BOMOI YA BAKRISTO
Ndenge oyo mosala na biso ya kosunga bandeko ememeli bandeko na biso na Caraïbe matomba
Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, lelo mpe tozali na libaku malamu ya komonisela bandeko na biso oyo bakutani na makama bolingo. (Yn 13:34, 35) Talá video Bolingo emonani na misala—Kosunga bandeko na bisanga ndenge na ndenge, mpo na koyeba makambo oyo bandeko basalaki mpo na kokokisa bamposa ya bandeko oyo bafandaka na bisanga ya Caraïbe, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Mopɛpɛ makasi oyo babengi Irma mpe Maria ebimiselaki bandeko na bisanga ya Caraïbe mikakatano nini?
Ndenge nini Yehova asalisaki bandeko na biso na bisanga ya Caraïbe na nzela ya bandeko?
Bandeko oyo bazwaki makama bamiyokaki ndenge nini mpo na bolingo mpe bokabi ya bandeko?
Bandeko boni bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko na bisanga ya Caraïbe?
Ndenge nini biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko oyo bazwi makama?
Video oyo esali ete omiyoka ndenge nini lokola ozali na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo etondi na bolingo?