Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Janvier lok. 6
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kobongisa nzela mpo na kozongela moto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kobongisa nzela mpo na kozongela moto
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA:
  • NDENGE YA KOSALA YANGO:
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobongisa nzela mpo na kozongela moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kozongela moto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Ntango nini tosengeli kozongela bato oyo basepelaki?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ezali na ntina komibongisa mpo na kozongela bato na ndenge oyo ekobota mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Janvier lok. 6

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kobongisa nzela mpo na kozongela moto

MPO NA NINI EZALI NA NTINA:

Tozalaka na mposa ya kobwaka mai na mboto ya solo oyo tolonaka. (1Ko 3:6) Soki tokutani na moto oyo asepeli, ekozala malamu tótikela ye motuna moko oyo tokolobela ntango tokozongela ye. Yango ekosala ete azela biso na mposa makasi mpe ekozala pɛtɛɛ tómibongisa mpo na kozongela ye. Ntango tozongeli ye, tokoki koyebisa ye ete toyei koyanola na motuna oyo totikelaki ye.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

Motatoli moko azali kobongisa kozongela moto, asololi na moto yango, mpe na nsima akomi mwa makambo ya ntina
  • Ntango ozali kobongisa maloba na yo ya kobanda lisolo mpo na mosala ya ndako na ndako, bongisá mpe motuna oyo okotikela moto. Ekoki kozala motuna moko oyo eyano na yango ezali na mokanda oyo ozali kokabola. To ekoki mpe kozala motuna oyo eyano na yango ezali na moko ya mikanda oyo toyekolaka na bato, oyo okani kolakisa ye ntango okozongela ye.

  • Na nsuka ya lisolo na yo ná moto oyo asepeli, yebisá ye ete ozali na mposa ya kosolola na ye lisusu, mpe na nsima tuná ye motuna oyo obongisaki mpo na kotalela na mbala ekoya. Okoki mpe kozwa adrɛsi, nimero ya telefone to adrɛsi e-mail na ye.

  • Soki oyebisi ye ete okozongela ye na mokolo to ngonga oyo boyokani, kokisá elaka na yo.​—Mt 5:37.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto