BOMOI YA BAKRISTO
Okoki kolonga ata soki ozali na “nzubɛ moko na kati ya mosuni”!
Na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi, mikakatano oyo ezali lokola nzubɛ ezali konyokola basaleli nyonso ya Nzambe. (2Ti 3:1) Ndenge nini tokoki kotyela Yehova motema mpe kolonga mikakatano yango? Talá video “Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama” mpo na koyeba makambo oyo Talita Alnashi ná baboti na ye basalaki, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Talita azali na ‘nzubɛ nini na kati na mosuni’?
Bilaka nini ya Biblia esalisaki Talita ná baboti na ye bábatela makanisi malamu?
Ndenge nini baboti ya Talita bamonisaki ete batyelaki Yehova motema mwa moke nsima ya kosala ye lipaso?
Ndenge nini baboti ya Talita basalelaki bisaleli oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso mpo na kosalisa Talita alinga Nzambe?
Ndenge nini Talita amonisaki ete azali kokola na elimo atako azali na “nzubɛ moko na kati ya mosuni”?
Ndenge nini ndakisa ya Talita elendisi yo?