17.04 lok. 27 par. 16)
Ga 2:14—Paulo asembolaki Petro (w13 15/3 lok. 5 par. 12)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Ga 2:20—Ndenge nini osengeli kotalela lisiko mpe mpo na nini? (w14 15/9 lok. 16 par. 20-21)
Ga 3:1—Mpo na nini Paulo abengi Bagalatia “bazoba”? (it-1-F lok. 940)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Ga 2:11-21 (th liteya 10)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lakisá video mpe bólobela yango.
Kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Eleka min. 3 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya mibale oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 2)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) bhs lok. 202 par. 18-19 (th liteya 6)
BOMOI YA BAKRISTO
“Ndenge oyo biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela bisika na biso ya losambo”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya kolakisa video Tóbatela bisika na biso ya losambo mpe kotalela mituna, sololá na mokuse na ndeko ya komite ya kobatela Ndako ya Bokonzi mpe tuná ye mwa mituna. (Soki ndeko yango azali te na lisangá na bino, sololá na mokambi-misala ya bankulutu. Soki bosalelaka Ndako ya Bokonzi kaka bino moko, sololá na mokambi-misala ya kobatela Ndako ya Bokonzi.) Tozali kosala nini mpo na kotosa programɛ na biso ya kobatela Ndako ya Bokonzi? Tozali kosala mosala yango malamu? Misala nini euti kosalema mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi, mpe oyo wapi ekosalema na mikolo ekoya? Soki ndeko moko ayebi mosala ya kobongisa bandako to alingi kosala elongo na bandeko oyo bayebi mosala yango mpo ye mpe ayekola, asengeli kosala nini? Ndenge nini mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako ya Bokonzi ata soki makambo ya bomoi na ye ezali ndenge nini?
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 68
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 72 mpe libondeli