Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Juin lok. 8
  • Baboti, bópesa bana na bino libaku ya kolonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti, bópesa bana na bino libaku ya kolonga
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Bana bazali “libula oyo euti na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Juin lok. 8
Yozefe ná Maria bazali kosalela ntango ya kolya mpo na koteya Yesu mpe bana na bango mosusu

BOMOI YA BAKRISTO

Baboti, bópesa bana na bino libaku ya kolonga

Baboti oyo babangaka Nzambe bazalaka na mposa mpenza bana na bango bakóma basaleli ya Yehova. Baboti bakoki kosalisa bana básala bongo ntango bazali kokɔtisa mateya ya Biblia na mitema ya bana na bango banda na bomwana. (Mib 6:7; Mas 22:6) Yango esɛngaka komipimela? Ezali bongo mpenza! Kasi ebongi mpenza kosala yango.​—3Yn 4.

Baboti bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yozefe mpe Maria. “Bazalaki na momeseno ya kokende mbula na mbula na Yerusaleme mpo na fɛti ya elekeli,” atako esɛngaki milende mpe mbongo mingi. (Lk 2:41) Emonani ete makambo ya elimo nde ezalaki na esika ya liboso na libota na bango. Ndenge moko mpe lelo, baboti bakoki kosalela mabaku nyonso mpo na koteya bana na bango na maloba mpe na misala mpo na kokamba bango na nzela oyo ebongi.​—Nz 127:3-5.

OYEBAKI YANGO?

Atako babɔkwamaki na libota oyo ezalaki kosalela Nzambe, baleki ya Yesu bandimelaki ye te ntango azalaki na bomoi. (Yn 7:5; Mis 1:14) Na nsima, mibale na bango, Yakobo mpe Yuda, bakomaki mikanda ya Biblia oyo ebengami na nkombo na bango.

TALÁ VIDEO BASALELAKI MABAKU NYONSO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndenge nini Jon ná Sharon Schiller bakobaki kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso ntango bazalaki kobɔkɔla bana?

  • Mpo na nini baboti basengeli kopesa mwana na mwana disiplini na kotalela bamposa na ye?

  • Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bátɛmɛla ngwi ntango kondima na bango emekami?

  • Bisaleli nini oyo ebongiseli ya Yehova ebimisá osalelaki mpo na kosalisa bana na yo bákóma baninga ya Yehova?

Libota ya Schiller

Salá ete kosalela Yehova ezala likambo ya liboso na libota na bino

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto