20-26/05
2 BAKORINTI 11-13
Loyembo 3 mpe libondeli
Maloba ya ebendeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“‘Nzubɛ moko na kati ya mosuni’ ya Paulo”: (Min. 10)
2Ko 12:7—Paulo ayikaki mpiko na mokakatano moko oyo ezalaki kosila te, oyo ezalaki lokola nzubɛ (w08 15/6 nk. 3-4)
2Ko 12:8, 9—Yehova amonaki malamu alongola te nzubɛ yango ndenge Paulo asɛngaki ye (w06 15/12 lok. 24 par. 17-18)
2Ko 12:10—Paulo alongaki kokokisa mokumba na ye mpo atyelaki elimo santu ya Nzambe motema (w18.01 lok. 9 par. 8-9)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
2Ko 12:2-4—“Likoló ya misato” mpe “paradiso” ekoki kozala nini? (w18.12 lok. 8 par. 10-12)
2Ko 13:12—“Lipwɛpwɛ mosantu” ezalaki mpenza nini? (it-1-F lok. 753)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) 2Ko 11:1-15 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Min. 5) Lakisá video mpe bólobela yango.
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 3 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 2)
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 4 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo,” mpe lakisá ye buku Mateya ya Biblia. (th liteya 4)
BOMOI YA BAKRISTO
“Okoki kolonga ata soki ozali na ‘nzubɛ moko na kati ya mosuni’!”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video “Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama”. Yebisá bayangani ete mikanda mpo na bato oyo bakufá miso to baoyo bamonaka malamu te ezali na minɔkɔ 47 na ekomeli ya bato oyo bakufá miso ata mpe bisaleli mosusu. Basakoli basengeli kosolola na ndeko oyo atalelaka mikanda mpo na kosɛnga mikanda yango. Lendisá bandeko nyonso ete bátyaka likebi na mposa ya ndeko nyonso na lisangá to ya moto nyonso ya teritware na bino oyo amonaka malamu te.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 67
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 78 mpe libondeli