28/01–3/02
MISALA 27-28
Loyembo 129 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Paulo akei Roma na masuwa”: (Min. 10)
Mis 27:23, 24—Anzelu moko ayebisaki Paulo ete baoyo nyonso bazali elongo na ye na masuwa bakokufa te na mopepe makasi (bt lok. 208 par. 15)
Mis 28:1, 2—Masuwa oyo Paulo azalaki na kati ezindaki na Malta (bt lok. 209 par. 18; lok. 210 par. 21)
Mis 28:16, 17—Paulo akómaki na Roma kozanga likama (bt lok. 213 par. 10)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Mis 27:9—“Kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu” ezalaki nini? (“kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu” nɔti mpo na koyekola na Mis 27:9, nwtsty-E)
Mis 28:11—Ndenge balobeli mpe elembo oyo ezalaki na motó ya masuwa, yango emonisi nini? (“Bana ya Zeusi” nɔti mpo na koyekola na Mis 28:11, nwtsty-E)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Mis 27:1-12 (th liteya 5)
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lakisá video mpe bólobela yango.
Kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Eleka min. 3 te) Salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya mibale oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” (th liteya 2)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 5 te) lvs lok. 165 par. 16-17 (th liteya 3)
BOMOI YA BAKRISTO
“Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video “Ebende epelisaka ebende”—Mwa ndambo na yango. Lendisá bandeko nyonso bátala video yango na mobimba.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 52
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 93 mpe libondeli